Filemo 1:1-25
1 Paulo, moto ya bolɔkɔ+ mpo na Kristo Yesu, mpe Timote,+ ndeko na biso, epai ya Filemo, ndeko na biso ya bolingo mpe moninga ya mosala,+
2 mpe epai ya Apia, ndeko na biso ya mwasi, mpe epai ya Arshipe,+ soda+ lokola biso, mpe epai ya lisangá oyo ezali na ndako na yo:+
3 Boboto monene mpe kimya ya Nzambe Tata na biso mpe ya Nkolo Yesu Kristo ezala na bino.+
4 Napesaka ntango nyonso Nzambe na ngai matɔndi ntango natángaka yo na mabondeli na ngai,+
5 mpo nazali se koyoka nsango ya bolingo na yo mpe kondima oyo ozali na yango epai ya Nkolo Yesu mpe epai ya basantu nyonso;+
6 mpo kondima+ oyo yo ná basusu bozali na yango esala mosala na ndenge oyebi ete eloko nyonso ya malamu na kati na biso ekangani na Kristo.
7 Mpo nazwaki esengo mingi mpe kobɔndisama mingi mpo na bolingo na yo,+ mpamba te bolingo ya motema ya basantu elendisami+ mpo na yo, ndeko.
8 Yango wana, atako na nkombo ya Kristo nakoki koloba polele mpenza mpe na bosembo mpo na kopesa yo etinda+ osala oyo ebongi,
9 nazali nde kolendisa yo na bolingo,+ mpamba te nazali ndenge nazali, Paulo mobange, ɛɛ, sikoyo mpe moto ya bolɔkɔ+ mpo na Kristo Yesu;
10 nazali kolendisa yo mpo na mwana na ngai+ Onezime,+ oyo nakómi tata na ye+ awa nazali na kati ya minyɔlɔlɔ,
11 oyo liboso azalaki na ntina te mpo na yo nde sikoyo akómi na ntina mpo na yo mpe mpo na ngai.+
12 Ye moto nazali kozongisa epai na yo, ɛɛ, ye, elingi koloba, bolingo na ngai mpenza ya motema.+
13 Nazalaki na mposa ya kotikala na ye mpo na ngai moko na ntina ete na esika na yo+ akoka kokoba kosalela ngai na kati ya minyɔlɔlɔ+ oyo nazali komema mpo na nsango malamu.
14 Kasi nalingi kosala eloko moko te kozanga ndingisa na yo, mpo malamu na yo ezala ya kotindikama te, kasi euta na motema na yo.+
15 Kutu mbala mosusu ezali mpo na yango nde akimaki ngonga moko, mpo ozwa ye lisusu libela na libela,
16 lokola moombo lisusu te+ kasi koleka moombo,+ lokola ndeko ya bolingo,+ mingimingi mpenza mpo na ngai, kasi na koleka mpo na yo ezala na nzoto ya mosuni mpe na kati ya Nkolo.
17 Na yango, soki ozwaka ngai moninga na yo ya mosala,+ yambá+ ye na boboto ndenge olingaki koyamba ngai.
18 Lisusu, soki asalaki yo mabe moko boye to azali na nyongo na yo, tyá yango na motó na ngai.
19 Ngai Paulo nazali kokoma na lobɔkɔ na ngai mpenza:+ Nakozongisa yango—kutu ntina ezali te ya koyebisa yo ete ozali na nyongo na ngai, mobimba na yo wana.
20 Ɛɛ, ndeko, tiká nazwa litomba epai na yo na likambo oyo etali Nkolo: lendisá bolingo na ngai ya motema+ mpo na Kristo.
21 Lokola natye motema ete okondima, nazali kokomela yo, mpo nayebi ete okosala ata koleka makambo oyo nalobi.+
22 Kasi longola likambo wana, bongiselá ngai mpe esika,+ mpo nazali kolikya ete, mpo na mabondeli+ na bino, bakotika ngai+ mpo na bolamu bino.
23 Epafrasi+ mokangami lokola ngai na bomoko elongo na Kristo Yesu atindeli yo mbote,
24 ná Marko, Aristarke,+ Demasi,+ Luka, baninga na ngai ya mosala.
25 Boboto monene ya Nkolo Yesu Kristo ezala na elimo oyo bozali komonisa.+