Ezekiele 29:1-21
29 Na mbula ya zomi, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi na mibale ya sanza yango, liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
2 “Mwana ya moto, tɛmɛlá Farao mokonzi ya Ezipito+ mpe sakwelá ye mpe Ezipito mobimba.+
3 Lobá, mpe osengeli koyebisa boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Farao, mokonzi ya Ezipito,+ nyama ya monene mpe ya nsɔmɔ oyo ezalaka na mbu,+ oyo etandami na katikati ya banzela ya mai ya Nile,+ oyo elobi ete: ‘Ebale na ngai Nile ezali ya ngai, mpe ngai—nasali yango mpo na ngai moko.’+
4 Mpe nakotya bandɔbɔ na mbanga na yo+ mpe nakokangisa mbisi ya banzela na yo ya mai ya Nile na mposo na yo. Mpe nakolongola yo na katikati ya banzela na yo ya mai ya Nile mpe nakobimisa yo mpe mbisi nyonso ya banzela na yo ya mai ya Nile, oyo ekangani na mposo na yo.
5 Mpe nakosundola yo na esobe, yo ná mbisi nyonso ya banzela na yo ya mai ya Nile.+ Okokwea likoló ya etando ya esobe.+ Bakolɔkɔta yo te, bakosangisa yo mpe te. Nakopesa yo ozala bilei ya banyama ya zamba na mabele mpe ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló.+
6 Mpe bato nyonso oyo bafandi na Ezipito bakoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ mpamba te na esika bázala eloko oyo moto akoki koyɛkamela, bazalaki nde mongendu mpo na ndako ya Yisraele.+
7 Ntango basimbaki yo na lobɔkɔ, obukanaki,+ mpe opasolaki lipeka na bango mobimba. Mpe ntango bayɛkamelaki yo, obukanaki,+ mpe olɛngisaki loketo na bango nyonso.”+
8 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai oyo nazali kokitisela yo mopanga,+ mpe nakoboma epai na yo moto ya mabele mpe nyama ya mboka.+
9 Mpe mokili ya Ezipito ekotikala mpamba mpe ekobebisama;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova, mpo alobi ete: ‘Ebale Nile ezali ya ngai, mpe ngai moko nde nasali yango.’+
10 Na yango, ngai oyo nazali kobundisa yo ná banzela na yo ya mai ya Nile,+ mpe nakokómisa mokili ya Ezipito bisika oyo ebebisami, kokauka na kokauka, esika oyo etikali mpamba,+ banda na Migidole+ kino na Siene+ mpe kino na ndelo ya Etiopi.
11 Lokolo ya moto ya mabele ekoleka wana te+ mpe lokolo ya nyama ya mboka ekoleka wana te,+ mpe mbula ntuku minei (40), moto akofanda wana te.+
12 Mpe nakokómisa mokili ya Ezipito esika oyo etikali mpamba na katikati ya mikili oyo etikali mpamba;+ mpe mbula ntuku minei (40), bingumba na yango ekotikala mpamba na katikati ya bingumba oyo ebebisami;+ mpe nakopalanganisa Baezipito na kati ya bikólo mpe nakopanza bango na kati ya mikili.”+
13 “‘Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Na nsuka ya mbula ntuku minei (40),+ nakoyanganisa Baezipito uta na bato ya bikólo epai bakopalanganisama,+
14 mpe nakozongisa etuluku ya bakangami ya Baezipito; mpe nakozongisa bango na mokili ya Patrose,+ na mokili epai bautaki, mpe kuna, bakokóma mpenza bokonzi oyo ekitisami.
15 Ekokóma na nse koleka makonzi mosusu, mpe ekomitombola te likoló ya bikólo mosusu,+ mpe nakokómisa bango moke mpenza mpe bakokoka te kotya bikólo mosusu na nse ya bokonzi na bango.+
16 Mpe yango ekozala lisusu te esika oyo ndako ya Yisraele etyelaka motema,+ oyo ezali kosala ete libunga ekanisama lisusu na ndenge bazalaki kolanda bango.+ Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”’”
17 Bongo esalemaki boye: na mbula ya ntuku mibale na nsambo (27), na sanza ya liboso, na mokolo ya liboso ya sanza yango, liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
18 “Mwana ya moto, Nebukadrezare,+ mokonzi ya Babilone, asalisi mampinga ya basoda na ye mosala monene mpo na kobundisa Tire.+ Motó nyonso ekómaki na libandi, mpe lipeka nyonso elongwaki mposo.+ Kasi ye ná mampinga ya basoda na ye bazwaki lifuti+ ata moko te oyo euti na Tire mpo na mosala oyo asalaki mpo na kobundisa ye.
19 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kopesa mokili ya Ezipito na Nebukadrezare mokonzi ya Babilone,+ mpe akomema mpenza bozwi na yango mpe akobɔtɔla biloko na yango mingi+ mpe akopunza ebele ya biloko na yango; mpe ekokóma mpenza lifuti mpo na mampinga ya basoda na ye.’
20 “‘Napesi ye mokili ya Ezipito ezala lifuti mpo na mosala oyo asalaki mpo na kobundisa ye, mpamba te basalelaki nde ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
21 “Na mokolo yango, nakobimisela ndako ya Yisraele liseke moko,+ mpe nakopesa yo libaku ya kofungola monɔkɔ na kati na bango;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”