Ezekiele 9:1-11
9 Mpe abelelaki na mongongo makasi na matoi na ngai ete: “Bóbɛlɛmisa baoyo bazali kotya likebi na engumba, moto na moto na ebundeli na ye na lobɔkɔ na ye, mpo na kobebisa!”
2 Mpe talá! mibali motoba bazali kouta na ngámbo ya porte ya likoló+ oyo etali na nɔrdi, moto na moto asimbi na lobɔkɔ na ye ebundeli na ye mpo na kobukabuka; mpe kati na bango, moto moko oyo alati elamba ya lini+ azali na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ na loketo na ye, mpe bakɔtaki mpe batɛlɛmaki pene na etumbelo ya motako.+
3 Nde nkembo ya Nzambe ya Yisraele,+ elongwaki likoló ya bakeruba+ epai yango ezalaki, ekei na monɔkɔ ya ndako,+ mpe ye abandaki kobelela moto oyo alataki elamba ya lini,+ oyo etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ ezalaki na loketo na ye.
4 Mpe Yehova alobaki lisusu na ye boye: “Leká na katikati ya engumba, na katikati ya Yerusaleme, mpe osengeli kotya elembo na bilongi ya bato oyo bazali kokimela mpe kolelalela+ mpo na makambo nyonso oyo eyinamá oyo ezali kosalema na kati na yango.”+
5 Mpe na matoi na ngai, alobaki boye na bamosusu wana: “Bóleka na engumba nsima na ye mpe bóbɛta. Liso na bino eyoka mawa te, mpe bómonisa motema mawa ata moke te.+
6 Mobange, elenge mobali mpe ngɔndɔ ná mwana moke mpe basi,+ bosengeli koboma mpenza—kosilisa bango nyɛɛ. Kasi, bóbɛlɛma te na moto nyonso oyo azali na elembo,+ mpe bosengeli kobanda na esika na ngai mosantu.”+ Bongo babandaki na mibange oyo bazalaki liboso ya ndako.+
7 Mpe alobaki na bango lisusu ete: “Bókómisa ndako mbindo mpe bótondisa mapango na bato oyo babomami.+ Bóbima!” Mpe babimaki mpe babɛtaki na kati ya engumba.
8 Mpe esalemaki boye: wana bazalaki kobɛta mpe natikalaki ngai moko, nakweaki na elongi na ngai+ mpe nagangaki mpe nalobaki ete: “Mawa!+ Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Ozali kobebisa baoyo nyonso batikali na Yisraele awa ozali kosopela Yerusaleme nkɛlɛ na yo?”+
9 Bongo alobaki na ngai ete: “Libunga ya ndako ya Yisraele mpe ya Yuda+ ezali monene mingi, mingi mpenza,+ mpe mokili etondi na makila oyo esopami+ mpe engumba etondi na kilikili;+ mpo balobi: ‘Yehova atiki mokili oyo,+ mpe Yehova azali komona te.’+
10 Ngai mpe, liso na ngai ekoyoka mawa te,+ nakomonisa mpe motema mawa te.+ Nakozongisa mpenza nzela na bango na mitó na bango.”+
11 Mpe talá! moto oyo alataki elamba ya lini, oyo azalaki na etyelo ya mai ya mokanda ya sɛkrɛtɛrɛ na loketo na ye, azongisaki liloba ete: “Nasali ndenge opesaki ngai mitindo.”+