Ezekiele 7:1-27
7 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Nde yo, Ee mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na mabele ya Yisraele: ‘Nsuka, nsuka yango, ekómeli nsuka minei ya mokili.+
3 Sikoyo, nsuka ekómeli yo,+ mpe nakotindela yo mpenza nkanda na ngai, mpe nakosambisa yo na kolanda banzela na yo+ mpe nakozongisela yo makambo na yo nyonso oyo eyinamá.
4 Mpe liso na ngai ekoyokela yo mawa te,+ nakomonisa mpe motema mawa te, mpo nakozongisela yo banzela na yo, mpe makambo na yo oyo eyinamá ekozala na kati na yo;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+
5 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mpasi, mpasi oyo ekokani na mosusu te, talá! ezali koya.+
6 Nsuka ekoya mpenza.+ Nsuka yango ekoya mpenza; ekolamukela yo.+ Talá! Ezali koya.
7 Motole ya fololo ekoyela yo, Ee yo moto oyo ofandi na mokili; ntango ekoya mpenza, mokolo ekómi pene.+ Mobulungano ezali, kasi koganga ya bangomba te.
8 “‘Sikoyo, etikali moke nasopela yo nkɛlɛ na ngai,+ mpe nakosilisela yo nkanda na ngai,+ mpe nakosambisa yo na kolanda banzela na yo+ mpe nakozongisela yo makambo na yo nyonso oyo eyinamá.
9 Liso na ngai ekoyoka mawa te+ mpe nakomonisa motema mawa te.+ Nakozongisela yo yango na kolanda banzela na yo, mpe makambo na yo oyo eyinamá ekozala mpenza na kati na yo;+ mpe bokoyeba mpenza ete ngai Yehova moto nazali kobɛta.+
10 “‘Talá! Mokolo yango! Talá! Ezali koya.+ Motole ya fololo ebimi.+ Lingenda ebimisi fololo.+ Lofundo ebimisi nkasa.+
11 Mobulu ekoli mpe ekómi lingenda ya makambo ya mabe.+ Euti na bango te, euti mpe na bozwi na bango te; mpe euti na bango moko te, lokumu mpe ezali te kati na bango.
12 Ntango yango ekoya mpenza, mokolo yango ekokóma mpenza. Mosombi asepela te;+ mpe motɛki abanda kolela te, mpo nkanda makasi ezali mpo na ebele ya bato na yango nyonso.
13 Mpo motɛki akozongela te biloko oyo etɛkamaki, wana bazali naino na bomoi na kati ya bato ya bomoi; mpo emonaneli ezali mpo na ebele ya bato na yango. Moto moko te akozonga, mpe bakozala te moto na moto nkolo ya bomoi na ye moko na nzela ya libunga na ye.
14 “‘Bayuli kelelo+ mpe etindi moto nyonso amibongisa, kasi moto moko te azali kokende na etumba, mpo nkanda na ngai makasi ezali mpo na ebele ya bato na yango nyonso.+
15 Mopanga+ ezali libándá, mpe maladi mabe ná nzala ezali na kati.+ Moto nyonso oyo azali na elanga, akokufa na mopanga, mpe bato nyonso oyo bazali na engumba, nzala ná maladi mabe ekolya bango.+
16 Mpe bato na bango oyo babiki bakokima mpenza+ mpe bakokóma na bangomba lokola bibenga ya mabwaku,+ oyo yango nyonso ezali kokimela, moto na moto na libunga na ye.
17 Mabɔkɔ nyonso ezali se kolɛmba;+ mpe mabɔlɔngɔ nyonso ezali se kotangisa mai.*+
18 Mpe bakangi ngɔtɔ na loketo,+ mpe kolɛnga ezipi bango;+ mpe nsɔni ezali na bilongi nyonso+ mpe libandi ezali na mitó na bango nyonso.+
19 “‘Bakobwaka palata na bango na babalabala, mpe wolo na bango ekokóma eloko moko ya koyokela mpii. Ezala palata na bango to wolo na bango ekokoka kobikisa bango te na mokolo ya nkɛlɛ ya Yehova.+ Bakotondisa milimo na bango te, mpe bakotondisa misɔpɔ na bango te, mpo ekómi eloko oyo ebɛtisaka libaku, oyo ezali kobimisa libunga na bango.+
20 Mpe kitoko ya eloko oyo babongisaka na yango nzoto—batye yango mpo na lolendo; mpe basali na yango bikeko na bango oyo eyinamá,+ biloko na bango ya bosɔtɔ.+ Yango wana nakokómisa yango eloko oyo bakoyokela mpii.+
21 Mpe nakopesa yango na lobɔkɔ ya bapaya mpo epunzama mpe na bato mabe ya mabele mpo ezala eloko oyo bakobɔtɔla,+ mpe bakokómisa mpenza yango eloko mpamba.
22 “‘Mpe nakolongola mpenza elongi na ngai epai na bango,+ mpe bakokómisa mpamba mpenza esika na ngai oyo ebombaná, mpe miyibi bakokɔta na kati na yango mpe bakokómisa mpenza yango eloko mpamba.+
23 “‘Salá monyɔlɔlɔ,+ mpo mokili etondi na lisambisi oyo ebebisami na makila+ mpe engumba etondi na mobulu.+
24 Mpe nakomema bikólo ya mabe koleka,+ mpe bakozwa mpenza bandako na bango,+ mpe nakosukisa lolendo ya bato ya makasi,+ mpe bisika na bango mosantu ekokóma mpenza eloko mpamba.+
25 Bwale ekoya, mpe bakoluka mpenza kimya kasi ekozala te.+
26 Ekozala kaka mikakatano na mikakatano,+ mpe ekozala kaka nsango na nsango, mpe bato bakoluka mpenza emonaneli epai ya mosakoli,+ mpe mobeko ekokufa epai ya nganga-nzambe mpe toli epai ya mikóló.+
27 Mokonzi akolata mpili;+ ata nkumu akolata libebi,+ mpe mabɔkɔ ya bato ya mokili ekolɛnga. Nakosala bango ndenge nzela na bango ezali,+ mpe nakosambisa bango na kosambisa oyo ebongi na bango;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+
Maloba na nse
^ Elingi koloba, masuba oyo ebimi mpo na kobanga.