Ezekiele 45:1-25

45  “‘Mpe ntango bokokabola mokili mpo ezala libula,+ bosengeli kopesa Yehova likabo,+ eteni mosantu oyo euti na mokili yango;+ mpo na bolai: mapeko nkóto ntuku mibale na mitano (25 000) na bolai, mpe mpo na bonene: mapeko nkóto zomi (10 000).+ Ekozala eteni moko mosantu na bandelo na yango nyonso epai na epai.  Na kati na yango, bakozwela esika mosantu bolai ya mapeko nkama mitano (500) mpe bonene ya mapeko nkama mitano, bakosala yango nyonso karé;+ mpe ekozala na mapeko ntuku mitano (50) mpo na esika ya koleisa banyama matiti na mopanzi na yango mokomoko.+  Na oyo wana, okozwa bolai ya mapeko nkóto ntuku mibale na mitano (25 000) mpe bonene ya mapeko nkóto zomi (10 000), mpe esika mosantu ekozala na kati na yango, eloko moko oyo eleki bosantu.+  Eteni mosantu oyo ezwami na mokili yango ekozala mpo na banganga-nzambe,+ basaleli ya esika mosantu, baoyo bazali kobɛlɛma mpo na kosalela Yehova mosala.+ Mpe ekozala mpo na bango esika ya kotonga bandako, mpe esika esantisami mpo na esika mosantu.  “‘Ekozala na bolai ya mapeko nkóto ntuku mibale na mitano (25 000) mpe na bonene ya mapeko nkóto zomi (10 000).+ Ekokóma ya Balevi’, basaleli ya Ndako. Bakozwa bisika ya kolya ntuku mibale (20) oyo ekozala ya bango.+  “‘Mpe bokopesa bonene ya mapeko nkóto mitano (5 000) mpe bolai ya mapeko nkóto ntuku mibale na mitano (25 000), ezala mpo na engumba, kaka ndenge moko na likabo mosantu.+ Ekozala ya ndako mobimba ya Yisraele.  “‘Mpe mpo na nkumu, ekozala na ngámbo oyo mpe na ngámbo oyo kuna ya likabo mosantu+ mpe ya esika oyo ezali mpo na engumba, pembeni ya likabo mosantu mpe pembeni ya esika oyo ezali mpo na engumba, mwa ndambo na ngámbo ya wɛsti mpe ekei na wɛsti mpe mwa ndambo na ngámbo ya ɛsti mpe ekei na ɛsti. Mpe bolai ekokokana na moko ya biteni yango, banda na ndelo ya wɛsti kino na ndelo ya ɛsti.+  Bongo mabele yango ekokóma eloko na ye na Yisraele. Mpe bankumu na ngai bakonyokola bato na ngai lisusu te,+ mpe bakopesa mokili na ndako ya Yisraele ndenge mabota na bango ezali.’+  “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bokei mosika, Ee bankumu ya Yisraele!’+ “‘Bólongola mobulu mpe kopunza,+ mpe bósalela bosembo ná boyengebene mpenza.+ Bótika kobɔtɔla bato na ngai biloko,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. 10  ‘Bokozala na bimekeli-kilo ya sikisiki, efa ya sikisiki mpe bati ya sikisiki.+ 11  Mpo na efa mpe bati, ekozala kaka bonene oyo epesami, mpo bati ezwa homɛrɛ moko kabolá na zomi mpe homɛrɛ moko kabolá na zomi, efa moko;+ bonene na yango ekopesama na kolanda ndenge homɛrɛ ezali. 12  Mpe shekele+ ezali gera ntuku mibale (20).+ Shekele ntuku mibale, shekele ntuku mibale na mitano (25), shekele zomi na mitano ekozala manɛ mpo na bino.’ 13  “‘Talá likabo oyo bokopesa: na homɛrɛ ya blé, efa moko kabolá na motoba, mpe na homɛrɛ ya ɔrje, efa moko kabolá na motoba; 14  mpe mpo na pɔsɔ ya mafuta, ezali bati ya mafuta. Bati ezali korosi moko kabolá na zomi. Bati zomi ezali homɛrɛ moko; mpo bati zomi ezali homɛrɛ moko. 15  Mpe mpate moko ya etonga, kati na bampate nkama mibale (200) oyo euti na bibwɛlɛ ya Yisraele,+ mpo na likabo ya mbuma+ mpe mpo na likabo mobimba ya kotumba+ mpe mpo na bambeka ya boyokani,+ mpo na kozipa masumu na bango,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. 16  “‘Bongo bato nyonso ya mokili yango, bakozala na mokumba ya kopesa nkumu na Yisraele+ likabo yango.+ 17  Mpe nkumu+ nde akozala na mokumba ya kopesa makabo ya kotumba mobimba,+ likabo ya mbuma+ mpe likabo ya masanga+ na ntango ya bafɛti+ mpe na basanza ya sika+ mpe na basabata,+ na bileko ya bafɛti nyonso ya ndako ya Yisraele.+ Ye nde akopesa likabo mpo na lisumu mpe likabo ya mbuma mpe likabo ya kotumba mobimba mpe bambeka ya boyokani, mpo na kozipa masumu ya ndako ya Yisraele.’ 18  “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Na sanza ya liboso, na mokolo ya liboso ya sanza yango, okozwa mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba,+ mpe osengeli kopɛtola esika mosantu na lisumu.+ 19  Mpe nganga-nzambe akozwa ndambo ya makila ya likabo mpo na lisumu mpe akotya yango na likonzí ya baporte+ ya Ndako mpe na bansɔngɛ minei ya mwa etando oyo ebimá na mopanzi ya etumbelo+ zingazinga mpe na likonzí ya porte ya lopango ya kati. 20  Mpe ndenge wana nde okosala na mokolo ya nsambo ya sanza yango mpo na moto nyonso oyo asali libunga+ mpe mpo na moto nyonso oyo azangi mayele; mpe bosengeli kozipa masumu mpo na Ndako.+ 21  “‘Na sanza ya liboso, na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango, ekozala elekeli+ mpo na bino. Lokola ezali fɛti ya mikolo nsambo, bagato oyo ezangi levire nde ekolyama.+ 22  Mpe na mokolo yango, nkumu asengeli kopesa mwana-ngɔmbɛ mobali ezala likabo mpo na lisumu mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso ya mokili.+ 23  Mpe mpo na mikolo nsambo ya fɛti,+ akopesa Yehova likabo ya kotumba mobimba oyo: bana-ngɔmbɛ nsambo ya mibali mpe bampate-mibali nsambo, oyo ezangi mbeba, mokolo na mokolo mpo na mikolo yango nsambo,+ mpe likabo mpo na lisumu: ntaba-mobali moko mokolo na mokolo.+ 24  Mpe mpo na likabo ya mbuma, akopesa efa moko mpo na mwana-ngɔmbɛ mobali mpe efa moko mpo na mpate-mobali, mpe, mpo na mafuta: hini moko mpo na efa moko.+ 25  “‘Na sanza ya nsambo, na mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango, na fɛti,+ akopesa biloko ndenge moko na oyo wana mikolo nsambo,+ ndenge moko na likabo mpo na lisumu, na likabo ya kotumba mobimba, mpe na likabo ya mbuma mpe na mafuta.’”

Maloba na nse