Ezekiele 27:1-36

27  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:  “Nde yo, Ee mwana ya moto, bimiselá Tire loyembo ya mawa,+  mpe osengeli koyebisa Tire ete:“‘Ee yo oyo ofandi na bisika ya kokɔta na mbu,+ mwasi ya mombongo elongo na bato ya bikólo ya bisanga mingi,+ talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ee Tire, yo moko olobi: ‘Nazali na kitoko ya kokoka.’+  Bateritware na yo ezali na katikati ya mbu.+ Bato oyo batongaki yo bakómisi kitoko na yo ya kokoka.+  Babongiselaki yo mabaya nyonso ya mipanzi na yo na banzete ya jenevriye oyo euti na Senire.+ Bazwaki nzete ya sɛdrɛ ya Libá+ mpo na kosala likonzí ya kokangisa elamba ya masuwa likoló na yo.  Basalaki nkai na yo na banzete minene ya Bashane. Basalaki elongi na yo na mpɛmbɛ ya nzoku oyo bakɔtisá na mabaya ya siprɛ, oyo euti na bisanga ya Kitime.+  Elamba na yo oyo ozalaki kotanda mpo ezala elamba ya kotambwisa masuwa na mopɛpɛ ezalaki lini ya langi ndenge na ndenge oyo euti na Ezipito.+ Elamba oyo ezalaki kozipa yo esalemaki na nsinga ya bule+ mpe na lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bule,+ oyo euti na bisanga ya Elisha.+  “‘“Bato oyo bazalaki kofanda na Sidone+ mpe na Arvade+ bakómaki balúki na yo. Ee Tire, bato na yo ya mayele+ bazalaki epai na yo; bazalaki bamatelo+ na yo.  Ata mikóló ya Gebale+ mpe bato na ye ya mayele bazalaki epai na yo bato oyo bazalaki kobamba bampota ya masuwa.+ Bamasuwa nyonso ya mbu ná bato oyo basalaka na kati bazalaki epai na yo, mpo na kosomba biloko ya mombongo. 10  Baperse,+ Baludime+ ná bato ya Puti+—bazalaki na limpinga ya basoda na yo, bato na yo ya etumba. Bazalaki kokakisa nguba mpe ekɔti na kati na yo.+ Bango nde bazalaki kosala ete ozala na nkembo. 11  Bana ya Arvade,+ ɛɛ mampinga ya basoda na yo, bazalaki likoló ya bifelo na yo nyonso epai na epai, mpe bilombe nde bazalaki likoló ya manɔ́ngi na yo. Bazalaki kokakisa banguba na bango ya zolongano na bifelo na yo epai na epai.+ Bango mpenza nde bakómisaki kitoko na yo ya kokoka. 12  “‘“Tarasisi+ azalaki moto na yo ya mombongo mpo na ebele ya biloko ya motuya ya ndenge nyonso.+ Mpo na kozwa palata, ebende, etini mpe mondɔlu ya Tarasisi, bazalaki kopesa biloko na yo ya mombongo.+ 13  Yavane,+ Tubale+ ná Mesheke+ bazalaki bato na yo ya mombongo. Mpo na kozwa milimo ya bato+ mpe biloko ya motako, bazalaki kopesa biloko na yo ya kosomba. 14  Bafarasa, bampunda ya etumba mpe badɔngi, oyo mpo na yango bazalaki kopesa biloko na yo ya mombongo, ezalaki kouta na ndako ya Togarama.+ 15  Bana ya Dedane+ bazalaki bato na yo ya mombongo; bisanga mingi ezalaki bato ya mombongo oyo bazalaki kosalela yo mosala; bapesi yo makabo ya mpɛmbɛ ya nzoku+ ná mabaya ya ebɛnɛ lokola lifuti. 16  Edome azalaki moto na yo ya mombongo mpo na ebele ya misala na yo. Biloko na yo ya mombongo ezalaki kopesama mpo na kosomba tirikwaze,+ lɛnɛ oyo epakolami langi ya mwa motane-bule, bilamba ya langi ndenge na ndenge, elamba ya kitoko, mabanga kitoko ya korai mpe mabanga ya rubi. 17  “‘“Yuda ná mokili ya Yisraele bazalaki bato na yo ya mombongo. Mpo na kozwa blé+ ya Minite,+ biloko kitoko ya kolya, mafuta ya nzoi,+ mafuta mpe balsame,+ bazalaki kopesa biloko na yo ya kosomba.+ 18  “‘“Damasi+ azalaki moto na yo ya mombongo na kati ya ebele ya misala na yo, mpo na ebele ya biloko na yo nyonso ya motuya, ná vinyo+ ya Helebone mpe lɛnɛ ya mwa mpɛmbɛ-motane. 19  Vedane ná Yavane ya Uzale—bapesaki biloko mpo na kozwa biloko na yo ya mombongo. Biloko ya ebende oyo etulami, nzete ya kasia mpe nkokó ya nsolo mpimbo+—ezalaki mpo na biloko na yo ya kosomba. 20  Dedane+ azalaki moto na yo ya mombongo ya bilamba ya nsinga oyo balitá mpo na kofandela mpunda. 21  Baarabe+ ná bankumu nyonso ya Kedare+ bazalaki bato ya mombongo oyo bazalaki kosalela yo mosala. Bazalaki nde bato na yo ya mombongo ya bana-mpate ya mibali, bampate-mibali ná bantaba-mibali.+ 22  Bato ya mombongo ya Sheba+ mpe ya Rama+ bazalaki bato na yo ya mombongo; biloko na yo ya mombongo ezalaki kopesama mpo na bamalasi ya ndenge nyonso oyo eleki kitoko mpe mpo na mabanga ya ntalo ya ndenge nyonso mpe mpo na wolo.+ 23  Harane,+ Kane ná Edene,+ bato ya mombongo ya Sheba,+ Ashure+ mpe Kilimada bazalaki bato na yo ya mombongo. 24  Bazalaki bato na yo ya mombongo ya bilamba ya kitoko, ya bilamba ya komizipa oyo esalemi na nsinga ya bule mpe na nsinga ya langi ndenge na ndenge, ya batapi oyo esalemi na bilamba ya langi mibale, ya bansinga oyo batongátongá mpe oyo ebongisamá makasi, na esika na yo ya mombongo. 25  “‘“Bamasuwa ya Tarasisi+ ezalaki milɔngɔ na yo ya baleki-nzela mpo na biloko na yo ya kosomba, bongo otondaki mpe okómaki na lokumu mingi na katikati mpenza ya mbu.+ 26  “‘“Na kati ya mai minene nde baoyo bazalaki kolúka yo bamemi yo.+ Mopɛpɛ ya ɛsti epanzi yo na katikati mpenza ya mbu.+ 27  Biloko na yo ya motuya mpe biloko na yo oyo ebombamá,+ biloko na yo ya kosomba,+ bato na yo ya masuwa mpe bamatelo na yo,+ bato na yo oyo babambaka bampota ya masuwa+ mpe baoyo basombaka biloko na yo ya mombongo mpe bato na yo nyonso ya bitumba,+ baoyo bazali na kati na yo mpe na lisangá na yo mobimba, baoyo bazali na katikati na yo,—bakokwea na katikati mpenza ya mbu, na mokolo ya kokwea na yo.+ 28  “‘“Ntango lokito ya koganga ya bamatelo na yo ekobima, bamboka ya zamba ekoningana.+ 29  Mpe baoyo nyonso basimbaka nkai, bato ya masuwa, bamatelo nyonso ya mbu, bakokita mpenza na bamasuwa na bango; bakotɛlɛma na mokili.+ 30  Mpe bakoyokisa mpenza mongongo na bango mpo na yo mpe bakoganga na koganga ya mawa.+ Mpe bakobwaka putulu na mitó na bango.+ Bakomibalola na putulu ya mɔtɔ.+ 31  Mpe basengeli komisala libandi, ɛɛ libandi, mpo na yo,+ mpe bakokanga ngɔtɔ na loketo,+ mpe bakolela yo na kolela ya mawa na molimo,+ ná koganga ya kolela ya bololo. 32  Mpe ya solo, bakobimisela yo loyembo ya mawa wana bazali kolela mpe bakoyembela yo boye:+“‘“‘Nani azali lokola Tire,+ lokola ye oyo akangisami monɔkɔ na katikati ya mbu?+ 33  Ntango biloko na yo ya mombongo+ ezalaki kouta na katikati ya mbu,+ otondisaki bato ya bikólo mingi.+ Na ebele ya biloko na yo ya motuya mpe na biloko na yo ya kosomba, okómisaki bakonzi ya mabele bazwi.+ 34  Sikoyo, mbu epanzi yo, na kati ya bozindo ya mai mingi.+ Bongo biloko na yo ya kosomba mpe lisangá na yo mobimba,+ ekwei na katikati na yo. 35  Bato nyonso oyo bafandi na bisanga+—bakotikala mpenza minɔkɔ polele na kokamwa liboso na yo, mpe bakonzi na bango bakolɛnga na nsɔmɔ.+ Bilongi ekobulungana mpenza.+ 36  Bongo bato ya mombongo na kati ya bato ya bikólo, bakobɛta mpenza piololo mpo na yo.+ Nsɔmɔ ya pwasa, yango nde okoyoka mpenza, mpe okozala lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te.’”’”+

Maloba na nse