Habakuku 1:1-17

1  Liyebisi oyo mosakoli Habakuku amonaki na emonaneli:  Ee Yehova, kino ntango nini nakobelela mpo na kosɛnga lisalisi, mpe yo okoyoka te?+ Kino ntango nini nakobelela yo mpo na kosɛnga lisalisi mpo obikisa na mobulu, mpe yo okobikisa te?+  Mpo na nini ozali kosala ete namona makambo oyo ezali koyokisa mpasi, mpe ozali kokoba kotala motungisi? Mpo na nini kopunza ná mobulu ezali liboso na ngai, mpo na nini koswana ezali, mpe mpo na nini kowelana ezali kolonga?+  Yango wana mobeko ezali kosila makasi, mpe bosembo ezali ata moke te.+ Mpo moto mabe azali kozinga moyengebene, yango wana bosembo etɛngisami.+  “Bótala na kati ya bikólo, mpe bómona, mpe bótalana na kokamwa.+ Bókamwa; mpo ezali na likambo moko boye oyo moto moko azali kosala na mikolo na bino, likambo oyo bino bokondima te atako bayebisi bino yango.+  Mpo talá nazali kobimisa Bakaladea,+ ekólo ya nkanda makasi mpe ya motema mɔtɔmɔtɔ, oyo ezali kokende na bisika ya mabele oyo ezali polele mpo na kozwa bisika ya kofanda oyo ezali ya yango te.+  Ekólo yango ezali kobangisa mpe kopesa nsɔmɔ. Yango moko ezali kotya mibeko na yango mpe ezali komipesa lokumu.+  Mpe bampunda na yango ezali na mbangu koleka bankoi, mpe ezali na nkanda makasi koleka bambwa ya zamba+ na mpokwa. Mpe bampunda na yango ya etumba ezali kobɛtabɛta mabele na basabo, mpe bampunda na yango ya etumba euti mosika. Ezali kopumbwa lokola mpongo oyo ezali kopumbwa mbangumbangu mpo na kolya eloko.+  Ekólo yango mobimba ezali koya kotya mobulu.+ Bilongi na bango etali liboso, bazali koya lokola mopɛpɛ ya ɛsti,+ mpe bazali kolɔkɔta bakangami lokola zɛlo. 10  Mpe, ekólo yango ezali kotyola bakonzi, mpe bankumu bazali eloko ya kosɛka na miso na yango.+ Ɛɛ, ezali kosɛka ata esika nyonso oyo ebatelami makasi,+ mpe ezali kosala libondo ya putulu mpe kobɔtɔla esika yango. 11  Na ntango wana, ekokende liboso mpenza lokola mopɛpɛ mpe ekoleka mpe ekomema mpenza ngambo.+ Nguya na yango euti na nzambe na yango.”+ 12  Ee Yehova, yo ozali uta kalakala, boye te?+ Ee Nzambe na ngai, Mosantu na ngai, yo okufaka te.+ Ee Yehova, otye yango mpo na kosambisa; mpe yo, Ee Libanga,+ obongisi yango mpo na kopamela.+ 13  Yo ozali na miso ya pɛto oyo ekokoka te komona makambo oyo ezali mabe; mpe okokoka te kotala mobulu.+ Mpo na nini ozali kotala baoyo bazali kosala na bokosi,+ mpe ofandi nyɛɛ ntango moto mabe azali komɛla moto oyo azali moyengebene koleka ye?+ 14  Mpe mpo na nini ozali kokómisa moto ya mabele lokola mbisi ya mbu, lokola banyama oyo ebendanaka na libumu, oyo ata moto moko te azali koyangela yango?+ 15  Ye atomboli nyonso wana na ndɔbɔ kaka;+ azali kobenda yango na monyama na ye, azali kosangisa yango na monyama na ye ya mbisi.+ Yango wana azali kosepela mpe azali na esengo.+ 16  Yango wana azali kopesa mbeka na monyama na ye mpe azali kobimisela monyama na ye ya mbisi milinga ya mbeka; mpamba te na nzela na yango nde likabo na ye etyami mafuta malamu, mpe bilei na ye ezali kitoko.+ 17  Ezali mpo na yango nde azali kokoba kosopa monyama na ye, mpe koboma mpenza bikólo ntango nyonso, wana azali komonisa motema mawa ata moke te?+

Maloba na nse