Habakuku 2:1-20
2 Nakotɛlɛma na esika na ngai ya kokɛngɛla,+ mpe nakozala likoló ya efelo makasi ya libateli; mpe nakosɛnzɛla,+ mpo na komona oyo ye akoloba na nzela na ngai+ mpe oyo nakozongisa na mpamela oyo nakozwa.+
2 Mpe Yehova ayanolaki ngai mpe alobaki ete: “Komá emonaneli, mpe monisá yango polele na bitanda,+ mpo moto oyo akotánga yango na mongongo makasi abɛta libaku te ntango akotánga yango.+
3 Mpo emonaneli ezali naino mpo na ntango oyo etyamá,+ mpe ezali koya mbangumbangu kino na nsuka, mpe ekobuka lokuta te. Ata soki eumeli, zelá yango kaka; mpo ete kozanga ntembe yango ekokokisama.+ Ekokóma nsima ya ngonga te.
4 “Talá! Molimo na ye evimbani na lolendo;+ ezalaki alima te. Kasi moyengebene, na bosembo na ye akokoba kozala na bomoi.+
5 Ɛɛ, mpo vinyo ekosaka,+ mobali makasi amikumisaka;+ mpe akokokisa mokano na ye te,+ ye moto ayeisi molimo na ye monene lokola Nkunda,* mpe ye moto azali lokola liwa mpe akoki kotonda te.+ Mpe azali kosangisa bikólo nyonso epai na ye mpe koyanganisa bato nyonso ya bikólo epai na ye.+
6 Baoyo, ɛɛ, bango nyonso bakobimisela ye maloba ya lisese+ ná maloba ya mbwakela, maloba ya mayele mabe, boye te? Mpe bakoloba ete:“‘Mawa na moto oyo azali koyikanisa biloko oyo ezali ya ye te+—Ee kino ntango nini!+—mpe oyo azali komiyeisela nyongo kilo!
7 Baoyo bazali kosɛnga yo benefisi bakobimela yo pwasa, mpe baoyo bazali koningisa yo na makasi bakolamuka, mpe na miso na bango okokóma mpenza eloko ya kopunza, boye te?+
8 Mpamba te yo moko opunzaki bikólo mingi, bato ya bikólo oyo batikali bakopunza yo,+ mpo osopaki makila ya bato mpe mpo na mobulu oyo osaleli mabele, sité mpe baoyo nyonso bazali kofanda wana.+
9 “‘Mawa na moto oyo azali kozwela ndako na ye litomba na ndenge ya mabe,+ mpo atya zumbu na ye na esika etombwaná, mpo amilongola na likama!+
10 Yo okani kosala eloko moko ya nsɔni mpo na ndako na yo, kobomama ya ebele ya bato ya bikólo;+ mpe molimo na yo ezali kosala lisumu.+
11 Mpamba te na efelo, libanga ekoganga na mongongo ya mawa, mpe libaya ya nsamba ekoyanola yango na motɔndɔ.+
12 “‘Mawa na moto oyo azali kosopa makila mpo atonga engumba, mpe oyo azangi boyengebene mpo apika sité makasi!+
13 Talá! Yehova ya mampinga nde azali kosala ete bato ya bikólo básala mosala makasi kaka mpo ezika na mɔtɔ, mpe bituluku ya bato ya bikólo elɛmba nzoto kaka mpamba, boye te?+
14 Mpo mabele ekotonda na boyebi ya nkembo ya Yehova lokola mai etondi na mbu.+
15 “‘Mawa na moto oyo azali kopesa baninga na ye eloko ya komɛla, oyo akangisi yango na nkanda na yo mpe nkɛlɛ na yo, mpo alangwisa bango+ mpe atala binama na bango ya nsɔni.+
16 Okotonda mpenza na nsɔni na esika ya kotonda na nkembo.+ Yo moko mpe mɛlá,+ mpe monaná lokola moto oyo akatami ngenga te.+ Kɔpɔ ya lobɔkɔ ya mobali ya Yehova ekobalukela yo,+ mpe nsɔni ekokwela nkembo na yo;
17 mpamba te mobulu oyo basaleli Libá,+ yango nde ekozipa yo, mpe lokoso makasi ya kolya banyama nde ezali kobangisa banyama yango, mpo osopaki makila ya bato mpe mpo na mobulu oyo osaleli mabele,+ sité mpe baoyo nyonso bazali kofanda wana.+
18 Ekeko oyo eyemami ezali na litomba nini,+ wana mosali na yango ayemi yango, abimisi ekeko ya ebende oyo enyagwisami, mpe molakisi ya lokuta?+ Wana mosali na yango atyeli yango motema+ kino asali banzambe ya mpambampamba oyo balobaka te?+
19 “‘Mawa na moto oyo azali koloba na lokoni ete: “Ee lamuká!” mpe na libanga oyo elobaka te ete: “Tɛlɛmá! Ekoteya”!+ Talá! Yango ezipami na wolo mpe na palata,+ mpe ezali na mpema te.+
20 Kasi Yehova azali na kati ya tempelo na ye mosantu.+ Mabele mobimba, fandá nyɛɛ liboso na ye!’”+
Maloba na nse
^ To, “Sheole.” Talá Ap 4.