Ezekiele 33:1-33

33  Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:  “Mwana ya moto, lobá na bana ya bato na yo,+ mpe osengeli koyebisa bango boye:“‘Mpo na mokili moko, soki nakitiseli yango mopanga+ mpe bato ya mokili yango, bango nyonso, bazwi mpenza moto mpe batye ye sinzili+ na bango,  mpe soki amoni mpenza mopanga ezali koyela mokili yango mpe ayuli liseke mpe akebisi bato,+  mpe soki moyoki ayoki mpenza lokito ya liseke mpe alandi likebisi ata moke te,+ mpe mopanga eyei mpe elongoli ye, makila na ye ekozala na motó na ye moko.+  Ayokaki lokito ya liseke, kasi alandaki likebisi ata moke te. Makila na ye ekozala na motó na ye moko. Mpe soki alandaka likebisi, mbɛlɛ molimo na ye elingaki kobika.+  “‘Sikoyo soki sinzili amoni mopanga ezali koya mpe ya solo ayuli liseke te+ mpe bato bazwi likebisi moko te mpe mopanga eyei mpe elongoli molimo na kati na bango, molimo yango ekolongolama mpo na libunga na yango moko,+ kasi makila na yango, nakosɛnga yango na lobɔkɔ ya sinzili.’+  “Sikoyo mpo na yo, Ee mwana ya moto, nakómisi yo sinzili mpo na ndako ya Yisraele,+ mpe osengeli koyoka liloba na monɔkɔ na ngai mpe kokebisa bango mpo na ngai.+  Ntango nalobi na moto mabe ete: ‘Ee moto mabe, okokufa solo!’+ kasi ya solo, yo olobi na ye te mpo na kokebisa moto mabe mpo na nzela na ye,+ ye mpo azali moto mabe, akokufa na libunga na ye,+ kasi makila na ye, nakosɛnga yango na lobɔkɔ na yo.  Kasi mpo na yo, soki okebisi mpenza moto mabe alongwa na nzela na ye mpo abongwana, atika yango, kasi ya solo, abongwani te, atiki nzela na ye te, ye akokufa mpo na libunga na ye,+ nde yo, okobikisa mpenza molimo na yo.+ 10  “Sikoyo mpo na yo, Ee mwana ya moto, lobá na ndako ya Yisraele ete: ‘Bino bolobi boye: “Lokola makambo na biso ya botomboki mpe masumu na biso ezali na motó na biso, mpe tozali kopɔla na kati na yango,+ bongo tokotikala na bomoi ndenge nini?”’+ 11  Lobá na bango boye: ‘“Lokola nazali solo na bomoi,” yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, “nasepelaka na liwa ya moto mabe te,+ nasepelaka nde ete moto mabe abongwana,+ atika nzela na ye mpe atikala mpenza na bomoi.+ Bóbongwana, bóbongwana, bótika banzela na bino ya mabe,+ mpamba te bókufa mpo na nini, Ee ndako ya Yisraele?”’+ 12  “Nde yo, Ee mwana ya moto, lobá na bana ya bato na yo ete: ‘Boyengebene ya moyengebene ekobikisa ye te na mokolo ya botomboki na ye.+ Mpe mabe ya moto mabe ekobɛtisa ye libaku te na mokolo oyo abongwani, atiki mabe na ye.+ Ata mpe moto nyonso oyo azali na boyengebene akotikala na bomoi te mpo na yango na mokolo oyo ye akosala lisumu.+ 13  Ntango nalobi na moyengebene ete: “Okotikala mpenza na bomoi,” mpe ye atye mpenza motema na boyengebene na ye mpe asali makambo oyo ezali sembo te,+ bakokanisa lisusu te makambo na ye nyonso ya boyengebene oyo asalaki, kasi mpo na makambo na ye ya kozanga bosembo oyo asali—mpo na yango, akokufa.+ 14  “‘Mpe ntango nalobi na moto mabe ete: “Okokufa solo,”+ mpe ye abongwani mpenza, atiki lisumu na ye+ mpe asali makambo ya bosembo mpe ya boyengebene,+ 15  mpe soki moto mabe azongisi eloko oyo akangaki ndanga,+ afuti biloko oyo ayibaki,+ mpe atamboli mpenza na mibeko ya bomoi mpo asali te makambo ya kozanga bosembo,+ akotikala mpenza na bomoi.+ Akokufa te. 16  Bakokanisela ye lisusu lisumu na ye ata moko te oyo asalaki.+ Asali makambo ya bosembo mpe ya boyengebene. Akotikala mpenza na bomoi.’+ 17  “Mpe bana ya bato na yo balobi ete: ‘Nzela ya Yehova ezali sembo te,’+ kasi, bango, nzela na bango nde ezali sembo te. 18  “Ntango moyengebene abongwani, atiki makambo na ye ya boyengebene mpe asali mpenza makambo oyo ezali sembo te, asengeli mpe kokufa mpo na yango.+ 19  Mpe ntango moto mabe abongwani, atiki mabe na ye mpe asali mpenza makambo ya bosembo mpe ya boyengebene, ezali mpo na yango nde ye akotikala na bomoi.+ 20  “Mpe bolobi ete: ‘Nzela ya Yehova ezali sembo te.’+ Ee ndako ya Yisraele, nakosambisa bino, moto na moto na kotalela banzela na ye.”+ 21  Nsukansuka, esalemaki boye: na mbula ya zomi na mibale, na sanza ya zomi, na mokolo ya mitano ya sanza oyo tomemamaki na mboka mopaya, moto moko oyo abikaki, oyo autaki na Yerusaleme,+ ayaki epai na ngai mpe alobaki boye: “Bakweisi engumba!”+ 22  Sikoyo lobɔkɔ ya Yehova eyelaki ngai na mpokwa liboso ete moto oyo abikaki aya,+ mpe Ye afungolaki monɔkɔ na ngai liboso ete moto yango aya epai na ngai na ntɔngɔ, mpe monɔkɔ na ngai efungwamaki mpe nazalaki lisusu baba te.+ 23  Mpe liloba ya Yehova ebandaki koyela ngai ete: 24  “Mwana ya moto, bato oyo bafandi na bisika oyo ebebisami+ bazali kutu koloba mpo na mabele ya Yisraele ete: ‘Abrahama azalaki kaka ye moko kasi azwaki mokili yango.+ Mpe biso tozali ebele; mokili yango epesami na biso mpo ezala eloko na biso.’+ 25  “Na yango, yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bozali se kolya misuni elongo na makila,+ mpe bozali se kotombola miso na bino epai ya bikeko na bino ya bosɔtɔ,+ mpe bozali se kosopa makila.+ Bongo bokozwa nde mokili yango?+ 26  Botyeli mopanga na bino motema.+ Bosali likambo oyo eyinami,+ mpe moto na moto akómisi mwasi ya moninga na ye mbindo.+ Bongo bokozwa nde mokili yango?”’+ 27  “Talá oyo okoyebisa bango: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, ya solo, bato oyo bazali na bisika oyo ebebisami bakokwea na mopanga;+ mpe moto oyo azali na etando ya esobe, ya solo, nakopesa ye azala eloko ya kolya mpo na nyama ya zamba;+ mpe baoyo bazali na bisika makasi mpe na mibenga+ bakokufa na maladi mabe. 28  Mpe nakokómisa mpenza mokili yango esika oyo etikali mpamba,+ ɛɛ libebi mpenza, mpe lolendo ya makasi na yango ekosila mpenza,+ mpe bangomba ya Yisraele ekotikala mpamba,+ mpe moto ata moko te akoleka kuna. 29  Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakokómisa mokili yango esika oyo etikali mpamba,+ ɛɛ libebi mpenza, mpo na biloko na bango nyonso oyo eyinamá oyo basali.”’+ 30  “Nde yo, Ee mwana ya moto, bana ya bato na yo bazali kolobana mpo na yo pene na bifelo mpe na bisika ya kokɔta na bandako,+ mpe moko alobi na mosusu, moto na moto na ndeko na ye ete: ‘Nabondeli bino, bóya, mpe bóyoka liloba nini ezali kouta na Yehova.’+ 31  Mpe bakokɔta epai na yo, ndenge kaka bato bakɔtaka, mpe bakofanda liboso na yo lokola bato na ngai;+ mpe bakoyoka mpenza maloba na yo kasi bakosalela yango te,+ mpamba te na monɔkɔ na bango, bazali komonisa mposa makasi ya kosangisa nzoto mpe motema na bango ezali kolanda nde litomba oyo bazali kozwa na ndenge ya mabe.+ 32  Mpe, talá! epai na bango ozali lokola loyembo ya lolango, lokola moto oyo azali na mongongo kitoko mpe oyo azali kobɛta malamu ebɛtɛlo ya bansinga.+ Mpe bakoyoka mpenza maloba na yo, kasi moto moko te akosalela yango.+ 33  Mpe ntango ekokokisama—talá! ekokokisama mpenza+—bakoyeba mpe ete mosakoli moko azalaki na kati na bango.”+

Maloba na nse