Ezekiele 37:1-28

37  Lobɔkɔ ya Yehova ezalaki likoló na ngai,+ bongo amemaki ngai na elimo ya Yehova+ mpe akitisaki ngai na katikati ya lobwaku ya patatalu, mpe mokili yango etondaki na mikuwa.+  Mpe alekisaki ngai pene na yango, epai na epai, mpe, talá! mikuwa ezalaki mingi mpenza na etando ya lobwaku ya patatalu mpe talá! mikuwa yango ekauká mpenza.+  Mpe abandaki koloba na ngai boye: “Mwana ya moto, mikuwa oyo ekoki kozonga na bomoi?” Bongo nalobaki ete: “Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, yo moko oyebi yango malamu.”+  Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Sakolá mpo na mikuwa oyo, mpe osengeli koloba na yango boye: ‘Ee bino mikuwa oyo ekauká, bóyoka liloba ya Yehova:  “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na mikuwa oyo: “Ngai oyo nazali kokɔtisa mpema kati na bino, mpe bokozonga mpenza na bomoi.+  Mpe nakotya bino mintulu mpe nakotya bino mosuni, mpe nakozipa bino loposo, mpe nakotya mpema na kati na bino, mpe bokozonga mpenza na bomoi;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’”+  Mpe nasakolaki kaka ndenge apesaki ngai mitindo.+ Mpe lokito moko ebandaki kobima ntango kaka nasakolaki, mpe talá, ezalaki na makɛlɛlɛ moko ya biloko oyo ezali kotutana, mpe mikuwa ebandaki kopusana, mokuwa moko esangani na mokuwa na yango.  Mpe namonaki, mpe talá! mintulu mpe mosuni eyaki likoló na yango, mpe loposo ebandaki kozipa yango. Nde mpema ezalaki na kati na yango te.  Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Sakwelá mopɛpɛ. Sakolá, Ee mwana ya moto, mpe osengeli koloba na mopɛpɛ boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Uta na mipɛpɛ minei, yaká, Ee mopɛpɛ, mpe pɛpá likoló ya bato oyo babomamá,+ mpo bázonga na bomoi.”’”+ 10  Mpe nasakolaki kaka ndenge apesaki ngai mitindo, mpe mpema ekɔtaki kati na bango, mpe bakómaki na bomoi mpe babandaki kotɛlɛma na makolo na bango:+ limpinga moko monene, monene mpenza ya basoda. 11  Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, mikuwa oyo, ezali ndako mobimba ya Yisraele.+ Talá bazali koloba: ‘Mikuwa na biso ekauki, mpe elikya na biso ekufi.+ Bakaboli biso nde kokabola.’ 12  Na yango, sakolá mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kofungola malita na bino,+ mpe nakobimisa bino na malita na bino, Ee bato na ngai, mpe nakomema bino na mabele ya Yisraele.+ 13  Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakofungola malita na bino mpe nakobimisa bino na malita na bino, Ee bato na ngai.”’+ 14  ‘Mpe nakotya elimo na ngai kati na bino, mpe bokozonga mpenza na bomoi,+ mpe nakofandisa bino na mabele na bino; mpe bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nalobi mpe nasali bongo,’ yango nde liloba ya Yehova.”+ 15  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete: 16  “Nde yo, Ee mwana ya moto, zwá mwa eteni ya nzete+ mpe komá likoló na yango boye: ‘Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Yisraele, baninga na ye.’+ Mpe zwá mwa eteni mosusu ya nzete mpe komá likoló na yango ete: ‘Mpo na Yozefe, mwa eteni ya nzete ya Efraime,+ mpe ndako mobimba ya Yisraele, baninga na ye.’+ 17  Mpe sangisá yango ekóma eteni kaka moko ya nzete, mpe yango ekokóma mpenza kaka moko na lobɔkɔ na yo.+ 18  Mpe ntango bana ya bato na yo bakobanda koloba na yo ete: “Okoyebisa biso te soki makambo oyo elimboli nini mpo na yo?’+ 19  lobá na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kozwa mwa eteni ya nzete ya Yozefe, oyo ezali na lobɔkɔ ya Efraime, mpe mabota ya Yisraele, baninga na ye, mpe nakotya yango likoló na yango, elingi koloba, mwa eteni ya nzete ya Yuda, mpe nakokómisa mpenza yango eteni kaka moko ya nzete,+ mpe ekozala kaka moko na lobɔkɔ na ngai.”’ 20  Mpe mwa biteni ya nzete oyo okomi likoló na yango esengeli kozala na lobɔkɔ na yo na miso na bango.+ 21  “Mpe lobá na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mo-konzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kokamata bana ya Yisraele na kati ya bikólo epai bakendaki, mpe nakoyanganisa bango uta na bipai nyonso mpe nakomema bango na mabele na bango.+ 22  Mpe nakokómisa mpenza bango ekólo kaka moko na mokili na bango,+ na bangomba ya Yisraele, mpe bango nyonso bakozala na mokonzi kaka moko,+ mpe bakozala bikólo mibale lisusu te, bakokabwana na makonzi mibale lisusu mpe te.+ 23  Mpe bakomikómisa mbindo lisusu te na bikeko na bango ya bosɔtɔ mpe na biloko na bango ya bosɔtɔ mpe na makambo na bango nyonso ya kobuka mibeko;+ mpe nakobikisa mpenza bango na bisika oyo bafandi epai basali masumu, mpe nakopɛtola bango,+ mpe bakokóma mpenza bato na ngai, mpe ngai nakokóma Nzambe na bango.+ 24  “‘“Mpe mosaleli na ngai Davidi akozala mokonzi na bango,+ mpe bango nyonso bakozala na mobateli ya mpate kaka moko;+ mpe bakotambola na bikateli na ngai ya lisambisi,+ mpe bakotosa mibeko na ngai,+ mpe bakokokisa mpenza yango.+ 25  Mpe bakofanda mpenza na mokili oyo napesaki mosaleli na ngai, Yakobo, epai bankɔkɔ na bino bafandaki,+ mpe bakofanda mpenza kuna,+ bango ná bana na bango ná bana ya bana na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te,+ mpe Davidi mosaleli na ngai akozala nkumu na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 26  “‘“Mpe nakosala kondimana ya kimya ná bango;+ kondimana oyo ekoumela kino ntango oyo etyami ndelo te nde ekozala na bango.+ Mpe nakotya bango na esika na bango mpe nakokómisa bango ebele+ mpe nakotya esika na ngai mosantu na katikati na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ 27  Mpe tabernakle na ngai ekozala mpenza likoló na bango,+ mpe nakokóma mpenza Nzambe na bango, mpe bango bakokóma bato na ngai.+ 28  Mpe bikólo bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova,+ nazali kosantisa Yisraele, ntango esika na ngai mosantu ekozala na katikati na bango mpo na ntango oyo etyami ndelo te.”’”+

Maloba na nse