Ezekiele 21:1-32
21 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Mwana ya moto, talisá elongi na yo na ngámbo ya Yerusaleme mpe lobá+ maloba epai ya bisika mosantu,+ mpe sakwelá mabele ya Yisraele.+
3 Mpe osengeli koloba na mabele ya Yisraele boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Ngai oyo nazali kobundisa yo,+ mpe nakobimisa mopanga na ngai na libenga na yango+ mpe nakoboma moyengebene ná moto mabe epai na yo.+
4 Mpo naboma mpenza moyengebene ná moto mabe epai na yo, yango wana mopanga na ngai ekobima na libenga na yango mpo na kobundisa moto nyonso ya mosuni banda na sudi kino na nɔrdi.+
5 Mpe bato nyonso ya mosuni bakoyeba mpenza ete ngai, Yehova, nabimisi mopanga na ngai na libenga na yango.+ Ekozonga nsima lisusu te.”’+
6 “Mpe yo, Ee mwana ya moto, kimelá wana loketo na yo ezali kolɛnga.+ Kimelá mpenza na kokimela ya mawa na miso na bango.+
7 Mpe ekosalema mpenza boye: soki balobi na yo ete: ‘Mpo na nini ozali kokimela boye?’+ okoloba mpenza boye: ‘Mpo na nsango moko boye.’+ Mpo yango ekoya mpenza,+ mpe ya solo, motema nyonso ekolɛmba+ mpe mabɔkɔ nyonso ekolɛmba mpe elimo nyonso ekolɛmba mpe mabɔlɔngɔ nyonso ekotangisa mai.*+ ‘Talá! Yango ekoya mpenza+ mpe ekosalema,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”
8 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
9 “Mwana ya moto, sakolá, mpe osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova alobi: “Lobá boye: ‘Mopanga, mopanga!+ Epelisami,+ mpe lisusu bakómisi yango sɛlisɛli.
10 Epelisami mpo na koboma; bakómisi yango sɛlisɛli mpo engɛnga.’”’”+
“To tokosepela nde?”+
“‘Ezali nde kobwaka lingenda ya bokonzi+ ya mwana na ngai moko,+ ndenge ezali kobwaka nzete nyonso?+
11 “‘Mpe bapesi yango mpo bákómisa yango sɛlisɛli, mpo básimba yango na lobɔkɔ. Mopanga yango epelisami, mpe bakómisi mopanga yango sɛlisɛli, mpo bápesa yango na lobɔkɔ ya mobomi.+
12 “‘Ee mwana ya moto, belelá mpe gangá na kolela,+ mpo mopanga eyeli bato na ngai;+ eyeli bankumu nyonso ya Yisraele.+ Baoyo babwakami epai ya mopanga bazali elongo na bato na ngai.+ Na yango, omibɛta na ebɛlɔ.+
13 Mpo mopanga yango esili komekama,+ bongo ekozala ndenge nini soki eboyi mpe lingenda ya bokonzi?+ Ekozala lisusu te,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
14 “Mpe yo, Ee mwana ya moto, sakolá, mpe bɛtá mabɔkɔ,+ mpe basengeli kozongela mbala misato+ ete: ‘Mopanga!’ Ezali mopanga ya bato oyo babomami. Ezali mopanga oyo ebomi moto moko monene, mopanga oyo ezali kozinga bango.+
15 Nakoboma mpenza koboma na mopanga mpo motema elɛmba+ mpe mpo na kobakisa baoyo bazali kokwea na baporte na bango nyonso.+ Mawa! Mopanga ebongisami mpo engɛnga, bakómisi yango sɛlisɛli mpo na koboma!+
16 Monisá ete opeli;+ kende na lobɔkɔ ya mobali! Omilɛngɛla; kende na lobɔkɔ ya mwasi! Epai nyonso oyo elongi na yo etali!
17 Bongo ngai moko mpe nakobɛta mabɔkɔ,+ mpe nakolɛmbisa nkɛlɛ+ na ngai.+ Ngai moko, Yehova, nde nalobi.”
18 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
19 “Nde yo, Ee mwana ya moto, salá nzela mibale mpo mopanga ya mokonzi ya Babilone ekɔta.+ Yango mibale esengeli kouta na mokili moko, mpe basengeli kosala elembo ya kolakisa nzela;+ basengeli kosala yango na ebandeli ya nzela oyo ekei na engumba.
20 Osengeli kosala nzela mpo mopanga ekɔtela Raba+ ya bana ya Amone, mpe mosusu mpo ekɔtela Yuda, ekɔtela Yerusaleme, engumba oyo ebatelami makasi.+
21 Mpo mokonzi ya Babilone atɛlɛmaki na bisika banzela ekutani, na ebandeli ya nzela yango mibale, mpo na kosakola makambo oyo ebombaná.+ Aningisi makula. Atuni na nzela ya baterafime;+ mpe atalitali na kati ya libale.
22 Na lobɔkɔ na ye ya mobali, kosakola makambo oyo ebombaná elakisaki Yerusaleme, mpo na kotya bamasini ya kobukabuka,+ mpo báfungola monɔkɔ mpo na koboma, mpo na koyokisa lokito ya elembo ya kokebisa,+ mpo na kotyela baporte bamasini ya kobukabuka, mpo na kotɛlɛmisa ngomba ya mabele mpo na kozinga mboka, mpo na kotonga efelo ya kozinga mboka.+
23 Mpe yango ekómi mpo na bango, na miso na bango, elingi koloba baoyo balapelaki bango bandai,+ lokola kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi;+ mpe ye akanisi lisusu libunga,+ mpo bákangama.+
24 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Ale-ki-Nyonso alobi: ‘Lokola bozali kosala ete bákanisa libunga na bino na ndenge misala na bino ya kobuka mibeko emonisami polele, mpo masumu na bino emonana ndenge misala na bino nyonso ezali, lokola bazali kokanisa bino lisusu,+ lobɔkɔ ekokanga bino.’+
25 “Nde yo, Ee moto oyo ozoki mpota ya liwa, nkumu+ mabe ya Yisraele,+ oyo mokolo na yo eyei na ntango ya libunga ya nsuka,+
26 talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Longolá tirba, mpe longolá motole.+ Ekozala ndenge moko te.+ Tombolá oyo ezali na nse,+ mpe kitisá oyo ezali na likoló.+
27 Nakokómisa yango libebi, libebi, libebi.+ Yango mpe, ya solo ekozala ya moto moko te tii ntango ye oyo azali na lotomo oyo euti na mibeko akoya,+ mpe nakopesa ye mpenza yango.’+
28 “Mpe yo, Ee mwana ya moto, sakolá mpe osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi mpo na bana ya Amone mpe mpo na kotuka oyo batuki.’ Mpe osengeli koloba boye: ‘Mopanga, mopanga ebendami mpo na koboma, bakómisi yango sɛlisɛli mpo elya, mpo engɛnga,+
29 mpo bamoneli yo eloko oyo ezali ya solo te, mpo bazali kosakwela yo makambo oyo ebombaná ya bokosi,+ mpo bátya yo likoló ya nkingo ya bato oyo babomami, bato mabe oyo mikolo na bango eyei na ntango ya libunga ya nsuka.+
30 Zongisá yango na libenga na yango. Nakosambisa yo na esika ozalisamaki, na mokili epai outaki.+
31 Mpe nakosopela yo makaneli na ngai. Nakofulela yo mɔtɔ ya nkɛlɛ na ngai,+ mpe nakopesa yo na lobɔkɔ ya bato oyo bazangi mayele, bato oyo bayebi mosala ya kobebisa.+
32 Mpo okokóma eloko ya kopelisa mɔtɔ.+ Makila na yo moko ekozala na katikati ya mokili. Bakokanisa yo lisusu te, mpo ngai moko, Yehova, nde nalobi.’”+
Maloba na nse
^ Elingi koloba, masuba oyo ebimi mpo na kobanga.