Ezekiele 19:1-14

19  “Nde yo, yembá loyembo ya mawa+ mpo na bankumu ya Yisraele,+  mpe osengeli koloba boye: ‘Mama na yo azalaki nini? Nkɔsi ya mwasi na katikati ya bankɔsi ya mibali.+ Azalaki kolala na katikati ya bana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki. Abɔkɔlaki bana na ye.  “‘Mpe mokemoke, akolisaki moko ya bana na ye.+ Ye akómaki mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki, mpe abandaki koyekola ndenge ya kopasola nyama.+ Alyaki kutu moto ya mabele.  Mpe bikólo bazalaki se koyoka nsango na ye. Akangamaki na libulu na bango, mpe bamemaki ye na bandɔbɔ na mokili ya Ezipito.+  “‘Ntango amonaki ete azeli mpe elikya na ye ekufi, azwaki mwana na ye mosusu.+ Abimisaki ye mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki.  Mpe abandaki kolekaleka na kati ya bankɔsi. Akómaki mwana-nkɔsi oyo nkingo etondi na nsuki. Mpe mokemoke, ayekolaki ndenge ya kopasola nyama.+ Alyaki kutu moto ya mabele.+  Mpe ayebaki bandako milai na ye ya kofanda, mpe abebisaki kutu bingumba na bango,+ bongo mokili etikalaki mpamba mpe atondisaki yango na lokito ya koganga na ye.+  Mpe bikólo ya zingazinga, longwa na bitúká oyo eyangelami, babandaki komilɛngɛla mpo na kobundisa ye+ mpe batandaki minyama na bango likoló na ye.+ Akangamaki na libulu na bango.+  Nsukansuka, na bandɔbɔ, batyaki ye na mwa-ndako na bango ya banyama mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babilone.+ Bamemaki ye na minyama ya bokila, mpo mongongo na ye eyokana lisusu te na bangomba ya Yisraele.+ 10  “‘Mama na yo+ azalaki lokola nzete ya vinyo na kati ya makila na yo,+ oyo elonamaki pene na mai. Lokola mai ezalaki mingi, ekómaki kobota mbuma mpe etondaki na bitape.+ 11  Mpe bitape yango ekómaki mangenda na ye ya makasi, oyo esengeli kozala mangenda ya bokonzi mpo na bayangeli.+ Mpe mokemoke, molai na yango emataki likoló koleka na kati ya bitape, mpe ekómaki komonana mpo ezalaki molai, mpo ezalaki na nkasa ebele.+ 12  Nde nsukansuka, bapikolaki ye na nkɛlɛ.+ Babwakaki ye na mabele, mpe mopɛpɛ moko ya ɛsti ekaukisaki mbuma na ye.+ Lingenda na ye ya makasi elongolamaki mpe ekaukaki.+ Mɔtɔ elyaki yango.+ 13  Mpe sikoyo alonami na esobe+ na mokili oyo ezangá mai mpe ekauká.+ 14  Mpe mɔtɔ ebimaki na lingenda na ye.+ Elyaki mwa bitape na ye, mbuma na ye, mpe lingenda ya makasi ata moko te ezalaki na kati na ye, lingenda ya bokonzi ata moko te mpo na koyangela.+ “‘Wana nde loyembo ya mawa, mpe ekokóma loyembo ya mawa.’”+

Maloba na nse