Ezekiele 43:1-27
43 Na nsima, akambaki ngai epai ya porte, porte oyo etali na ngámbo ya ɛsti.+
2 Mpe talá! nkembo+ ya Nzambe ya Yisraele ezalaki kouta na ngámbo ya ɛsti,+ mpe mongongo na ye ezalaki lokola lokito ya mai ebele;+ mpe mabele engɛngaki mpo na nkembo na ye.+
3 Mpe ezalaki komonana lokola emonaneli oyo namonaki,+ lokola emonaneli oyo namonaki ntango nayaki kobebisa* engumba;+ mpe ezalaki na biloko oyo ezalaki komonana lokola eloko oyo namonaki pene na ebale Kebare,+ mpe nakweaki na elongi na ngai.
4 Mpe nkembo+ ya Yehova ekɔtaki na Ndako na nzela ya porte oyo liboso na yango etali na ngámbo ya ɛsti.+
5 Mpe elimo etombolaki ngai+ mpe ekɔtisaki ngai na lopango ya kati, mpe talá! Ndako etondaki na nkembo ya Yehova.+
6 Mpe nabandaki koyoka moto moko azali koloba na ngai uta na Ndako,+ mpe moto yango ayaki kotɛlɛma pembeni na ngai.+
7 Mpe Ye alobaki na ngai lisusu boye:
“Mwana ya moto, oyo nde esika ya kiti na ngai ya bokonzi+ mpe esika ya matambe ya makolo na ngai,+ epai nakofanda na katikati ya bana ya Yisraele mpo na ntango oyo etyami ndelo te;+ mpe bango, ndako ya Yisraele, bakokómisa nkombo na ngai mosantu mbindo lisusu te,+ bango ná bakonzi na bango,+ na pite na bango mpe na bibembe+ ya bakonzi na bango na ntango ya liwa na bango,
8 na ndenge bazali kotya minɔkɔ ya ndako na bango na monɔkɔ ya ndako na ngai mpe likonzí ya porte na bango pembeni ya likonzí ya porte na ngai, ná efelo kati na ngai ná bango.+ Mpe bakómisaki nkombo mosantu na ngai mbindo na biloko na bango oyo eyinamá oyo basalaki,+ bongo nasilisaki bango nyɛɛ na nkanda na ngai.+
9 Sikoyo, bálongola mosika na ngai pite+ na bango mpe bibembe ya bakonzi na bango,+ mpe nakofanda mpenza na katikati na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
10 “Nde yo, Ee mwana ya moto, yebisá ndako ya Yisraele makambo etali Ndako yango,+ mpo báyoka nsɔni mpo na mabunga na bango,+ mpe basengeli kozwa mezire ya modɛlɛ yango.
11 Mpe soki bayoki mpenza nsɔni mpo na nyonso oyo basali, plan ya Ndako,+ mpe ndenge ebongisami mpe bisika na yango ya kobima mpe bisika ya kokɔta na yango, ná plan na yango nyonso mpe makambo na yango nyonso ya mikemike, mpe plan na yango nyonso ná mibeko na yango nyonso, yebisá bango yango mpe komá yango na miso na bango, mpo bátalela plan na yango nyonso mpe makambo na yango nyonso ya mikemike mpe bátosa yango.+
12 Oyo nde mobeko ya Ndako. Na nsɔngɛ ya ngomba, teritware na yango mobimba epai na epai, ezali eloko moko oyo eleki bosantu.+ Talá! Oyo nde mobeko ya Ndako.
13 “Mpe talá bamezire ya etumbelo na mapeko,+ lipeko moko ekokani na lipeko moko ná bonene ya tandu moko.+ Mpe nse na yango, lipeko moko. Mpe bonene na yango, lipeko moko. Mpe ndelo na yango ezali likoló ya mbɛbu na yango epai na epai: zerete moko. Mpe yango nde nse ya etumbelo.
14 Mpe banda na nse, na mabele, kino na mwa etando ya nse oyo ebimá na mopanzi zingazinga, ezali na mapeko mibale, mpe bonene na yango lipeko moko. Mpe banda na mwa etando moke oyo ebimá na mopanzi zingazinga kino na mwa etando monene oyo ebimá na mopanzi zingazinga ezali na mapeko minei, mpe bonene na yango lipeko moko.
15 Mpe esika mɔtɔ ya etumbelo epelaka ezali mapeko minei, mpe banda na esika mɔtɔ ya etumbelo epelaka tii likoló, ezali na maseke minei.+
16 Mpe esika mɔtɔ ya etumbelo epelaka ezali na bolai ya mapeko zomi na mibale, na bonene ya mapeko zomi na mibale,+ ezali karé na mipanzi na yango minei.+
17 Mpe mwa etando oyo ebimá na mopanzi zingazinga ezali na bolai ya mapeko zomi na minei, na bonene ya mapeko zomi na minei, na mipanzi na yango minei; mpe ndelo oyo ezingi yango ezali katikati ya lipeko, mpe nse na yango ezali lipeko moko epai na epai.
“Mpe eskalye na yango etali na ɛsti.”
18 Mpe alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Oyo nde mibeko ya etumbelo na mokolo oyo yango ekosalema, mpo na kopesa likoló na yango makabo mibimba ya kotumba+ mpe komwangisela yango makila.’+
19 “‘Mpe osengeli kopesa banganga-nzambe Balevi,+ oyo bazali bana ya Zadoke,+ baoyo babɛlɛmaka na ngai,+ mpo na kosalela ngai, mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga, ezala likabo mpo na lisumu,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
20 ‘Mpe osengeli kozwa ndambo ya makila na yango mpe kotya yango na maseke na yango minei mpe na bansɔngɛ minei ya mwa etando oyo ebimá na mopanzi zingazinga mpe na ndelo epai na epai mpe osengeli kopɛtola yango na lisumu+ mpe kozipa masumu na yango.+
21 Mpe osengeli kozwa mwana-ngɔmbɛ yango ya mobali, likabo mpo na lisumu, mpe basengeli kotumba yango na esika oyo eponami na Ndako, libándá ya esika mosantu.+
22 Mpe na mokolo ya mibale okoya na ntaba ya mobali, oyo ezangi mbeba, ezala likabo mpo na lisumu; mpe basengeli kopɛtola etumbelo na lisumu ndenge kaka bapɛtolaki yango na lisumu na mwana-ngɔmbɛ mobali.’
23 “‘Na mokolo oyo okosilisa kopɛtola yango na lisumu, okobɛlɛmisa mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba, mpe mpate-mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba.
24 Mpe osengeli kobɛlɛmisa yango liboso ya Yehova, mpe banganga-nzambe basengeli kobwakela yango mungwa mpe kopesa yango+ Yehova ezala likabo ya kotumba mobimba.
25 Na mikolo nsambo, okopesa ntaba-mobali ezala likabo mpo na lisumu na mokolo;+ mpe bakopesa mbeka ya mwana-ngɔmbɛ mobali ya etonga, mpe mpate-mobali ya etonga, oyo ezangi mbeba.
26 Na mikolo nsambo, bakozipa masumu+ mpo na etumbelo, mpe basengeli kopɛtola yango mpe kobanda kosalela yango.
27 Mpe bakokokisa mikolo yango. Mpe ekosalema mpenza boye: na mokolo ya mwambe+ mpe banda ntango wana, banganga-nzambe bakopesa likoló ya etumbelo yango makabo na bino ya kotumba mibimba mpe bambeka na bino ya boyokani; mpe nakosepela mpenza na bino,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”
Maloba na nse
^ Emonani ete awa ezali kolobela ndenge asakolaki kobebisama na yango.