Ezekiele 38:1-23
38 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Mwana ya moto,+ talisá elongi na yo epai ya Goge ya mokili ya Magoge,+ nkumu monene ya Mesheke+ ná Tubale,+ mpe sakwelá ye.
3 Mpe osengeli koloba ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Goge, nkumu monene ya Mesheke ná Tubale.
4 Ya solo, nakobalusa yo mpe nakotya bandɔbɔ na mbanga na yo+ mpe nakobimisa yo elongo na limpinga ya basoda na yo nyonso,+ bampunda ná basoda oyo batambolaka na mpunda, bango nyonso balati na ndenge oyo ebongi mpenza,+ lisangá moko monene mpenza, bazali na nguba ya monene ná nguba ya moke, bango nyonso bayebi kosalela mipanga;+
5 elongo na bango Perse,+ Etiopi+ ná Puti,+ bango nyonso bazali na nguba ya moke mpe ekɔti;
6 Gomere+ ná bituluku na yango nyonso, ndako ya Togarama,+ na nsukansuka ya nɔrdi, ná bituluku na yango nyonso, bato ebele mpenza elongo na yo.+
7 “‘“Omilɛngɛla, mpe zwá bibongiseli, yo ná lisangá na yo mobimba,+ baoyo basangani epai na yo, okokóma mpenza mokɛngɛli na bango.
8 “‘“Nsima ya mikolo mingi, bakotyela yo likebi. Na eleko ya nsuka ya bambula, okoya na mokili+ ya bato oyo bazongisami mpe babiki na mopanga, oyo bayanganisami uta na bato ya bikólo mingi,+ na bangomba ya Yisraele, oyo etikalaki ntango nyonso esika oyo ebebisami; ɛɛ mokili oyo ebimisami na kati ya bato ya bikólo mingi, epai bafandaki na kimya, bango nyonso.+
9 Mpe okozanga te komata. Okoya lokola mbula ya mopɛpɛ makasi.+ Okokóma lokola mapata mpo na kozipa mokili,+ yo ná bituluku na yo nyonso mpe ebele ya bato ya bikólo elongo na yo.”’
10 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mpe ekosalema mpenza boye: na mokolo yango, makanisi ekoyela yo na motema,+ mpe okokana mpenza mwango ya mabe;+
11 mpe okoloba mpenza ete: “Nakomata kobundisa mokili ya mboka oyo ezangi bifelo.+ Nakokɔta epai ya bato oyo bazali na motungisi moko te, oyo bafandi na kimya, bango nyonso bafandi kozanga efelo,+ mpe bazali kutu na ekangiseli te, baporte mpe te.”
12 Ekozala mpo na kobɔtɔla biloko ebele+ mpe mpo na kopunza biloko mingi, mpo na kozongisa lobɔkɔ na yo na bisika oyo ebebisamaki kasi bato bazongelaki kofanda kuna,+ mpe likoló ya bato oyo bayanganisami uta na bikólo,+ bato oyo bazali konduka bozwi mpe biloko,+ baoyo bazali kofanda na katikati+ ya mabele.
13 “‘Sheba,+ Dedane,+ bato ya mombongo ya Tarasisi+ mpe bana-nkɔsi na yango nyonso oyo nkingo etondi na nsuki+—bakoloba na yo boye: “Ozali koya nde mpo na kobɔtɔla biloko ebele? Osangisi lisangá na yo nde mpo na kopunza biloko mingi, mpo na komema palata ná wolo, mpo na konduka bozwi mpe biloko, mpo na kobɔtɔla biloko ebele?”’
14 “Na yango sakolá, Ee mwana ya moto, mpe osengeli koloba na Goge boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ekozala na mokolo yango, ntango bato na ngai Yisraele bakofanda na kimya, nde okoyeba yango, boye te?+
15 Mpe okouta mpenza na esika na yo, na nsukansuka ya nɔrdi,+ yo mpe bato ya bikólo ebele elongo na yo, bango nyonso bamati na bampunda, lisangá moko monene, ɛɛ, limpinga moko monene ya basoda.+
16 Mpe okozanga te koya kobundisa bato na ngai Yisraele, lokola mapata mpo na kozipa mokili.+ Ekosalema na eleko ya nsuka ya mikolo, mpe ya solo, nakomema yo mpo na kobundisa mokili na ngai,+ mpo bato ya bikólo báyeba ngai ntango nakomisantisa na nzela na yo na miso na bango, Ee Goge.”’+
17 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ozali+ kaka moto yango oyo nalobelaki na mikolo ya kala na lobɔkɔ ya basaleli na ngai basakoli ya Yisraele, baoyo bazalaki kosakola na mikolo wana—bambula—ete okomemama mpo na kokwela bango?’+
18 “‘Mpe ekosalema mpenza boye na mokolo oyo Goge akoyela mabele ya Yisraele,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘nkɛlɛ na ngai ekomata na zolo na ngai.+
19 Mpe na molende na ngai,+ na mɔtɔ ya nkɛlɛ na ngai, nakoloba mpenza.+ Ya solo, na mokolo yango, koningana moko monene ekosalema na mabele ya Yisraele.+
20 Mpe mpo na ngai, mbisi ya mbu ná bikelamu oyo epumbwaka na likoló, banyama ya zamba oyo efandaka na esobe, biloko nyonso oyo ebendanaka na libumu oyo ezali kobendana na mabele mpe bato nyonso oyo bazali na etando ya mabele bakolɛnga mpenza,+ mpe ya solo, bangomba ekobukana+ mpe banzela oyo ekitá makasi ekokwea mpenza, mpe bifelo nyonso ekokwea na mabele.’
21 “‘Mpe na etúká na ngai mobimba ya ngombangomba, nakobenga mopanga mpo na kobundisa ye,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ ‘Mopanga ya moto na moto ekobalukela ndeko na ye moko.+
22 Mpe nakokɔta na kosamba+ elongo na ye, na maladi mabe+ mpe na makila;+ mpe nakonɔkisela ye ná bituluku na ye mpe ebele ya bato ya bikólo oyo bakozala elongo na ye mbula makasi oyo ezali kozindisa, mbula ya mabanga,+ mɔtɔ+ mpe sufulu.+
23 Mpe nakomitombola mpenza mpe nakomisantisa+ mpe nakomiyebisa na miso ya bikólo mingi; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+