Ezekiele 36:1-38

36  “Nde yo, Ee mwana ya moto, sakolá mpo na bangomba ya Yisraele, mpe osengeli koloba boye: ‘Ee bangomba ya Yisraele,+ bóyoka liloba ya Yehova.  Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola monguna alobi mpo na bino ete:+ ‘Aha! Kutu bisika oyo etombwaná ya kalakala+—ekómi eloko na biso!’”’+  “Na yango sakolá, mpe osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola, ɛɛ lokola batiki bino mpamba+ mpe baswi bino bipai nyonso,+ mpo bókóma eloko ya baoyo batikali na kati ya bikólo+ mpe lokola lisolo na minɔkɔ ya bato ekómi kaka bino+ mpe nsango ya mabe ezali na kati ya bato,+  na yango, Ee bangomba ya Yisraele,+ bóyoka liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bangomba mpe bangomba mike, na banzela ya mai mpe na mabwaku ná bisika oyo ebebisami oyo batiki mpamba,+ mpe na bingumba oyo esundolami, oyo ekómi eloko ya kopunza mpe ya kosɛka ya baoyo batikali na kati ya bikólo oyo ezali zingazinga;+  na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ya solo, na mɔtɔ ya molende na ngai, nakolobela+ baoyo batikali na kati ya bikólo mpe Edome, mobimba na yango,+ baoyo bamipesi mokili na ngai mpo ezala eloko na bango, na esengo ya motema mobimba,+ na lityo na kati ya molimo,+ mpo na kozwa bisika na yango oyo bibwɛlɛ elyaka matiti mpe mpo na kopunza yango.’”’+  “Na yango, sakolá mpo na mabele ya Yisraele, mpe osengeli koloba na bangomba mpe na bangomba mike, na banzela ya mai mpe na mabwaku ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Talá! Ngai moko, nakoloba mpenza na molende na ngai mpe na nkɛlɛ na ngai, mpo bomemi nde nsɔni oyo bikólo eyokisi bino.”’+  “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai natomboli lobɔkɔ na ngai mpe nalapi ndai+ ete bikólo oyo bozali na yango zingazinga—yango nde ekomema nsɔni na bango.+  Mpe bino, Ee bangomba ya Yisraele, bokobimisa bitape na bino mpe bokobota mbuma na bino mpo na bato na ngai Yisraele,+ mpo bakómi pene na ntango ya koya.+  Mpo ngai oyo nazali mpo na bino, mpe nakobaluka mpenza epai na bino,+ mpe bokotimolama mpenza mpe mboto+ ekolonama na kati na bino. 10  Mpe nakobakisela bino bato mingi, ndako mobimba ya Yisraele, yango nyonso,+ mpe bingumba ekozala na bato oyo bafandi na kati,+ mpe bisika oyo ebebisamá ekotongama lisusu.+ 11  Ya solo, nakobakisela bino bato ná banyama mingi,+ mpe bakokóma mingi mpenza mpe bakobota, mpe nakofandisa mpenza bato epai na bino ndenge bozalaki liboso,+ mpe nakosala bino malamu koleka ndenge bozalaki na ebandeli;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+ 12  Mpe nakotambwisa bato likoló na bino, ɛɛ bato na ngai Yisraele, mpe bakozwa bino mpo bózala eloko na bango,+ mpe bokokóma mpenza libula na bango,+ mpe bokozangisa bango bana lisusu te.’”+ 13  “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola ezali na bato oyo bazali koloba na bino ete: “Ozali mpenza molei ya bato, mpe okómi mokili moko oyo ezali kozangisa bikólo na yo bana,”’+ 14  ‘na yango, okolya bato lisusu te,+ mpe okozangisa bikólo na yo bana lisusu te,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. 15  ‘Mpe nakosala ete maloba ya kosambwa oyo euti na bikólo na ntina na yo eyokana lisusu te,+ mpe okomema nsɔni oyo euti na bato ya bikólo lisusu te,+ mpe okobɛtisa bikólo na yo libaku lisusu te,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.” 16  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete: 17  “Mwana ya moto, bato ya ndako ya Yisraele bazalaki kofanda na mabele na bango, mpe bazalaki kaka kokómisa yango mbindo na nzela na bango mpe na misala na bango.+ Nzela na bango ekómi liboso na ngai lokola mbindo ya mwasi na ntango azali komona sanza.+ 18  Mpe nasopelaki bango nkɛlɛ na ngai mpo na makila oyo basopaki na mokili,+ mokili oyo bakómisaki mbindo na bikeko na bango ya bosɔtɔ.+ 19  Mpe napalanganisaki bango na kati ya bikólo, bongo bapanzanaki na mikili.+ Nasambisaki bango na kolanda nzela na bango mpe na kolanda misala na bango.+ 20  Bongo bayaki na bikólo epai bayaki, mpe bato bakómisaki nkombo na ngai mosantu eloko mpamba+ na ndenge bazalaki koloba mpo na bango ete: ‘Oyo nde bato ya Yehova, mpe babimi na mokili na ye.’+ 21  Mpe nakoyokela nkombo na ngai mosantu mawa, nkombo oyo ndako ya Yisraele ekómisi eloko mpamba na kati ya bikólo epai bayei.”+ 22  “Na yango, lobá na ndako ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee ndako ya Yisraele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala yango, kasi mpo na nkombo na ngai mosantu oyo bokómisi eloko mpamba na kati ya bikólo epai boyei.”’+ 23  ‘Mpe ya solo, nakosantisa nkombo na ngai monene,+ oyo bazalaki kokómisa eloko mpamba na kati ya bikólo, oyo bokómisaki eloko mpamba na katikati na yango; mpe bikólo ekoyeba mpenza ete nazali Yehova,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘ntango nakosantisama na kati na bino na miso na bango.+ 24  Mpe nakolongola bino na bikólo mpe nakoyanganisa bino uta na mikili nyonso mpe nakokɔtisa bino na mabele na bino.+ 25  Mpe nakomwangisela bino mai ya pɛto, mpe bokokóma pɛto;+ nakopɛtola bino na mbindo+ na bino nyonso mpe na bikeko na bino nyonso oyo ezali bosɔtɔ.+ 26  Mpe nakopesa bino motema ya sika,+ mpe nakotya elimo ya sika kati na bino,+ mpe nakolongola motema ya libanga na nzoto na bino mpe nakopesa bino motema ya mosuni.+ 27  Mpe nakotya elimo na ngai kati na bino,+ mpe nakotambwisa bino na malako na ngai,+ mpe bokotosa bikateli na ngai ya lisambisi mpe bokokokisa mpenza yango.+ 28  Mpe bokofanda mpenza na mokili oyo napesaki bankɔkɔ na bino,+ mpe bokokóma mpenza bato na ngai mpe ngai nakokóma Nzambe na bino.’+ 29  “‘Mpe nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso+ mpe nakobengisa mbuma mpe nakokómisa yango beboo, mpe nakopesa bino nzala te.+ 30  Mpe nakokómisa mpenza mbuma ya nzete beboo, mpe biloko ya elanga, mpo bóyoka nsɔni lisusu te mpo na nzala na kati ya bikólo.+ 31  Mpe bokozanga te kokanisa lisusu banzela na bino ya mabe mpe misala na bino oyo ezalaki malamu te,+ mpe bokozanga te komiyokela mpii mpo na mabunga na bino mpe mpo na makambo na bino oyo eyinami.+ 32  Ezali mpo na bino te nde nazali kosala likambo oyo,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘bóyeba yango. Bóyoka nsɔni mpe bósambwa mpo na banzela na bino, Ee ndako ya Yisraele.’+ 33  “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Na mokolo oyo nakopɛtola bino na mabunga na bino nyonso, nakofandisa mpe bato na bingumba,+ mpe bisika oyo ebebisami ekotongama lisusu.+ 34  Mpe mokili oyo etikali mpamba ekolonama, atako ekómaki esika moko oyo etikali mpamba na miso ya moleki-nzela nyonso.+ 35  Mpe bato bakoloba mpenza ete: “Mokili wana oyo etikalaki mpamba ekómi lokola elanga ya Edene,+ mpe bingumba oyo etikalaki mpamba, oyo ebebisamaki mpe oyo ebukamaki ebatelami makasi; bato bakómi kofanda kuna.”+ 36  Mpe bikólo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba mpenza ete ngai, Yehova, natongi biloko oyo ebukamaki,+ naloni biloko na mokili oyo etikalaki mpamba. Ngai moko, Yehova, nalobi mpe nasali yango.’+ 37  “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Talá likambo oyo mpo na yango nakotika lisusu bato ya ndako ya Yisraele báluka ngai mpo nasalela bango:+ nakokómisa bango mingi lokola etonga, na bato.+ 38  Lokola etonga ya basantu, lokola etonga ya Yerusaleme na bileko na ye ya fɛti,+ ndenge yango nde bingumba oyo etikalaki mpamba ekotonda mɛkɛ na etonga ya bato;+ mpe bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”

Maloba na nse