Ezekiele 6:1-14
6 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Mwana ya moto, talisá elongi na yo epai ya bangomba ya Yisraele mpe sakwelá+ yango.+
3 Mpe osengeli koloba boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele, bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso:+ Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba mpe bangomba mike,+ na banzela ya mai mpe na mabwaku: “Ngai oyo! Nazali kokitisela bino mopanga, mpe nakobebisa mpenza bisika na bino oyo etombwaná.+
4 Mpe bitumbelo na bino ekotikala mpamba+ mpe bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekobukana, mpe nakobwaka bato na bino oyo babomami liboso ya bikeko na bino ya bosɔtɔ.+
5 Mpe nakotya bibembe ya bana ya Yisraele liboso ya bikeko na bango ya bosɔtɔ, mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino.+
6 Na bisika na bino nyonso ya kofanda,+ bingumba ekobebisama mpenza+ mpe bisika oyo etombwaná ekotikala mpamba, mpo ebeba+ mpe bitumbelo na bino etikala mpamba mpe ebukana+ mpenza mpe bikeko na bino ya bosɔtɔ esuka mpenza+ mpe bitumbelo na bino ya mpaka ya malasi ekokweisama+ mpe misala na bino elongolama.
7 Mpe bato oyo bakobomama bakokwea mpenza bibembe na kati na bino,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+
8 “‘“Mpe ntango ekosalema, nakotikela bino bato oyo babiki na mopanga na kati ya bikólo, ntango bokopalanganisama na kati ya mikili.+
9 Mpe ya solo, bato na bino oyo bakobika bakokanisa ngai lisusu na kati ya bikólo epai bamemaki bango bakangami,+ mpamba te nayoki mpasi mpo na motema na bango ya pite etiki ngai+ mpe mpo miso na bango oyo ezali kolanda bikeko na bango ya bosɔtɔ mpo na kosala pite;+ mpe bakoyoka mpenza mpii oyo ekomonana na bilongi na bango mpo na makambo mabe oyo basali na makambo na bango nyonso oyo eyinamá.+
10 Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova; ezali mpamba te nde nalobaki+ ete nakosalela bango likambo oyo ya mpasi.”’+
11 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bɛtá mabɔkɔ+ na yo mpe tutatutá na lokolo na yo, mpe lobá: “Aa, mawa!” mpo na makambo nyonso ya mabe oyo eyinamá ya ndako ya Yisraele,+ mpo bakokwea na mopanga,+ na nzala+ mpe na maladi mabe.+
12 Ye oyo azali mosika,+ akokufa na maladi mabe; mpe ye oyo azali pene, akokwea na mopanga; mpe ye oyo atikali mpe oyo abiki, akokufa na nzala, mpe nakosilisa nkɛlɛ na ngai epai na bango.+
13 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango bato na bango oyo babomami bakozala na kati ya bikeko na bango ya bosɔtɔ,+ zingazinga ya bitumbelo na bango,+ likoló ya ngomba moke nyonso oyo etombwaná,+ mpe na bansɔngɛ nyonso ya bangomba+ mpe na nse ya nzete nyonso oyo etondi na nkasa+ mpe na nse ya nzete nyonso monene ya nkasa mingi,+ esika bapesi nsolo moko ya kokitisa motema na bikeko na bango nyonso ya bosɔtɔ.+
14 Mpe nakosembolela bango lobɔkɔ na ngai+ mpe nakokómisa mokili yango esika oyo etikali mpamba, ɛɛ libebi moko ya mabe koleka esobe oyo ezali na nzela ya Dibla, na bisika na bango nyonso ya kofanda. Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”