Ezera 3:1-13

3  Ntango sanza ya nsambo+ ekómaki, bana ya Yisraele bazalaki na kati ya bingumba na bango. Mpe bato babandaki koyangana lokola moto moko+ na Yerusaleme.+  Mpe Yeshua+ mwana ya Yehozadake ná bandeko na ye banganga-nzambe, ná Zerubabele+ mwana ya Shealatiele+ ná bandeko na ye, batɛlɛmaki mpe batongaki etumbelo ya Nzambe ya Yisraele, mpo na kopesa bambeka ya kotumba likoló na yango, na kolanda oyo ekomami+ na mobeko ya Moize moto ya Nzambe ya solo.  Bongo batɛlɛmisaki etumbelo yango na esika na yango ya kala,+ mpamba te nsɔmɔ ekwelaki bango mpo na bato ya mikili mosusu,+ mpe na etumbelo yango, babandaki kopesa Yehova bambeka ya kotumba, bambeka ya kotumba ya ntɔngɔ mpe ya mpokwa.+  Na nsima basalaki fɛti ya mwa bandako ya matiti+ na kolanda oyo ekomamá,+ bapesaki mpe bambeka ya kotumba mokolo na mokolo na kolanda motángo oyo esɛngamaki na mobeko mokolo na mokolo.+  Mpe na nsima, bapesaki likabo ya kotumba ya ntango nyonso+ mpe ya basanza ya sika+ mpe ya bileko nyonso ya bafɛti+ ya Yehova oyo esantisami mpe ya moto nyonso oyo, na bolingo na ye, apesaki Yehova likabo ya bolingo.+  Banda na mokolo ya liboso ya sanza ya nsambo,+ babandaki kopesa Yehova bambeka ya kotumba, wana moboko ya tempelo ya Yehova etyamaki naino te.  Mpe bapesaki mbongo+ na bato oyo bakataka mabanga+ mpe na bato oyo bayebi malamu misala ya mabɔkɔ,+ bapesaki Basidone+ mpe bato ya Tire+ biloko ya kolya,+ masanga ná mafuta,+ mpo na koya na mabaya ya sɛdrɛ banda na Libá+ tii na mbu na Yope,+ na kolanda ndingisa oyo Siruse+ mokonzi ya Perse apesaki bango.  Mpe na mbula ya mibale ya kokóma na bango na ndako ya Nzambe ya solo na Yerusaleme, na sanza ya mibale,+ Zerubabele+ mwana ya Shealatiele+ ná Yeshua+ mwana ya Yehozadake mpe bandeko na bango mosusu, banganga-nzambe ná Balevi, mpe baoyo nyonso bautaki na bokangami+ mpo na kokende na Yerusaleme babandaki mosala; mpe sikoyo batyaki Balevi+ bakambi ya mosala ya ndako ya Yehova,+ banda na baoyo bazalaki na mbula ntuku mibale (20) tii na likoló.  Na yango Yeshua,+ bana na ye ná bandeko na ye, ná Kadimiele ná bana na ye, bana ya Yuda, batɛlɛmaki lokola etuluku moko mpo bázala bakambi ya baoyo bazali kosala mosala na ndako ya Nzambe ya solo, ná bana ya Henadade,+ bana na bango ná bandeko na bango, Balevi. 10  Ntango batongi batyaki moboko+ ya tempelo ya Yehova, banganga-nzambe balati bilamba ya mosala+ na bango, bazalaki na bakelelo,+ mpe Balevi bana ya Asafe,+ bazalaki na basɛmbalɛ,+ batɛlɛmaki mpo na kosanzola Yehova na kolanda malako+ ya Davidi mokonzi ya Yisraele. 11  Mpe babandaki kozongiselana maloba na loyembo, kosanzola+ mpe kopesa Yehova matɔndi, “mpo azali malamu,+ mpo motema boboto na ye epai ya Yisraele ezali mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”+ Kasi bato nyonso, bazalaki koganga na koganga moko makasi+ mpe kosanzola Yehova mpo na kotyama ya moboko ya ndako ya Yehova. 12  Mpe mingi kati na banganga-nzambe+ ná Balevi mpe bankumu ya bandako ya batata,+ mikóló oyo bamonaki ndako+ ya kala, bazalaki kolela+ na mongongo makasi ntango moboko+ ya ndako oyo ezalaki kotyama na miso na bango, wana ebele ya bato mosusu bazalaki kotombola mingongo mpe koganga na esengo.+ 13  Bongo bato bazalaki kokesenisa te makɛlɛlɛ ya koganga ya kosepela+ ná makɛlɛlɛ ya kolela ya bato, mpo bato bazalaki koganga na koganga moko makasi, mpe makɛlɛlɛ ezalaki koyokana mosika mpenza.

Maloba na nse