Ezera 5:1-17
5 Mpe mosakoli Hagai+ ná Zekaria+ mwana ya mwana ya Ido+ mosakoli, basakwelaki Bayuda oyo bazalaki na Yuda mpe na Yerusaleme, na nkombo+ ya Nzambe ya Yisraele oyo azalaki kokamba bango.+
2 Na ntango yango nde Zerubabele+ mwana ya Shealatiele+ ná Yeshua+ mwana ya Yehozadake batɛlɛmaki mpe babandaki kotonga lisusu ndako ya Nzambe, oyo ezalaki na Yerusaleme; mpe basakoli ya Nzambe+ bazalaki na bango mpo na kopesa bango lisalisi.
3 Na ntango yango Tatenai+ guvɛrnɛrɛ ya ngámbo mosusu ya Ebale,+ Shetare-bozenai ná baninga na bango ya mosala bayaki epai na bango, mpe talá oyo bazalaki koloba na bango: “Nani apesi bino etinda ya kotonga ndako oyo mpe kosilisa eloko oyo ya mabaya minene?”+
4 Bongo balobaki na bango ete: “Mibali makasi oyo bazali kotonga ndako oyo, nkombo na bango banani?”
5 Mpe liso+ ya Nzambe na bango ezalaki likoló+ ya mikóló ya Bayuda, mpe bapekisaki bango mosala te tii lapolo ekende epai ya Dariuse mpe mokanda ya mokonzi ezonga mpo na likambo yango.
6 Talá maloba+ ya mokanda oyo Tatenai+ guvɛrnɛrɛ ya ngámbo mosusu ya Ebale,+ Shetare-bozenai+ ná baninga na ye ya mosala,+ baguvɛrnɛrɛ ya mike oyo bazalaki na ngámbo mosusu ya Ebale, batindelaki mokonzi Dariuse;
7 batindelaki ye liloba, mpe ekomamaki boye na kati na yango:
“Epai ya mokonzi Dariuse:
“Kimya nyonso ezala na yo!+
8 Tiká mokonzi ayeba ete tokendaki na etúká oyo eyangelami+ ya Yuda na ndako ya Nzambe monene,+ mpe yango ezali kotongama na mabanga minene oyo bazali kobalola mpo na kotya yango na bisika na yango, mpe mabaya ezali kotyama na bifelo; mpe mosala yango ezali kosalema na molende mpenza mpe ezali kokende liboso.
9 Bongo totunaki mikóló yango. Talá oyo tolobaki na bango: ‘Nani apesi bino etinda ya kotonga ndako oyo mpe kosilisa eloko oyo ya mabaya minene?’+
10 Mpe lisusu totunaki bango bankombo na bango, mpo tóyebisa yo yango, mpo tókoma bankombo ya mibali makasi oyo bazali kokamba bango.+
11 “Mpe talá liloba oyo bazongiselaki biso: ‘Tozali basaleli ya Nzambe ya likoló mpe ya nse,+ mpe tozali kotonga lisusu ndako oyo etongamaki bambula mingi liboso, oyo mokonzi monene ya Yisraele atongaki mpe asilisaki.+
12 Kasi, lokola batata na biso basilikisaki+ Nzambe ya likoló, ye apesaki+ bango na lobɔkɔ ya Nebukadenezare+ mokonzi ya Babilone, Mokaladea,+ mpe abukaki ndako oyo+ mpe amemaki bato na mboka mopaya, na Babilone.+
13 Atako bongo, na mbula ya liboso ya Siruse+ mokonzi ya Babilone, mokonzi Siruse apesaki etinda ya kotonga lisusu ndako oyo ya Nzambe.+
14 Mpe lisusu bisaleli+ ya wolo mpe ya palata ya ndako ya Nzambe oyo Nebukadenezare abimisaki na tempelo, oyo ezalaki na Yerusaleme, mpe amemaki yango na tempelo ya Babilone,+ mokonzi+ Siruse abimisaki yango na tempelo ya Babilone, mpe epesamaki epai ya Sheshebazare,+ nkombo ya moto oyo ye akómisaki guvɛrnɛrɛ.+
15 Mpe alobaki na ye ete: “Zwá bambɛki oyo.+ Kende, tyá yango na tempelo oyo ezali na Yerusaleme, mpe ndako ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango.”+
16 Ntango Sheshebazare yango akómaki, atyaki miboko ya ndako ya Nzambe,+ oyo ezali na Yerusaleme; mpe banda ntango wana tii sikoyo ezali kotongama lisusu, kasi esili naino te.’+
17 “Mpe sikoyo soki emonani malamu na miso ya mokonzi, tiká bálukaluka+ na ndako ya biloko ya motuya ya mokonzi oyo ezali kuna na Babilone, mpo na koyeba soki ezali solo ete mokonzi Siruse apesaki etinda+ ya kotonga lisusu ndako yango ya Nzambe na Yerusaleme; mpe tiká mokonzi atindela biso ekateli na ye na likambo yango.”