Ezekiele 3:1-27
3 Mpe alobaki na ngai boye: “Mwana ya moto, oyo ozali komona, lyá. Lyá rulo oyo,+ mpe kende, lobá na ndako ya Yisraele.”
2 Bongo nafungolaki monɔkɔ na ngai, mpe abandaki koleisa ngai rulo yango.+
3 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Mwana ya moto, osengeli koleisa libumu na yo, mpo otondisa misɔpɔ na yo na rulo oyo nazali kopesa yo.” Mpe nabandaki kolya yango, mpe ekómaki elɛngi na monɔkɔ na ngai lokola mafuta ya nzoi.+
4 Mpe akobaki koloba na ngai ete: “Mwana ya moto, kende, kɔtá na ndako+ ya Yisraele, mpe osengeli kolobela bango maloba na ngai.
5 Mpo otindami te epai ya bato oyo balobaka monɔkɔ+ oyo ozali kokanga ntina te to oyo bazali na lolemo kilo+—kasi nde na ndako ya Yisraele,
6 ezali te epai ya bikólo ebele oyo balobaka monɔkɔ oyo ozali kokanga ntina te to oyo bazali na lolemo kilo, oyo okoki te koyoka maloba na bango mpe kokanga ntina.+ Soki ezalaka epai na bango nde natindaki yo, bango balingaki koyoka yo.+
7 Nde ndako ya Yisraele, bango bakolinga te koyoka yo, mpo bazali kolinga koyoka ngai te;+ mpo bato nyonso ya ndako ya Yisraele bazali motó makasi mpe motema makasi.+
8 Talá! Nakómisi elongi na yo makasi lokola bilongi na bango+ mpe motó na yo makasi lokola mitó na bango.+
9 Nakómisi motó na yo lokola diama, makasi koleka libanga ya silekise.+ Osengeli kobanga bango te,+ mpe osengeli koyoka bilongi na bango nsɔmɔ te,+ mpo bazali ndako ya batomboki.”+
10 Mpe alobaki lisusu na ngai boye: “Mwana ya moto, maloba na ngai nyonso oyo nakoyebisa yo, tyá yango na motema na yo+ mpe yoká na matoi na yo.
11 Mpe kende, kɔtá na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya,+ na kati ya bana ya bato na yo mpe osengeli koloba na bango mpe koyebisa bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi,’ báyoka to báboya.”+
12 Mpe elimo ememaki ngai+ mpe nabandaki koyoka na nsima na ngai lokito ya mopɛpɛ makasi na maloba oyo:+ “Nkembo ya Yehova epambwama uta na esika na ye.”+
13 Mpe ezalaki na lokito ya mapapu ya bikelamu ya bomoi oyo ezalaki kosimbana mpenza moko na mosusu,+ mpe lokito ya bayiká oyo ezalaki penepene na bango,+ mpe lokito ya mopɛpɛ makasi.
14 Mpe elimo ememaki+ ngai mpe ekendaki na ngai, bongo nakendaki wana elimo na ngai ezalaki na bololo mpe na nkɛlɛ, mpe lobɔkɔ ya Yehova ezalaki makasi likoló na ngai.+
15 Bongo nakɔtaki na kati ya bato oyo bamemamaki na mboka mopaya na Tele-abibe, baoyo bazalaki kofanda+ pene na ebale Kebare,+ mpe nabandaki kofanda esika bazalaki kofanda; mpe nafandaki kuna mikolo nsambo, nazalaki kaka kokamwa na kati na bango.+
16 Mpe esalemaki boye: na nsuka ya mikolo nsambo, liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
17 “Mwana ya moto, nakómisi yo sinzili mpo na ndako ya Yisraele,+ mpe osengeli koyoka maloba ya monɔkɔ na ngai mpe osengeli kokebisela ngai bango.+
18 Ntango nalobi na moto mabe ete: ‘Okokufa solo,’+ mpe ya solo, okebisi ye te mpe olobi te mpo na kokebisa moto mabe mpo na nzela na ye ya mabe mpo na kobatela ye na bomoi,+ ye moto mabe, akokufa na libunga na ye,+ kasi makila na ye nakosɛnga yango na lobɔkɔ na yo.+
19 Nde yo, soki okebisi moto mabe+ mpe ya solo, ye atiki mabe na ye te mpe nzela na ye ya mabe te, ye akokufa mpo na libunga na ye;+ nde yo, okobikisa molimo na yo.+
20 Mpe ntango moyengebene moko abongwani, atiki makambo na ye ya boyengebene+ mpe asali mpenza makambo oyo ezali sembo te mpe ekosɛnga natya liboso na ye eloko oyo ebɛtisaka libaku,+ ye akokufa mpo okebisaki ye te. Mpo na lisumu na ye, akokufa,+ mpe misala na ye ya boyengebene oyo asalaki ekokanisama lisusu te,+ kasi makila na ye nakosɛnga yango na lobɔkɔ na yo.+
21 Nde yo, soki okebisi moyengebene ete moyengebene yango asala lisumu te,+ mpe ya solo, ye asali lisumu te, akotikala mpenza na bomoi mpo akebisamaki,+ mpe yo okobikisa molimo na yo.”+
22 Mpe lobɔkɔ ya Yehova ezalaki likoló na ngai kuna mpe alobaki na ngai boye: “Tɛlɛmá, kende na lobwaku ya patatalu,+ mpe kuna nakoloba na yo.”
23 Bongo natɛlɛmaki mpe nakendaki na lobwaku ya patatalu, mpe talá! nkembo ya Yehova etɛlɛmaki wana,+ lokola nkembo oyo namonaki pene na ebale Kebare,+ mpe nakweaki elongi na nse.+
24 Na nsima, elimo ekɔtelaki ngai+ mpe etɛlɛmisaki ngai na makolo na ngai,+ mpe abandaki koloba na ngai mpe koyebisa ngai boye:
“Kende komikanga na kati ya ndako na yo.
25 Mpe yo, Ee mwana ya moto, talá! bakotya yo mpenza bansinga mpe bakokanga yo yango bongo okokoka te kobima na kati na bango.+
26 Mpe lolemo na yo, nakokangisa yango na edáda na yo,+ mpe okokóma mpenza baba,+ mpe epai na bango okokóma te moto oyo azali kopesa mpamela,+ mpo bazali ndako ya batomboki.+
27 Mpe ntango nakoloba na yo, nakofungola monɔkɔ na yo, mpe yo osengeli koloba na bango ete:+ ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi.’ Ye oyo azali koyoka ayoka,+ mpe ye oyo azali koboya aboya, mpo bazali ndako ya batomboki.+