Ezekiele 18:1-32

18  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:  “Bolingi koloba nini ntango bozali kobimisa liloba ya lisese oyo na mabele ya Yisraele ete: ‘Batata nde bazali kolya mbuma ya vinyo oyo eteli te, kasi mino ya bana nde ekómi ngayi’?+  “‘Lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘bokobimisa liloba ya lisese oyo lisusu te na Yisraele.  Talá! Milimo nyonso—ezali ya ngai.+ Molimo+ ya tata ndenge moko mpe molimo ya mwana—ezali ya ngai.+ Molimo oyo esali lisumu+—yango nde ekokufa.+  “‘Nzokande moto, soki azali moyengebene mpe asali na bosembo mpe na boyengebene;+  soki alyaki te+ na bangomba+ mpe atombolaki miso na ye te epai ya bikeko ya bosɔtɔ ya ndako ya Yisraele,+ mpe akómisaki mwasi ya moninga na ye mbindo te+ mpe abɛlɛmaki te na mwasi oyo azali na mbindo na ye;+  mpe soki anyokolaki moto te;+ soki azongisaki ndanga oyo azwaki mpo na nyongo;+ soki abɔtɔlaki eloko moko te na makasi na ndenge ya moyibi;+ soki apesaki limpa na ye na moto oyo azalaki na nzala+ mpe soki azipaki moto oyo azalaki bolumbu elamba;+  soki apesaki eloko moko te mpo azwa benefisi+ mpe soki azwaki benefisi ya lokoso te;+ soki alongolaki lobɔkɔ na ye na makambo ya kozanga bosembo;+ soki akataki likambo kati na moto ná moninga na ye na bosembo ya solosolo;+  soki azalaki kotambola na mibeko na ngai+ mpe azalaki kobatela bikateli na ngai ya lisambisi mpo atosa makambo oyo etali solo,+ azali moyengebene.+ Akotikala mpenza na bomoi,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. 10  “‘Mpe soki moto aboti mwana oyo azali moyibi,+ mosopi ya makila,+ oyo asali likambo moko oyo ekokani na makambo oyo 11  (kasi ye moko asali ata moko te ya makambo oyo); soki alei mpe na bangomba,+ mpe akómisi mwasi ya moninga na ye mbindo;+ 12  soki anyokoli moto ya mpasi mpe mobola;+ soki abɔtɔli biloko na makasi na ndenge ya moyibi,+ soki azongisi te eloko oyo epesamaki ndanga;+ mpe soki atomboli miso na ye epai ya bikeko ya bosɔtɔ,+ asali likambo moko oyo eyinamá.+ 13  Soki apesi biloko mpo na kozwa benefisi ya lokoso,+ mpe soki azwi benefisi,+ boye, ya solo mpenza, akotikala na bomoi te. Asali makambo nyonso wana oyo eyinamá.+ Akobomama mpenza. Makila na ye ekozala na motó na ye.+ 14  “‘Mpe talá! soki moto aboti mwana, oyo azali se komona masumu nyonso ya tata na ye, masumu oyo asali, mpe azali komona kasi azali kosala makambo lokola oyo wana te.+ 15  Soki alei na bangomba te, mpe atomboli miso na ye te epai ya bikeko ya bosɔtɔ ya ndako ya Yisraele;+ soki akómisi mwasi ya moninga na ye mbindo te;+ 16  mpe soki anyokoli moto te,+ akamati ndanga moko te,+ mpe azwi eloko moko te na ndenge ya moyibi;+ soki apesi limpa na ye na moto oyo azali na nzala,+ mpe soki azipi moto oyo azali bolumbu elamba;+ 17  soki apekisi lobɔkɔ na ye konyokola moto ya mpasi; soki azwi benefisi ya lokoso+ te mpe benefisi+ te; soki akokisi bikateli na ngai ya lisambisi;+ mpe soki atamboli na mibeko na ngai;+ ye akokufa te mpo na libunga ya tata na ye.+ Akotikala mpenza na bomoi.+ 18  Nde tata na ye, lokola amipesaki mpenza na kobuba,+ abɔtɔlaki na makasi eloko ya ndeko na ndenge ya moyibi,+ mpe asali eloko nyonso oyo ezali malamu te na kati ya bato na ye,+ asengeli kokufa mpo na libunga na ye.+ 19  “‘Mpe bino bokoloba mpenza ete: “Mpo na nini kasi mwana asengeli komema ngambo te mpo na libunga ya tata?”+ Kasi mwana, ye asali na bosembo mpe na boyengebene,+ atosi mibeko na ngai nyonso mpe azali se kosalela yango.+ Akotikala mpenza na bomoi.+ 20  Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.+ Mwana akomema ngambo te mpo na libunga ya tata, mpe tata akomema ngambo te mpo na libunga ya mwana.+ Boyengebene ya moyengebene ekozala na motó na ye moko,+ mpe mabe ya moto mabe ekozala na motó na ye moko.+ 21  “‘Nde moto mabe, soki abongwani, atiki masumu na ye nyonso oyo asalaki+ mpe soki abateli mpenza mibeko na ngai nyonso mpe asali makambo ya bosembo mpe ya boyengebene,+ akotikala mpenza na bomoi. Akokufa te.+ 22  Makambo na ye nyonso ya kobuka mibeko oyo asalaki—bakokanisela ye yango lisusu te.+ Mpo na makambo na ye ya boyengebene oyo asalaki, akotikala na bomoi.’+ 23  “‘Ngai nasepelaka nde na liwa ya moto mabe,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso; ‘nasepelaka te ete abongwana na banzela na ye mpe atikala mpenza na bomoi?’+ 24  “‘Sikoyo ntango moyengebene moko abongwani, atiki makambo na ye ya boyengebene mpe asali mpenza makambo oyo ezali sembo te;+ soki azali kaka kosala makambo nyonso oyo eyinamá, oyo moto mabe asali,+ mpe azali na bomoi, misala na ye nyonso ya boyengebene oyo asalaki ekokanisama lisusu te.+ Mpo na makambo na ye ya sembo te mpe mpo na lisumu oyo asalaki, akokufa mpo na yango.+ 25  “‘Mpe bokoloba mpenza ete: “Nzela ya Yehova ezali sembo te.”+ Nabondeli bino, bóyoka, Ee ndako ya Yisraele. Nzela na ngai nde ezali sembo te?+ Banzela na bino nde ezali sembo te, boye te?+ 26  “‘Ntango moyengebene moko abongwani, atiki makambo na ye ya boyengebene mpe asali mpenza makambo oyo ezali sembo te+ mpe akufi mpo na yango, akokufa mpo na makambo na ye ya sembo te oyo asali.+ 27  “‘Mpe ntango moto mabe abongwani, atiki mabe na ye oyo asalaki mpe abandi kosala makambo ya bosembo mpe ya boyengebene,+ ye nde akobatela molimo na ye na bomoi.+ 28  Ntango amoni+ mpe abongwani, atiki makambo na ye nyonso ya kobuka mibeko oyo asalaki,+ akotikala mpenza na bomoi. Akokufa te.+ 29  “‘Mpe ndako ya Yisraele ekoloba mpenza ete: “Nzela ya Yehova ezali sembo te.”+ Ee ndako ya Yisraele, ezali banzela na ngai nde ezali sembo te?+ Banzela na bino nde ezali sembo te, boye te?’+ 30  “‘Na yango, Ee ndako ya Yisraele, nakosambisa bino moto na moto na kotalela banzela na ye,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+ ‘Bóbongwana, ɛɛ, bóbongwana, bótika misala na bino nyonso ya kobuka mibeko,+ mpe eloko moko te ezala libaku oyo ezali kosalisa bino libunga.+ 31  Bóbwaka mosika na bino misala na bino nyonso ya kobuka mibeko oyo bosalaki+ mpe bómizwela motema ya sika+ mpe elimo ya sika,+ mpamba te, bókufa mpo na nini,+ Ee ndako ya Yisraele?’ 32  “‘Mpo nasepelaka ata moke te na liwa ya moto,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso. ‘Boye, bóbongwana mpe bótikala na bomoi.’”+

Maloba na nse