Ezekiele 31:1-18
31 Mpe esalemaki lisusu boye: na mbula ya zomi na moko, na sanza ya misato, na mokolo ya liboso ya sanza yango, liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
2 “Mwana ya moto, lobá na Farao mokonzi ya Ezipito mpe na ebele ya bato na ye+ ete:“‘Okokani na nani na bonene na yo?
3 Talá! Moasiri, nzete ya sɛdrɛ na Libá,+ na bitape+ ya kitoko, esika moko na banzete oyo ekangamakangamá oyo ezali kopesa elili, mpe ezali molai mpenza,+ bongo nsɔngɛ na yango ezalaki na mapata.+
4 Mai nde ekómisaki yango monene,+ mai mozindo nde ekómisaki yango molai. Elongo na bibale na yango, ezalaki koleka epai na epai na esika oyo balonaki yango; mpe etindaki banzela ya mai na yango epai ya banzete nyonso ya zamba.
5 Yango wana ekómaki molai mingi koleka banzete nyonso ya zamba.+
“‘Mpe bitape na yango ya minene ezalaki se kobota mingi, mpe bitape na yango ya mike ezalaki se kokóma milai mpo na ebele ya mai ya bibale na yango.+
6 Bikelamu nyonso oyo epumbwaka na likoló ezalaki kotonga bazumbu+ na yango na bitape na yango, mpe banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe ezalaki kobota na nse ya bitape na yango,+ mpe bikólo nyonso ya bato ebele ezalaki kofanda na elili na yango.
7 Mpe ekómaki kitoko na bonene na yango,+ na bolai ya nkasa na yango, mpo misisa na yango ezalaki likoló ya mai mingi.
8 Banzete mosusu ya sɛdrɛ ekokanaki na yango te na elanga ya Nzambe.+ Bongo banzete ya jenevriye ekokanaki ata moke te na bitape na yango. Mpe banzete ya platane ezalaki lokola yango te na oyo etali bitape. Nzete mosusu te na elanga ya Nzambe ekokanaki na yango mpo na kitoko na yango.+
9 Nakómisaki yango kitoko na ebele ya nkasa na yango,+ mpe banzete mosusu nyonso ya Edene, oyo ezalaki na elanga ya Nzambe ya solo, ezalaki kaka kolula yango.’+
10 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Lokola okómaki molai mpenza, bongo etyaki nsɔngɛ na yango na mapata+ mpenza mpe motema na yango etombwanaki mpo na bolai na yango,+
11 nakopesa yango mpe na lobɔkɔ ya mokonzi makasi ya bikólo.+ Akosala yango mpenza mosala. Nakobengana yango na kotalela mabe na yango.+
12 Mpe bapaya, banyokoli ya bikólo, bakokata yango, mpe bato bakosundola yango likoló ya bangomba; mpe nkasa na yango ekokwea mpenza na mabwaku nyonso, mpe bitape na yango ekobukana na kati ya banzela nyonso ya mai ya mabele.+ Mpe bato ya bikólo nyonso ya mabele bakokita, bakolongwa na elili na yango mpe bakosundola yango.+
13 Bikelamu nyonso oyo epumbwaka na likoló ekofanda likoló ya mobimbi na yango oyo ekwei, mpe banyama nyonso ya zamba oyo efandaka na esobe ekozala likoló ya bitape na yango;+
14 mpo ata nzete moko te na banzete oyo basopelaka mai ekóma molai mpenza, to etya nsɔngɛ na yango mpenza na mapata, mpe mpo ata nzete moko te na banzete oyo emɛlaka mai etɛlɛma liboso na yango na bosanda na yango, mpamba te yango nyonso ekopesama mpenza na liwa,+ na mokili ya nse,+ esika moko na bana ya bato, na baoyo bazali kokita na libulu.’
15 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Na mokolo oyo yango ekokita na Nkunda,* nakosala ete bato bálela.+ Mpo na yango, nakozipa mai mozindo, mpo nakanga bibale na yango mpe mpo mai mingi ekangama; mpe mpo na yango, nakoyindisa Libá, mpe mpo na yango, banzete ya zamba ekolɛmba.
16 Ntango lokito ya kokwea na yango ekoyokana, nakolɛngisa mpenza bikólo ntango nakokitisa yango na Nkunda* elongo na baoyo bazali kokita na kati ya libulu,+ mpe na mokili ya nse, banzete nyonso ya Edene,+ banzete ya Libá oyo eleki kitoko mpe oyo eleki malamu, nyonso oyo emɛlaka mai ekobɔndisama.+
17 Ekiti mpe elongo na yango na Nkunda,*+ epai ya baoyo babomami na mopanga, ná baoyo, mpo bazali momboto na yango, bafandi na elili na yango na katikati ya bikólo.’+
18 “‘Boye okokani na nani na nkembo+ mpe na bonene na kati ya banzete ya Edene?+ Kasi okokitisama mpenza elongo na banzete ya Edene na mokili ya nse.+ Okolala na katikati ya bato oyo bakatami ngenga te esika moko na bato oyo babomami na mopanga. Wana nde Farao ná ebele ya bato na ye nyonso,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”