Ezekiele 26:1-21
26 Mpe esalemaki boye: na mbula ya zomi na moko, na mokolo ya liboso ya sanza yango, liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
2 “Mwana ya moto, lokola Tire+ alobi na Yerusaleme+ ete: ‘Aha! Abukani,+ baporte ya bato ya bikólo!+ Ya solo, bakobaluka epai na ngai. Nakotonda—babebisi ye,’+
3 na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kobundisa yo, Ee Tire, mpe nakomatisa bikólo mingi epai na yo,+ ndenge mbu ematisaka mbonge na yango.+
4 Mpe bakobebisa mpenza bifelo ya Tire+ mpe bakobuka manɔ́ngi na ye,+ mpe nakopalola putulu na ye mpe nakokómisa ye etando ya libanga oyo ezali kongɛnga, oyo ezali mpamba.
5 Akokóma mpenza esika ya kokaukisa minyama+ na katikati ya mbu.’+
“‘Mpo ngai moko nde nalobi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘mpe akokóma mpenza eloko oyo bikólo bakopunza.
6 Mpe basité oyo esimbami na ye, oyo ezali na esobe—ekobomama na mopanga, mpe bato bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+
7 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali komemela Tire Nebukadrezare mokonzi ya Babilone, mokonzi ya bakonzi,+ uta na nɔrdi,+ ná bampunda+ mpe makalo ya bitumba+ mpe basoda oyo batambolaka na mpunda mpe lisangá,+ ɛɛ bato ebele mpenza.
8 Basité oyo esimbami na yo, oyo ezali na esobe, akoboma yango na mopanga, mpe akosalela yo mpenza efelo ya kozinga mboka mpe akotonga ngomba ya mabele+ mpo na kobundisa yo mpe akotombolela yo nguba moko monene;
9 mpe na masini na ye ya kobuka bifelo akotuta bifelo na yo, mpe akobuka manɔ́ngi na yo, na mipanga na ye.
10 Mpo na ebele ya bampunda na ye oyo ezali kopumbwapumbwa, putulu na yango ekozipa yo.+ Mpo na lokito ya soda oyo atambolaka na mpunda mpe ya yiká mpe ya likalo ya etumba, bifelo na yo ekoningana, ntango akokɔta na baporte na yo, lokola ntango bakɔtaka na engumba na bisika oyo etɔbɔlami.
11 Akonyatanyata babalabala na yo nyonso na basabo ya bampunda na ye.+ Akoboma bato na yo na mopanga mpenza, mpe makonzí na yo ya makasi ekokwea na mabele.
12 Mpe bakopunza mpenza biloko na yo+ mpe bakobɔtɔla biloko na yo ya mombongo,+ mpe bakobuka bifelo na yo, mpe bakokweisa bandako na yo ya kitoko. Mpe mabanga na yo, mabaya na yo ná putulu na yo, bakotya yango na katikati ya mai mpenza.’
13 “‘Mpe nakosilisa makɛlɛlɛ ya nzembo na yo,+ mpe makɛlɛlɛ ya banzɛnzɛ na yo ekoyokana lisusu te.+
14 Mpe nakokómisa yo etando ya libanga oyo ezali kongɛnga, oyo ezali mpamba.+ Okokóma mpenza esika ya kokaukisa minyama.+ Okotongama lisusu soki moke te; mpo ngai moko, Yehova, nde nalobi,’ yango nde liloba ya Yehova+ Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
15 “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na Tire: ‘Bisanga ekoningana nde na lokito ya kokwea na yo te, ntango moto oyo azoki mpota ya liwa akokimela, ntango bakoboma bato ebele epai na yo?+
16 Mpe bankumu nyonso ya mbu bakokita+ mpenza na bakiti na bango ya bokonzi+ mpe bakolongola bakazaka na bango oyo ezangá mabɔkɔ, mpe bakolongola bilamba na bango oyo basalá mayemi ya nsingansinga. Bakolata mpenza kolɛnga lokola elamba. Bakofanda na mabele,+ mpe bakolɛnga mpenza ntango nyonso+ mpe bakotikala monɔkɔ polele na kokamwa mpo na yo.
17 Mpe bakobimisela yo loyembo ya mawa+ mpe bakoloba na yo boye:
“‘“Talá ndenge okufi, yo oyo bato bautá na mbu bazalaki koya kofanda epai na yo,+ Ee engumba oyo ekumisamá, oyo ekómaki engumba moko makasi na mbu,+ yango ná bato oyo bafandi na kati na yango, baoyo bazalaki koyokisa bato nyonso oyo bafandaka na mabele nsɔmɔ!
18 Sikoyo bisanga ekolɛnga na mokolo ya kokwea na yo. Mpe bisanga oyo ezali na kati ya mbu ekobulungana mpo na kolimwa na yo.”’+
19 “Mpo talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ntango nakokómisa yo engumba oyo ebebisami, lokola bingumba oyo ezali solo na bato te, ntango nakomemela yo mai mozindo, mpe mai minene ekozipa yo,+
20 nakokitisa yo mpe elongo na baoyo bazali kokita na libulu epai ya bato ya kalakala,+ mpe nakofandisa yo na mokili ya nse koleka,+ lokola bisika oyo ebebisamá banda kalakala, elongo na baoyo bazali kokita na libulu,+ mpo bato báfanda na kati na yo te; mpe nakotya monzɛlɛ na mokili ya baoyo bazali na bomoi.+
21 “‘Nakoyokisa yo nsɔmɔ ya pwasa,+ mpe okozala lisusu te; mpe bakoluka yo,+ kasi okomonana lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”