Ezekiele 30:1-26
30 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Mwana ya moto, sakolá, mpe osengeli koloba boye:+ ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bóganga na kolela ete: ‘Mawa mpo na mokolo yango!’+
3 mpo mokolo ekómi pene, ɛɛ, mokolo ya Yehova ekómi pene.+ Mokolo ya mapata,+ ekozala ntango oyo etyami mpo na bikólo.+
4 Mpe mopanga ekokɔta mpenza na Ezipito,+ mpe mpasi makasi ekobima mpenza na Etiopi ntango bato bakokwea bibembe na Ezipito mpe bakozwa mpenza bozwi na yango mpe miboko na yango ekobukama mpenza.+
5 Etiopi,+ Puti,+ Ludi, etuluku mobimba ya bato ndenge na ndenge,+ Kube mpe bana ya mokili ya kondimana—bakokwea na mopanga elongo na bango.”’+
6 “Talá oyo Yehova alobi: ‘Basungi ya Ezipito mpe bakokwea mpenza, mpe eloko oyo ezali kotinda yango ezala na lolendo makasi ekokwea mpenza.’+
“‘Banda na Migidole+ kino na Siene,+ bakokwea kuna na mopanga,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
7 ‘Ya solo, bakokómisama mpe eloko oyo etikali mpamba na kati ya mikili oyo etikali mpamba, mpe bingumba na yango ekozala mpenza na katikati ya bingumba oyo etikali mpamba.+
8 Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakotya mɔtɔ na Ezipito mpe basungi na yango nyonso bakobukama mpenza.+
9 Na mokolo yango, bamemi-nsango bakobima liboso na ngai na bamasuwa, mpo na kolɛngisa Etiopi oyo amityelaka motema.+ Mpe mpasi makasi ekozala na kati na bango na mokolo ya kokwea ya Ezipito, mpo, talá! ekoya mpenza.’+
10 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakosilisa mpe ebele ya bato ya Ezipito na lobɔkɔ ya Nebukadrezare mokonzi ya Babilone.+
11 Ye ná bato na ye elongo, banyokoli ya bikólo,+ bazali kokɔtisama mpo na kobebisa mokili. Mpe bakobendela mpenza Ezipito mipanga na bango mpe bakotondisa mokili na bato oyo babomami.+
12 Mpe nakokómisa banzela ya mai ya Nile+ mabele oyo ekauká mpe nakotɛka mokili na lobɔkɔ ya bato mabe,+ mpe nakosala ete mokili yango ná biloko oyo etondani na kati, etikala mpamba na lobɔkɔ ya bapaya.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.’+
13 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakobebisa mpe bikeko ya bosɔtɔ+ mpe nakosilisa banzambe ya mpambampamba na Nofe,+ mpe nkumu akozala lisusu te na mokili ya Ezipito; mpe nakotya mpenza kobanga na mokili ya Ezipito.+
14 Mpe nakokómisa Patrose+ esika oyo etikali mpamba, nakotya mɔtɔ na Zoane+ mpe nakokweisela No bitumbu.+
15 Mpe nakosopela Sine, esika makasi ya Ezipito, nkɛlɛ+ na ngai, mpe nakoboma ebele ya bato ya No.+
16 Mpe nakotya mɔtɔ na Ezipito. Sine ekozala mpenza na mpasi makasi, mpe No ekozala eloko oyo ekozwama na bisika oyo ekotɔbɔlama; mpe Nofe—banguna bakozala na moi!
17 Bilenge mibali ya One+ mpe ya Pibesete bakokwea na mopanga, mpe bingumba ekokende mpenza na bokangami.
18 Mpe na Tehafenehese,+ mokolo ekoyinda mpenza, ntango nakobuka ekanganeli ya Ezipito.+ Mpe kati na ye, lolendo ya makasi na ye ekosilisama mpenza.+ Kasi ye, mapata ekozipa ye,+ mpe basité na ye oyo esimbami na ye ekokende na bokangami.+
19 Mpe nakokweisela Ezipito bitumbu;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”
20 Mpe esalemaki lisusu boye: na mbula ya zomi na moko, na sanza ya liboso, na mokolo ya nsambo ya sanza yango, liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
21 “Mwana ya moto, nakobuka mpenza lobɔkɔ ya Farao mokonzi ya Ezipito,+ mpe talá! bakokanga yango ata moke te mpo na kobikisa yango na eteni ya elamba oyo bakotya mpo na kokanga yango,+ mpo ezwa makasi ya kosimba mopanga.”
22 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kobundisa Farao mokonzi ya Ezipito,+ mpe nakobuka mabɔkɔ na ye,+ oyo ya makasi ná oyo ebukani,+ mpe nakokweisa mopanga oyo ezali na lobɔkɔ na ye.+
23 Mpe nakopalanganisa Baezipito na kati ya bikólo mpe nakopanza bango na kati ya mikili.+
24 Mpe nakokembisa mabɔkɔ ya mokonzi ya Babilone+ mpe nakotya mopanga na ngai na lobɔkɔ na ye,+ mpe nakobuka mabɔkɔ ya Farao, mpe ya solo, akokimela mingi liboso na ye lokola moto oyo azoki mpota ya liwa.+
25 Mpe nakokembisa mabɔkɔ ya mokonzi ya Babilone, mpe mabɔkɔ ya Farao ekokwea; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakotya mopanga na ngai na lobɔkɔ ya mokonzi ya Babilone mpe akosembola mpenza yango mpo na kobundisa mokili ya Ezipito.+
26 Mpe nakopalanganisa Baezipito na kati ya bikólo+ mpe nakopanza bango na kati ya mikili; mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”