Ezekiele 41:1-26
41 Mpe akɔtisaki ngai na kati ya tempelo, bongo amekaki makonzí ya mipanzi: bonene na yango epai oyo ezalaki mapeko motoba mpe bonene na yango epai oyo kuna ezalaki mapeko motoba, bonene ya likonzí ya mopanzi.
2 Mpe bonene ya esika ya kokɔta ezalaki mapeko zomi, mpe mipanzi ya esika ya kokɔta ezalaki mapeko mitano epai oyo mpe mapeko mitano epai oyo kuna. Mpe abandaki komeka bolai na yango: mapeko ntuku minei (40); mpe bonene na yango: mapeko ntuku mibale (20).
3 Mpe akɔtaki na kati mpe abandaki komeka likonzí ya mopanzi ya esika ya kokɔta: mapeko mibale; mpe esika ya kokɔta: mapeko motoba; mpe bonene ya esika ya kokɔta ezalaki mapeko nsambo.
4 Mpe abandaki komeka bolai na yango: mapeko ntuku mibale (20); mpe bonene na yango: mapeko ntuku mibale,+ liboso ya tempelo. Na nsima, alobaki na ngai boye: “Oyo nde Esika oyo Eleki Bosantu.”+
5 Mpe abandaki komeka efelo ya ndako: mapeko motoba. Mpe bonene ya shambrɛ ya mopanzi mapeko minei, epai na epai; ezalaki bongo epai na epai ya ndako, ezingi yango.+
6 Mpe bashambrɛ ya mipanzi ezalaki shambrɛ moko likoló ya shambrɛ mosusu: baetajɛ misato, etajɛ mokomoko ezalaki na bashambrɛ ntuku misato (30); mpe ezalaki kokɔta na efelo ya ndako, elingi koloba, bashambrɛ ya mipanzi epai na epai, mpo esimbama na yango, kasi esimbaki efelo ya ndako te.+
7 Mpe monene ya bashambrɛ ya mipanzi ezalaki se kobakisama ntango ozali komata, zingazinga ya ndako, mpo nzela mpo na kolongwa na etajɛ moko kino etajɛ mosusu ya ndako ezalaki nyokanyoka ntango ozali komata, epai na epai ya ndako.+ Yango wana monene na yango ezalaki se kobakisama ntango ozali komata na ndako, mpe banda na etajɛ ya nse, moto akokaki komata kino na etajɛ ya likoló mpenza+ na nzela ya etajɛ ya katikati.
8 Mpe namonaki ete etando moko oyo etombwaná ezalaki zingazinga, esika ndako etɛlɛmaki. Bosanda ya miboko ya bashambrɛ ya mipanzi tii na esika oyo ekutani ezalaki mongendu mobimba ya mapeko motoba.+
9 Bonene ya efelo ya shambrɛ ya mopanzi, na libándá, ezalaki mapeko mitano. Mpe ezalaki na esika oyo batiká polele pembenipembeni ya ndako ya bashambrɛ ya mipanzi ya ndako yango.
10 Mpe kati na esika yango ná bisika ya kolya,+ bonene ezalaki mapeko ntuku mibale (20) epai na epai ya ndako, ezingi yango.
11 Mpe esika ya kokɔta na bashambrɛ ya mipanzi ezalaki na esika oyo batiká polele, esika ya kokɔta moko na ngámbo ya nɔrdi mpe esika ya kokɔta moko na ngámbo ya sudi; mpe bonene ya etando ya esika yango oyo batiká polele ezalaki mapeko mitano, epai na epai.
12 Mpe ndako oyo ezalaki liboso ya esika oyo ekabwani, oyo mopanzi na yango ezalaki na wɛsti, ezalaki na bonene ya mapeko ntuku nsambo (70). Mpe efelo ya ndako yango ezalaki na bonene ya mapeko mitano, ezalaki epai na epai; mpe bolai na yango ezalaki mapeko ntuku libwa (90).
13 Mpe amekaki ndako: ezalaki na bolai ya mapeko nkama moko (100); mpe esika oyo ekabwani mpe ndako ná bifelo na yango: ezalaki na bolai ya mapeko nkama moko.
14 Mpe bonene ya liboso ya ndako mpe esika oyo ekabwani, na ɛsti, ezalaki mapeko nkama moko (100).
15 Mpe amekaki bolai ya ndako liboso ya esika oyo ekabwani oyo ezalaki na nsima na yango mpe baveranda na yango ya kolekela, na mopanzi oyo mpe na mopanzi oyo kuna ezalaki mapeko nkama moko (100).
Mpe amekaki tempelo mpe esika ya kati+ mpe bandako ya kokɔtela ya lopango;
16 minɔkɔ ya ndako, mpe maninisa oyo ezalaki na bakadrɛ oyo ekɔndisamá mokemoke tii na nsuka,+ mpe baveranda ya kolekela ezalaki epai na epai na yango misato. Liboso ya monɔkɔ ya ndako ezipamaki na mabaya ya kitoko epai na epai,+ banda na nse tii na maninisa; mpe maninisa yango ezalaki maninisa oyo ezipami.
17 Tii na likoló ya esika ya kokɔta mpe tii na ndako ya kati mpe na libándá mpe likoló ya efelo mobimba epai na epai, likoló ya ndako ya kati mpe na libándá, emekamaki,
18 ɛɛ bakeruba oyo eyemami+ mpe bililingi ya banzete ya mbila,+ elilingi moko ya nzete ya mbila ezalaki kati na keruba moko ná keruba mosusu, mpe keruba mokomoko ezalaki na bilongi mibale.+
19 Mpe elongi ya moto etalaki epai ya elilingi ya nzete ya mbila na mopanzi oyo, mpe elongi ya mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki etalaki epai ya elilingi ya nzete ya mbila na mopanzi oyo kuna,+ yango eyemami na ndako mobimba epai na epai.
20 Banda na nse tii likoló ya esika ya kokɔta ezalaki na bakeruba oyo eyemami mpe bililingi ya banzete ya mbila, na efelo ya tempelo.
21 Na oyo etali tempelo, likonzí ya porte ezalaki karé;+ mpe liboso ya esika mosantu ezalaki na eloko moko oyo ezali komonana lokola eloko oyo:
22 etumbelo oyo esalemi na mabaya ezalaki na bosanda ya mapeko misato, mpe bolai na yango mapeko mibale, mpe ezalaki na makonzí na yango ya matumu.+ Mpe bolai na yango ná bifelo na yango ezalaki na mabaya. Mpe alobaki na ngai boye: “Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yehova.”+
23 Mpe tempelo ná esika mosantu ezalaki na baporte mibale.+
24 Mpe baporte yango ezalaki na bizipeli mibale, yango nyonso mibale ezalaki kobalukabaluka. Porte moko ezalaki na bizipeli mibale, mpe porte mosusu ezalaki na bizipeli mibale.
25 Mpe likoló na yango, na baporte ya tempelo, basalaki bakeruba ná bililingi ya banzete ya mbila,+ lokola oyo esalamaki mpo na bifelo, mpe ezalaki na mwa nsamba ya mabaya likoló ya liboso ya ndako ya kokɔtela, na libándá.
26 Mpe ezalaki na maninisa oyo ezalaki na bakadrɛ oyo ekɔndisamá mokemoke tii na nsuka na yango+ mpe bililingi ya banzete ya mbila epai oyo mpe epai oyo kuna na mipanzi ya ndako ya kokɔtela mpe na bashambrɛ ya mipanzi ya ndako mpe na mwa bansamba.