Ezekiele 4:1-17
4 “Mpe yo, Ee mwana ya moto, ozwa briki, mpe tyá mpenza yango liboso na yo mpe katá likoló na yango liyemi ya engumba moko, ɛɛ Yerusaleme.+
2 Mpe zingá yango mpenza+ mpe tongá efelo ya kozinga mboka mpo na kobundisa yango+ mpe tɛlɛmisá mwa ngomba oyo basalá mpo na kobundisa yango+ mpe tyá bakaa mpo na kobundisa yango mpe tyá zingazinga na yango bamasini ya kobukabuka mpo na kobundisa yango.+
3 Nde yo, kamatá kikalungu ya ebende, mpe osengeli kotya yango lokola efelo ya ebende kati na yo ná engumba, mpe osengeli kotɛmɛla yango, mpe esengeli kozingama, mpe osengeli kozinga yango. Ezali elembo mpo na ndako ya Yisraele.+
4 “Nde yo, lalá na mopanzi na yo ya lobɔkɔ ya mwasi, mpe osengeli kotya libunga ya ndako ya Yisraele na mopanzi yango.+ Okomema libunga na bango na motángo ya mikolo oyo okolalela yango.
5 Mpe ngai nakoyebisa yo mpenza bambula ya libunga na bango+ oyo ezali na motángo ya mikolo nkama misato na ntuku libwa (390),+ mpe osengeli komema libunga ya ndako ya Yisraele.
6 Mpe osengeli kokokisa yango.
“Mpe lalá lisusu na mopanzi na yo ya lobɔkɔ ya mobali, mpe osengeli komema libunga ya ndako ya Yuda mikolo ntuku minei (40).+ Mokolo moko mpo na mbula moko, mokolo moko mpo na mbula moko, yango nde napesi yo.+
7 Mpe okotalisa elongi na yo,+ wana lobɔkɔ na yo oyo ezipami na elamba te, epai ya Yerusaleme oyo ezingami mpe osengeli kosakwela yango.
8 “Mpe talá! nakotya yo bansinga+ mpo obaluka te na mopanzi oyo mpo na kolala na mopanzi mosusu, tii okokokisa mikolo okozinga yango.
9 “Nde yo, zwá blé,+ ɔrje, madesu ya minene,+ lantiye,+ mbuma ya miyɛ mpe blé ya mposo makasi,+ mpe tyá yango na eloko kaka moko mpe salá na yango limpa mpo na yo, mpo na motángo ya mikolo oyo ozali kolala na mopanzi na yo; okolya yango mikolo nkama misato na ntuku libwa (390).+
10 Mpe bilei oyo okolya ekomekama kilo—shekele ntuku mibale (20) na mokolo.+ Okolya yango mokemoke.
11 “Mpe okomɛla mai kaka na emekeli, moko ya bandambo motoba ya hini. Okomɛla yango mokemoke.
12 “Mpe okolya yango lokola gato ya libungutulu ya ɔrje;+ mpe yango, okotumba yango likoló ya bambuma ya nyɛi+ ya bato na miso na bango.”
13 Mpe Yehova alobaki lisusu boye: “Ndenge yango nde bana ya Yisraele bakolya limpa na bango ya mbindo+ na kati ya bikólo epai nakopalanganisa bango.”+
14 Mpe nalobaki ete: “Aa! Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá! Molimo na ngai ezali molimo ya mbindo te;+ naino nalyá nyama oyo ekufi yango moko te to nyama oyo epasolami, banda bolenge na ngai+ tii sikoyo, mpe mosuni ya mbindo naino ekɔtá na monɔkɔ na ngai te.”+
15 Na yango, alobaki na ngai ete: “Talá, napesi yo nyɛi ya bangɔmbɛ na esika ya bambuma ya nyɛi ya bato, mpe osengeli kosala limpa na yo likoló na yango.”
16 Mpe akobaki koloba na ngai ete: “Mwana ya moto, talá, na Yerusaleme, nazali kobuka mangenda oyo bakakisi mampa oyo esalemi lokola lopɛtɛ,+ mpe basengeli kolya limpa oyo ekomekama kilo mpe bakolya yango na motema likoló,+ mpe bakomɛla mai na emekeli mpe na nsɔmɔ,+
17 mpo bázanga limpa ná mai mpe bátalana na kokamwa mpe bákɔnda na libunga na bango.+