Ezekiele 24:1-27
24 Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai lisusu na mbula ya libwa, na sanza ya zomi, na mokolo ya zomi ya sanza yango ete:
2 “Mwana ya moto, komá nkombo ya mokolo oyo, mokolo oyo mpenza. Mokonzi ya Babilone akweli Yerusaleme na mokolo oyo mpenza.+
3 Mpe bongisá liloba ya lisese mpo na ndako ya batomboki,+ mpe osengeli koloba mpo na bango boye:“‘Talá oyo Yehova Nkolo Mo-konzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Tyá na mɔtɔ nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene; tyá yango na mɔtɔ, mpe lisusu sopá mai na kati.+
4 Sangisá misuni na kati,+ mosuni nyonso ya malamu, ebɛlɔ ná lipeka; tondisá yango na mikuwa oyo eleki malamu.
5 Bázwa mpate oyo eleki kitoko,+ sangisá nkoni na nse na yango, esala zolongano. Tɔkisá misuni na yango, mpe lambá mikuwa na yango na kati na yango.”’”+
6 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mawa na engumba ya misala ya kosopa makila,+ nzungu ya kolambela oyo ezali na monɔkɔ monene, oyo koguga na yango ezali na kati, mpe koguga na yango elongwe na kati na yango te! Bimisá mokomoko na yango;+ basengeli kobwakela yango mbɛsɛ te.+
7 Mpo makila na yango ezali na kati na yango mpenza.+ Atyaki yango na etando ya libanga oyo ezali kongɛnga, oyo ezali mpamba. Asopaki yango na mabele te, mpo na kozipa yango na putulu.+
8 Mpo na kotumola nkɛlɛ mpo na kozongisa mabe,+ natye makila na ye na etando ya libanga oyo ezali kongɛnga, oyo ezali mpamba, mpo ezipama te.’+
9 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Mawa na engumba oyo etondi na misala ya kosopa makila!+ Ya solo, ngai moko nakokómisa liboke ya nkoni yango monene.+
10 Bakisá nkoni. Pelisá mɔtɔ. Lambá mosuni malamumalamu. Mpe sopá supu, mpe tiká mikuwa ekóma mɔtɔ makasi.
11 Tyá yango likoló ya makala na yango, ezala na eloko te na kati, mpo ezwa mɔtɔ; mpe motako na yango esengeli kokóma mɔtɔ makasi, mpe mbindo na yango esengeli konyangwa na kati na yango.+ Koguga na yango ezika.+
12 Mpasi! Elɛmbisi, kasi ebele ya koguga na yango elongwe na yango te.+ Ebwakama na mɔtɔ ná koguga na yango!’
13 “‘Etamboli ya nsɔni ezalaki na kati ya mbindo na yo.+ Yango wana, nasengelaki kopɛtola yo, kasi okómaki pɛto te, mbindo na yo elongwaki te.+ Okokóma pɛto lisusu te tii nakolɛmbisa nkɛlɛ na ngai na likambo na yo.+
14 Ngai moko, Yehova, nde nalobi.+ Ekosalema mpenza,+ mpe nakosala. Nakotalela yango na bopɔtu te,+ mpe nakoyoka mawa te,+ nakoyoka mpe mpasi na motema te.+ Bakosambisa yo mpenza na kolanda banzela na yo mpe na kolanda misala na yo,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”
15 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
16 “Mwana ya moto, talá, nazali kobɔtɔla yo eloko oyo ezali kitoko+ na miso na yo, nazali kobɛta yango;+ mpe osengeli te komibɛta na ntolo, osengeli mpe kolela te, mpisoli na yo esengeli mpe kobima te.+
17 Kimelá, kasi kobimisa maloba te. Osengeli kosala lilaka mpo na bakufi te.+ Omikanga eloko na yo ya kolata na motó,+ mpe osengeli kolata basandale na yo na makolo.+ Osengeli kozipa monzomba te,+ mpe osengeli kolya limpa ya bato te.”+
18 Mpe nayebisaki bato na ntɔngɔ mpe nsukansuka mwasi na ngai akufaki na mpokwa. Bongo na ntɔngɔ, nasalaki kaka ndenge bapesaki ngai mitindo.
19 Mpe bato bazalaki se koloba na ngai boye: “Okoyebisa biso te soki makambo oyo ozali kosala etali biso na nini?”+
20 Bongo nalobaki na bango ete: “Liloba ya Yehova eyeli ngai ete:
21 ‘Lobá na ndako ya Yisraele boye: “Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ngai oyo nazali kokómisa esika mosantu na ngai eloko mpamba,+ lolendo ya makasi na bino,+ eloko ya kitoko na miso na bino+ mpe eloko oyo molimo na bino eyokelaka mawa, mpe bana na bino ya mibali ná bana na bino ya basi oyo botiki na nsima—bakokwea na mopanga.+
22 Mpe bokosala mpenza ndenge nasali. Bokozipa minzomba te,+ mpe bokolya mampa ya bato te.+
23 Mpe eloko na bino ya kolata na motó ekozala na mitó na bino, mpe basandale na bino ekozala na makolo na bino. Bokomibɛta te, bokolela mpe te,+ mpe bokopɔla mpenza na kati ya mabunga na bino,+ mpe ya solo, bokolelana.+
24 Mpe Ezekiele akómi mpo na bino likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.+ Makambo nyonso oyo ye asali, bokosala. Ntango likambo yango ekoya,+ boye bokoyeba mpenza ete nazali Yehova+ Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.’”’”
25 “Nde yo, Ee mwana ya moto, ekozala na mokolo oyo nakobɔtɔla bango ndako na bango ya makasi, eloko kitoko oyo esepelisaka bango, eloko kitoko na miso na bango+ mpe eloko oyo molimo na bango eyokaka mposa makasi, bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi,+ nde
26 moto oyo abiki akoya epai na yo na mokolo yango mpo matoi eyoka nsango, boye te?+
27 Na mokolo yango monɔkɔ na yo ekofungwama epai ya moto oyo abiki,+ mpe okoloba mpe okozala baba lisusu te;+ mpe ya solo, okozala mpo na bango likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya,+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.”+