Ezekiele 5:1-17

5  “Nde yo, Ee mwana ya moto, zwá mopanga moko oyo epeli. Okozwa yango mpo na yo lokola razware ya mokati-nsuki, mpe osengeli kolekisa yango na motó na yo mpe na mandefu na yo,+ mpe osengeli kozwa emekeli-kilo mpe kokabola nsuki yango ndambo ndambo.  Moko ya bandambo misato, okotumba yango na mɔtɔ na katikati ya engumba ntango kaka mikolo ya kozingama ekokoka.+ Mpe osengeli kozwa ndambo mosusu ya misato. Okobɛta yango na mopanga bipai nyonso ya engumba,+ mpe ndambo ya misato ya nsuka, okopanza yango na mopɛpɛ, mpe nakobimisa mopanga nsima na bango.+  “Mpe okozwa mwa ndambo na yango mpe okolínga yango na bansɔngɛ ya elamba na yo.+  Mpe okozwa mosusu na yango mpe okobwaka mpenza yango na katikati ya mɔtɔ mpe okozikisa yango na mɔtɔ. Mɔtɔ ekobima na yango, ekokende na ndako mobimba ya Yisraele.+  “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Oyo ezali Yerusaleme. Natye ye na katikati ya bikólo, mpe mikili ezali zingazinga na ye.  Mpe abandaki kotombokela bikateli na ngai ya lisambisi na mabe koleka bikólo,+ mpe kotombokela mibeko na ngai koleka mikili oyo ezali zingazinga na ye, mpo baboyaki bikateli na ngai ya lisambisi mpe, na oyo etali mibeko na ngai, batambolaki na kati na yango te.’+  “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola bozalaki na mobulu koleka+ bikólo oyo ezali zingazinga na bino, na ndenge botambolaki te na mibeko na ngai mpe bosalelaki te bikateli na ngai ya lisambisi;+ bosalaki na kolanda bikateli ya lisambisi ya bikólo oyo ezali zingazinga na bino, boye te?+  na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee engumba, ɛɛ ngai,+ mpe nakokweisa bikateli na ngai ya lisambisi kati na yo na miso ya bikólo.+  Mpe nakosala kati na yo likambo oyo nasalá naino te mpe nakosala lisusu likambo ya ndenge wana te mpo na makambo na yo nyonso oyo eyinamá.+ 10  “‘“Na yango, batata bakolya bana na kati na yo,+ mpe bana bakolya batata na bango, mpe nakokweisa bitumbu na kati na yo mpe nakopanza bato na yo nyonso oyo bakotikala na mipɛpɛ nyonso.”’+ 11  “‘Na yango, lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘ya solo, lokola esika na ngai mosantu nde okómisi mbindo na makambo na yo nyonso ya bosɔtɔ+ mpe na makambo na yo nyonso oyo eyinamá,+ ngai moko Moto nakokitisa yo+ mpe liso na ngai ekoyoka mawa te,+ ngai moko mpe nakomonisa motema mawa te.+ 12  Moko ya bandambo misato na yo—bakokufa na maladi mabe,+ mpe bakosila na nzala na kati na yo.+ Mpe ndambo ya misato mosusu—bakokwea na mopanga zingazinga na yo. Mpe ndambo ya misato ya nsuka, nakopanza mpenza bango na mipɛpɛ nyonso,+ mpe nakobimisa mopanga nsima na bango.+ 13  Mpe nkanda na ngai ekosila mpenza+ mpe nkɛlɛ na ngai epai na bango ekokita+ mpe motema na ngai ekokita;+ mpe bakoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nde nalobi mpo nasɛngaka ete bákangama kaka na ngai,+ ntango nakosilisela bango nkɛlɛ na ngai. 14  “‘Mpe nakokómisa yo esika moko oyo ebebisami mpe eloko ya nsɔni na kati ya bikólo oyo ezali zingazinga na yo liboso ya miso ya moleki-nzela nyonso.+ 15  Mpe okokóma mpenza eloko ya nsɔni+ mpe eloko ya kofinga,+ ndakisa mpo na kokebisa+ mpe nsɔmɔ mpo na bikólo oyo ezali zingazinga na yo, ntango nakopesa bitumbu epai na yo na nkanda mpe na nkɛlɛ mpe nakopamela yo na nkɛlɛ.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi. 16  “‘Ntango nakotindela bino makula ya nzala oyo ebomaka,+ oyo ekozala mpenza mpo na libebi, makula oyo nakotinda mpenza mpo na kobebisa bino,+ ɛɛ nakobakisela bino nzala mpe nakobuka mangenda oyo bakakisi mampa oyo esalemi lokola lopɛtɛ.+ 17  Mpe nakotindela bino nzala mpe banyama mabe ya zamba,+ mpe ekozangisa bino bana, mpe maladi mabe+ mpe makila+ ekoleka kati na yo, mpe nakokitisela yo mopanga.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.’”

Maloba na nse