Ezekiele 20:1-49
20 Sikoyo esalemaki boye: na mbula ya nsambo, na sanza ya mitano, na mokolo ya zomi ya sanza yango, bato bauti epai ya mikóló ya Yisraele bayaki kotuna Yehova,+ mpe bafandaki liboso na ngai.+
2 Bongo liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:
3 “Mwana ya moto, lobá na mikóló ya Yisraele, mpe osengeli koyebisa bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ezali mpo na kotuna ngai nde bozali koya?+ ‘Lokola nazali solo na bomoi, nakotika te ete bótuna ngai,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”’
4 “Okosambisa bango? Ee mwana ya moto, okosambisa bango?+ Yebisá bango makambo oyo eyinamá ya bankɔkɔ na bango.+
5 Mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Na mokolo oyo naponaki Yisraele,+ natombolaki mpe lobɔkɔ na ngai+ mpe nalapelaki momboto ya ndako ya Yakobo ndai+ mpe namiyebisaki epai na bango na mokili ya Ezipito.+ Ɛɛ, natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai ete: ‘Nazali Yehova Nzambe na bino.’+
6 Na mokolo yango, natombolaki lobɔkɔ na ngai+ mpe nalapelaki bango ndai ete nakobimisa bango na mokili ya Ezipito mpo na komema bango na mokili oyo nanɔngelaki bango, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi.+ Elekaki mikili nyonso na kitoko.+
7 Mpe nalobaki na bango lisusu ete: ‘Mokomoko na bino abwaka biloko ya bosɔtɔ ya miso na ye,+ mpe bómikómisa mbindo te na bikeko ya bosɔtɔ ya Ezipito.+ Nazali Yehova Nzambe na bino.’+
8 “‘“Mpe babandaki kotombokela ngai,+ mpe bandimaki te koyokela ngai. Mokomoko na bango abwakaki te biloko ya bosɔtɔ ya miso na ye, mpe batikaki te bikeko ya bosɔtɔ ya Ezipito,+ yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkɛlɛ na ngai, mpo na kosilisela bango nkanda na ngai na kati ya mokili ya Ezipito.+
9 Mpe nasalaki mpo na nkombo na ngai, mpo ekómisama eloko mpamba te na miso ya bikólo epai bazalaki,+ mpamba te namiyebisaki epai na bango na miso ya bikólo yango na ndenge nabimisaki bango na mokili ya Ezipito.+
10 Na yango, nabimisaki bango na mokili ya Ezipito mpe namemaki bango na kati ya esobe.+
11 “‘“Mpe napesaki bango mibeko na ngai;+ mpe nayebisaki bango bikateli na ngai ya lisambisi,+ mpo moto oyo azali se kosalela yango atikala na bomoi na nzela na yango.+
12 Mpe napesaki bango lisusu basabata na ngai,+ mpo ezala elembo kati na ngai ná bango,+ mpo báyeba ete ngai Yehova moto nazali kosantisa bango.
13 “‘“Kasi bango, ndako ya Yisraele, batombokelaki ngai na esobe.+ Batambolaki na mibeko na ngai te,+ mpe babwakaki bikateli na ngai ya lisambisi,+ oyo, soki moto asaleli yango, akotikala mpe na bomoi na nzela na yango.+ Mpe bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba mpenza,+ yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkɛlɛ na ngai na esobe, mpo na kosilisa bango nyɛɛ.+
14 Kasi nasalaki mpo na nkombo na ngai, mpo ekómisama eloko mpamba te na miso ya bikólo, oyo na miso na bango, nabimisaki bango.+
15 Mpe ngai moko natombolaki lisusu lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai na esobe,+ ete nakokɔtisa bango te na mokili oyo napesaki, mokili oyo etondi na miliki mpe na mafuta ya nzoi,+ (eleki mikili nyonso na kitoko,)+
16 mpo babwakaki bikateli na ngai ya lisambisi; mpe na oyo etali mibeko na ngai, batambolaki na kati na yango te, mpe bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba, mpo motema na bango ezalaki kolanda nde bikeko na bango ya bosɔtɔ.+
17 “‘“Mpe liso na ngai ebandaki koyokela bango mawa mpe epekisaki ngai koboma bango,+ bongo nasilisaki bango nyɛɛ na esobe te.
18 Mpe nalobaki na bana na bango na esobe+ ete: ‘Bótambola na malako ya bankɔkɔ na bino te,+ mpe bótosa bikateli na bango ya lisambisi te,+ mpe bómikómisa mbindo te na bikeko na bango ya bosɔtɔ.+
19 Nazali Yehova Nzambe na bino.+ Bótambola na mibeko na ngai+ mpe bótosa bikateli na ngai ya lisambisi+ mpe bósalela yango.+
20 Mpe bósantisa basabata na ngai,+ mpe yango esengeli kozala elembo kati na ngai ná bino, mpo bóyeba ete nazali Yehova Nzambe na bino.’+
21 “‘“Mpe bana babandaki kotombokela ngai.+ Batambolaki na mibeko na ngai te, mpe batosaki te bikateli na ngai ya lisambisi, basalelaki yango te, oyo, soki moto asaleli yango, akotikala mpe na bomoi na nzela na yango.+ Bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba.+ Yango wana nalakaki ete nakosopela bango nkɛlɛ na ngai, mpo nakosilisela bango nkanda na ngai na esobe.+
22 Mpe nazongisaki lobɔkɔ na ngai nsima+ mpe nazalaki kosala mpo na nkombo na ngai, mpo ete ekómisama eloko mpamba te na miso ya bikólo, oyo na miso na bango, nabimisaki bango.+
23 Lisusu, ngai moko natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai na esobe,+ mpo na kopalanganisa bango na kati ya bikólo mpe mpo na kopanza bango na kati ya mikili,+
24 mpo bakokisaki bikateli na ngai ya lisambisi te+ mpe babwakaki mibeko na ngai+ mpe bakómisaki basabata na ngai eloko mpamba,+ mpe mpo miso na bango ezalaki kolanda nde bikeko ya bosɔtɔ ya bankɔkɔ na bango.+
25 Bongo ngai mpe natikaki bango bázwa mibeko oyo ezalaki malamu te mpe bikateli ya lisambisi oyo na nzela na yango bakokaki te kotikala na bomoi.+
26 Mpe natikaki bango bákóma mbindo na makabo na bango ntango bazalaki kolekisa mwana nyonso oyo azalaki kofungola libumu mbeka na mɔtɔ,+ mpo nakómisa bango bato oyo batikali mabɔkɔ mpamba, mpo báyeba ete nazali Yehova.”’+
27 “Na yango, Ee mwana ya moto, lobá na ndako ya Yisraele mpe osengeli koyebisa bango ete:+ ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Na likambo oyo mpe, bankɔkɔ na bino bafingaki ngai, na ndenge bazalaki kosalela ngai makambo na kozanga bosembo.+
28 Mpe nakɔtisaki bango na mokili+ oyo mpo na yango natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapelaki bango ndai.+ Ntango bamonaki ngomba moke nyonso oyo etombwaná+ mpe nzete nyonso oyo ezali na bitape, babandaki kopesa bambeka na bango kuna+ mpe kopesa kuna makabo na bango oyo ezali kosilikisa, mpe kopesa kuna nsolo na bango ya kokitisa motema+ mpe kosopa makabo na bango ya masanga kuna.+
29 Na yango, nalobaki na bango ete: ‘Esika oyo etombwaná epai bozali koya ezali mpenza nini, mpo bábenga yango na nkombo Esika oyo Etombwaná kino mokolo ya lelo?’”’+
30 “Na yango, lobá na ndako ya Yisraele boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bongo bozali nde komikómisa mbindo na kati ya nzela ya bankɔkɔ na bino,+ mpe bozali nde kosala pite na kolandáká biloko na bango ya bosɔtɔ?+
31 Mpe ntango bozali kotombola makabo na bino na ndenge bozali kolekisa bana na bino mbeka na mɔtɔ,+ kino lelo bozali nde komikómisa mbindo mpo na bikeko na bino nyonso ya bosɔtɔ?+ Ntango bozali kosala bongo, nakotika nde bino bótuna ngai, Ee ndako ya Yisraele?”’+
“‘Lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘nakotika te ete bótuna ngai.+
32 Mpe oyo ezali koyela bino na makanisi,+ ekosalema ata moke te,+ na ndenge bozali koloba ete: “Tókóma lokola bikólo, lokola mabota ya mikili,+ na kosaleláká nzete ná libanga.”’”+
33 “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘nakoyangela bino na nguya ya lobɔkɔ na ngai, na lobɔkɔ oyo esembolami+ mpe na nkɛlɛ oyo esopami.+
34 Mpe nakolongola bino na kati ya bato ya bikólo, mpe nakoyanganisa bino uta na mikili epai bapanzaki bino, na nguya ya lobɔkɔ na ngai, na lobɔkɔ oyo esembolami mpe na nkɛlɛ oyo esopami.+
35 Mpe nakomema bino na esobe ya bato ya bikólo+ mpe nakosamba na bino kuna, wana tozali kotalana bilongi.+
36 “‘Se ndenge nasambaki na bankɔkɔ na bino na esobe ya mokili ya Ezipito,+ ndenge yango nde nakosamba na bino,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.
37 ‘Mpe nakolekisa bino na nse ya lingenda+ mpe nakokɔtisa bino na ekanganeli ya kondimana.+
38 Mpe nakolongola epai na bino batomboki mpe bato oyo bazali kobuka mibeko na ngai,+ mpo nakobimisa bango na mokili na bango oyo bazali kofanda bapaya, kasi bakokɔta na mokili ya Yisraele te;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+
39 “Mpe bino, Ee ndako ya Yisraele, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bókende moto na moto kosalela bikeko na ye ya bosɔtɔ.+ Mpe nsima na yango, soki boyokeli ngai te, bokokómisa nkombo mosantu na ngai eloko mpamba lisusu te na makabo na bino mpe na bikeko na bino ya bosɔtɔ.’+
40 “‘Mpamba te na ngomba na ngai mosantu, na ngomba molai ya Yisraele,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘kuna nde bango, ndako nyonso ya Yisraele na mobimba na yango, bakosalela ngai, na kati ya mokili.+ Kuna nakosepela na bango, mpe kuna nakosɛnga makabo na bino mpe bambuma ya liboso ya makabo na bino kati na biloko na bino nyonso ya bosantu.+
41 Nakosepela na bino mpo na nsolo ya kokitisa motema,+ ntango nakolongola bino na kati ya bato ya bikólo mpe nakoyanganisa bino mpenza uta na mikili epai bapanzaki bino,+ mpe nakosantisama na nzela na bino na miso ya bikólo.’+
42 “‘Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova,+ ntango nakokɔtisa bino na mabele ya Yisraele,+ na mokili oyo mpo na yango natombolaki lobɔkɔ na ngai mpe nalapaki ndai ete nakopesa bankɔkɔ na bino.
43 Mpe ya solo kuna, bokokanisa lisusu banzela na bino+ mpe misala na bino nyonso oyo na yango bomikómisaki mbindo,+ mpe bokoyoka mpenza mpii oyo ekomonana na bilongi na bino mpo na makambo na bino nyonso ya mabe, oyo bosalaki.+
44 Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova+ ntango nakosala bino mosala mpo na nkombo na ngai,+ na kolanda banzela na bino ya mabe te mpe na kolanda misala na bino oyo ebebá te,+ Ee ndako ya Yisraele,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”
45 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
46 “Mwana ya moto, talisá elongi na yo+ na ngámbo ya etúká ya sudi mpe lobá+ maloba epai ya sudi, mpe sakwelá zamba ya esobe ya sudi.
47 Mpe osengeli koloba na zamba ya sudi boye: ‘Yoká liloba ya Yehova. Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai wana nazali kopelisela yo mɔtɔ,+ mpe ekozikisa na kati na yo nzete nyonso ya mobesu mpe nzete nyonso oyo ekauká.+ Mɔtɔ yango oyo ezali kopela ekobomama te,+ mpe ekozikisa bilongi nyonso mpenza banda na sudi kino na nɔrdi.+
48 Mpe bato nyonso ya mosuni bakomona mpenza ete ngai, Yehova, napelisi mɔtɔ, bongo ekobomama te.”’”+
49 Bongo nalobaki boye: “Mawa, Ee Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso! Bazali koloba mpo na ngai ete: ‘Azali kobongisa maloba ya lisese, boye te?’”+