Ezekiele 8:1-18
8 Mpe esalemaki boye: na mbula ya motoba, na sanza ya motoba, na mokolo ya mitano ya sanza yango, nafandaki na ndako na ngai mpe mikóló ya Yuda bafandaki liboso na ngai,+ ntango lobɔkɔ ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso ekwelaki ngai wana.+
2 Mpe nabandaki komona, mpe talá! eloko moko oyo ezalaki komonana lokola mɔtɔ;+ banda na oyo ezalaki komonana lokola loketo na ye tii na nse ezalaki na mɔtɔ,+ mpe banda na loketo na ye tii likoló ezalaki na eloko moko oyo ezalaki komonana lokola mwa kongɛnga, lokola kongɛnga ya wolo oyo esangani na palata.+
3 Na nsima, asembolaki oyo ezalaki komonana lokola lobɔkɔ+ mpe asimbaki ngai na nsuki ya motó na ngai, mpe elimo+ moko ememaki ngai kati na mabele ná likoló mpe ememaki ngai na Yerusaleme na bimonaneli ya Nzambe,+ na esika ya kokɔta na porte ya kati+ oyo etali na ngámbo ya nɔrdi, esika elembo ya zuwa oyo eyokisaka zuwa ezali.+
4 Mpe talá! nkembo ya Nzambe ya Yisraele ezalaki kuna,+ ezalaki komonana lokola eloko oyo namonaki na lobwaku ya patatalu.
5 Mpe alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, nabondeli yo, tombolá miso na yo na ngámbo ya nɔrdi.” Bongo natombolaki miso na ngai na ngámbo ya nɔrdi, mpe talá! elembo yango ya zuwa+ ezalaki na esika ya kokɔta, na nɔrdi ya porte ya etumbelo.
6 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, ozali komona makambo minene oyo eyinamá oyo bazali kosala,+ makambo oyo ndako ya Yisraele bazali kosala awa, mpo nakóma mosika na esika na ngai mosantu?+ Mpe kutu okomona lisusu makambo minene oyo eyinamá.”
7 Na yango, amemaki ngai na esika ya kokɔta na lopango, mpe nabandaki komona, mpe talá! lidusu moko na efelo.
8 Bongo alobaki na ngai ete: “Mwana ya moto, nabondeli yo, tɔbɔlá efelo.”+ Mpe nsukansuka, natɔbɔlaki efelo, mpe talá! esika moko boye ya kokɔta ezalaki.
9 Mpe alobaki na ngai lisusu ete: “Kɔtá mpe moná makambo ya mabe oyo eyinamá oyo bazali kosala awa.”+
10 Bongo nakɔtaki mpe nabandaki komona, mpe talá! lolenge nyonso ya bililingi+ ya biloko oyo ebendanaka na libumu mpe banyama oyo eyokisaka mpii,+ mpe bikeko nyonso ya bosɔtɔ ya ndako ya Yisraele,+ mayemi ezalaki na efelo epai na epai.
11 Mpe mibali ntuku nsambo (70)+ kati na mikóló ya ndako ya Yisraele, Yaazania mwana ya Shafane+ atɛlɛmi na kati na bango, batɛlɛmi liboso na yango, moto na moto na eloko na ye ya kotumba mpaka ya malasi na lobɔkɔ na ye, mpe nsolo ya malasi ya lipata ya mpaka ya malasi ezalaki komata.+
12 Mpe alobaki na ngai boye: “Omoni, Ee mwana ya moto, oyo mikóló ya ndako ya Yisraele bazali kosala na molili,+ moto na moto na bashambrɛ ya kati ya bililingi na ye ya kitoko mpenza? Mpo bazali koloba ete: ‘Yehova azali komona biso te.+ Yehova atiki mokili.’”
13 Mpe akobaki koloba na ngai boye: “Kutu okomona lisusu makambo minene oyo eyinamá oyo bazali kosala.”+
14 Bongo amemaki ngai na esika ya kokɔta na porte ya ndako ya Yehova, oyo ezali na ngámbo ya nɔrdi, mpe talá! kuna, basi bafandi, bazali kolela nzambe Tamuze.
15 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Omoni yango, Ee mwana ya moto? Kutu okomona lisusu makambo minene oyo eyinamá+ ya mabe koleka oyo.”
16 Bongo amemaki ngai na lopango ya kati ya ndako ya Yehova,+ mpe talá! na esika ya kokɔta na tempelo ya Yehova, kati na ndako ya kokɔtela ná etumbelo,+ mibali soki ntuku mibale na mitano (25)+ bapesi tempelo ya Yehova mikɔngɔ na bango+ mpe bilongi na bango etali na ɛsti, mpe bazalaki kotala na ngámbo ya ɛsti, bazalaki kogumbamela moi.+
17 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Omoni yango, Ee mwana ya moto? Makambo oyo eyinamá oyo bato ya ndako ya Yuda basali awa ezali nde likambo moke, mpo bátondisa lisusu mokili na mobulu+ mpe básilikisa ngai lisusu, mpe talá bazali kosembola mwa etape yango na zolo na ngai?
18 Ngai mpe nakosala makambo na nkɛlɛ.+ Liso na ngai ekoyoka mawa te, nakomonisa mpe motema mawa te.+ Mpe bakobelela mpenza na mongongo makasi na matoi na ngai, kasi nakoyoka bango te.”+