Hagai 2:1-23
2 Na sanza ya nsambo,+ na mokolo ya ntuku mibale na moko (21) ya sanza yango, liloba ya Yehova eyaki na nzela ya mosakoli Hagai+ ete:
2 “Nabondeli yo, lobá na Zerubabele+ mwana ya Shealatiele,+ guvɛrnɛrɛ ya Yuda,+ mpe na Yosua+ mwana ya Yehozadake+ nganga-nzambe monene, mpe na bato oyo batikali ete:
3 ‘Nani atikali na kati na bino, oyo amonaki ndako oyo na nkembo na yango ya kala?+ Mpe ndenge nini bozali komona yango sikoyo? Soki bokokanisi yango na oyo ya kala, oyo ezali eloko mpamba na miso na bino, boye te?’+
4 “‘Kasi sikoyo, Ee Zerubabele, zalá makasi,’ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe zalá makasi,+ Ee Yosua mwana ya Yehozadake nganga-nzambe monene.’
“‘Mpe bino nyonso bato ya mboka oyo, bózala makasi mpe bósala mosala,’+ yango nde liloba ya Yehova.
“‘Mpo nazali elongo na bino,’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.
5 ‘Bómikundola likambo oyo nayokanaki na bino ntango bobimaki na Ezipito,+ mpe ntango elimo na ngai+ ezalaki kotɛlɛma na kati na bino. Bóbanga te.’”+
6 “Mpo talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Na mbala moko lisusu—etikali mwa ntango moke+—mpe nakoningisa likoló, ná mabele, ná mbu, ná mokili.’+
7 “‘Mpe nakoningisa bikólo nyonso, mpe biloko kitoko ya bikólo nyonso ekokɔta+ mpenza na ndako oyo, mpe nakotondisa yango na nkembo,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
8 “‘Palata ezali ya ngai, mpe wolo ezali ya ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.
9 “‘Nkembo ya ndako oyo ya sika ekoleka nkembo ya ndako ya kala,’+ Yehova ya mampinga alobi bongo.
“‘Mpe nakopesa kimya na esika oyo,’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.”
10 Na mokolo ya ntuku mibale na minei (24) ya sanza ya libwa, na mbula ya mibale ya Dariuse, liloba ya Yehova eyelaki mosakoli Hagai+ ete:
11 “Talá oyo Yehova ya mampinga alobi: ‘Nabondeli yo, tuná banganga-nzambe, na kotalela mobeko+ ete:
12 “Soki moto amemi na elamba na ye mosuni oyo esantisami, mpe elamba na ye etuti mampa to bilei to vinyo to mafuta to biloko ya kolya ya ndenge nyonso, biloko yango ekosantisama?”’”+
Mpe banganga-nzambe bayanolaki mpe balobaki ete: “Te!”
13 Mpe Hagai alobaki lisusu ete: “Soki moto moko oyo akómi mbindo na molimo oyo ekufi, asimbi biloko wana, yango ekokóma mbindo?”+
Mpe banganga-nzambe bayanolaki mpe balobaki ete: “Yango ekokóma mbindo.”
14 Bongo Hagai ayanolaki mpe alobaki ete: “‘Bato oyo bazali bongo, mpe ekólo oyo ezali bongo liboso na ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova, ‘mpe mosala nyonso ya mabɔkɔ na bango ezali bongo, mpe nyonso oyo bazali kopesa wana. Ezali mbindo.’+
15 “‘Kasi sikoyo, nabondeli bino, bótya motema na bino+ na likambo oyo banda lelo mpe na nsima, liboso bátya libanga likoló ya libanga na tempelo ya Yehova,+
16 banda ntango makambo wana ebimaki—moto azalaki koya na libondo ya biloko oyo ebimisaka bimekeli ntuku mibale (20), kasi yango ezalaki kaka zomi; moto azalaki koya na ekamwelo kotoka bimekeli ntuku mitano (50) ya vinyo, kasi yango ezalaki kaka ntuku mibale;+
17 napesaki bino etumbu: nakaukisaki milona,+ napɔlisaki+ yango mpe natindelaki yango mbula ya mabanga,+ ɛɛ, nabebisaki mosala nyonso ya mabɔkɔ na bino,+ mpe ata moto moko te kati na bino azongelaki ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova—
18 “‘Nabondeli bino, bótya motema na bino+ na likambo oyo banda lelo, banda na mokolo ya ntuku mibale na minei (24) ya sanza ya libwa, banda na mokolo oyo moboko ya tempelo ya Yehova etyamaki;+ bótya motema na bino na likambo oyo:
19 Mboto ezali lisusu na kati ya libulu ya kobomba milona?+ Mpe kino sikoyo, vinyo, nzete ya figi, nzete ya grenade ná nzete ya olive—eboti mbuma te, boye te? Banda lelo nakopesa lipamboli.’”+
20 Mpe liloba ya Yehova eyelaki lisusu Hagai+ mbala ya mibale na mokolo ya ntuku mibale na minei (24) ya sanza+ ete:
21 “Lobá na Zerubabele guvɛrnɛrɛ ya Yuda+ ete: ‘Nazali koningisa likoló ná mabele.+
22 Mpe nakokweisa mpenza kiti ya bokonzi ya makonzi mpe nakosilisa makasi ya makonzi ya bikólo nyɛɛ;+ mpe nakokweisa likalo ná batambwisi na yango, mpe bampunda ná batambwisi na yango bakobomama mpenza,+ mokomoko na mopanga ya ndeko na ye.’”+
23 “‘Na mokolo wana,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga, ‘nakozwa yo, Ee Zerubabele+ mwana ya Shealatiele,+ mosaleli na ngai,’ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga; ‘mpe nakotya yo mpenza lokola lopɛtɛ ya kotya kashɛ,+ mpamba te ozali moto oyo ngai naponi,’+ yango nde liloba ya Yehova ya mampinga.”+