Ezera 1:1-11

1  Mpe na mbula ya liboso ya Siruse+ mokonzi ya Perse, mpo liloba ya Yehova oyo ebimaki na monɔkɔ ya Yirimia+ ekokisama, Yehova alamwisaki+ elimo ya Siruse mokonzi ya Perse, bongo atindaki bábelela+ na bokonzi na ye mobimba, mpe lisusu bákoma na mokanda+ ete:  “Talá oyo Siruse mokonzi ya Perse alobi:+ ‘Yehova Nzambe ya likoló+ apesi ngai+ makonzi nyonso ya mabele, mpe ye moko apesi ngai mokumba ya kotongela ye ndako na Yerusaleme,+ oyo ezali na Yuda.  Moto nyonso kati na bino nyonso bato na ye, Nzambe na ye azala na ye.+ Amata na Yerusaleme, oyo ezali na Yuda, mpe atonga lisusu ndako ya Yehova Nzambe ya Yisraele—ye azali Nzambe ya solo+—oyo ezalaki na Yerusaleme.+  Moto nyonso oyo atikali na bisika nyonso oyo ye azali kofanda mopaya,+ bato ya esika na ye básunga ye na palata, na wolo, na biloko mpe na banyama ya mboka, ná likabo ya bolingo+ mpo na ndako ya Nzambe ya solo oyo ezalaki na Yerusaleme.’”  Bongo bankumu+ ya batata ya Yuda mpe ya Benyamina, banganga-nzambe ná Balevi batɛlɛmaki, ɛɛ moto nyonso oyo elimo+ ya Nzambe ya solo elamwisaki ye, mpo na komata mpe kotonga lisusu ndako ya Yehova+ oyo ezalaki na Yerusaleme.  Baoyo nyonso bazalaki zingazinga na bango, balendisaki+ bango mpe bapesaki bango bisaleli ya palata, wolo, biloko mpe banyama ya mboka mpe biloko ya kitoko, kozanga kotánga makabo nyonso ya bolingo oyo bapesaki.+  Lisusu, mokonzi Siruse abimisaki bisaleli ya ndako ya Yehova,+ oyo Nebukadenezare abimisaki na Yerusaleme+ mpe atyaki na ndako ya nzambe na ye.+  Mpe Siruse mokonzi ya Perse abimisaki yango na litambwisi ya Mitredate mobombi mosolo mpe atángaki yango, bongo apesaki yango Sheshebazare+ nkumu ya Yuda.+  Sikoyo talá motángo na yango: bisaleli ntuku misato (30) ya wolo, oyo esalemá lokola kitunga, bisaleli nkóto moko (1 000) ya palata, oyo esalemá lokola kitunga, bambɛki mosusu ntuku mibale na libwa (29), 10  mabakuli+ ya mike ntuku misato (30) ya wolo, mabakuli ya mike nkama minei na zomi (410) ya palata mpo na misala mosusu, bisaleli mosusu nkóto moko (1 000). 11  Bisaleli nyonso ya wolo mpe ya palata ezalaki nkóto mitano na nkama minei (5 400). Sheshebazare+ amataki na biloko nyonso wana, ntango bato oyo bamemamaki na mboka mopaya,+ na Babilone, bamataki na Yerusaleme.

Maloba na nse