Ezekiele 17:1-24
17 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Mwana ya moto, pesá sambole+ mpe bongiselá ndako ya Yisraele liloba ya lisese.+
3 Mpe osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mo-konzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mpongo monene,+ ya mapapu minene,+ oyo azali na nsala milai na mapapu, oyo atondi na nsala, ya langi ndenge na ndenge, ayaki na Libá+ mpe azwaki nsɔngɛ ya nzete+ ya sɛdrɛ.+
4 Abukaki nsɔngɛ ya bitape na yango ya sika mpe amemaki yango na mokili ya Kanana;+ atyaki yango na engumba moko ya bato ya mombongo.
5 Lisusu, azwaki ndambo ya momboto ya mokili yango+ mpe atyaki yango na elanga oyo ebongisami mpo na kolona mboto. Atyaki yango lokola nzete ya sole pene ya mai minene,+ lokola nzete ya sole.
6 Mpe ebandaki kobima mpe mokemoke, ekómaki nzete ya vinyo ya molai mingi te,+ oyo etondi na nkasa, ezalaki kotalisa nkasa na yango na nse, na esika na yango; bongo misisa na yango ebimaki mokemoke na nse na yango. Mpe nsukansuka, ekómaki nzete ya vinyo mpe ebotaki bitape ya sika mpe ebimisaki bitape ya minene.+
7 “‘“Mpe mpongo mosusu ya monene abimaki,+ azalaki na mapapu minene, mpe azalaki na nsala milai na mapapu,+ mpe talá! nzete ya vinyo yango esembolaki misisa na yango na lokoso epai na ye.+ Mpe ebimisaki nkasa na yango epai na ye mpo asopela yango mai, mosika na bilanga epai yango elonamaki.+
8 Esilaki kopikolama mpe kolonama na elanga moko kitoko, pene na mai minene,+ mpo ebimisa bitape mpe ebota mbuma, mpo ekóma nzete monene ya vinyo.”’
9 “Lobá boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Yango ekokola?+ Moto moko akolongola misisa na yango+ mpe akokómisa mbuma na yango mposomposo te? Mpe mwa bitape na yango oyo bauti kobuka esengeli nde kokauka te?+ Ekokauka. Ekosɛnga lobɔkɔ moko ya nguya te mpe bato ebele te mpo na kolongola yango na misisa na yango.
10 Mpe talá! ata soki bapikoli mpe baloni yango epai mosusu, ekokola? Ekokauka nde yango nyonso te lokola ntango mopɛpɛ ya ɛsti esimbaka yango?+ Ekokauka na bilanga esika yango ekolaki.”’”+
11 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
12 “Nabondeli yo, lobelá ndako ya batomboki+ ete: ‘Boyebi nde ndimbola ya makambo oyo te?’ Lobá ete: ‘Talá! Mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme mpe azwaki mokonzi na yango+ mpe bankumu na yango mpe amemaki bango epai na ye, na Babilone.+
13 Lisusu, azwaki moto moko ya momboto ya mokonzi+ mpe asalaki kondimana ná ye mpe alapisaki ye ndai;+ mpe amemaki bato minene ya mboka,+
14 mpo bokonzi ekita,+ ekoka te komitombola, mpo ekoka kotɛlɛma na kotosáká kondimana na yango.+
15 Kasi, nsukansuka, atombokelaki+ ye na ndenge atindaki bamemi-nsango na ye na Ezipito, mpo epesa ye bampunda+ mpe bato ebele. Akolonga? Akobika, ye oyo azali kosala makambo ya boye, mpe ye oyo abuki kondimana? Akobika mpenza?’+
16 “‘“Lokola nazali solo na bomoi,”+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, “na mboka ya mokonzi oyo atyaki mokonzi moto oyo atyolaki ndai na ye+ mpe oyo abukaki kondimana na ye, na mboka na ye, na kati ya Babilone, nde akokufa.+
17 Mpe na nzela ya limpinga monene ya basoda mpe na nzela ya lisangá ya bato ebele, Farao akolongisa ye na etumba te,+ na kotomboláká mwa ngomba ya mabele mpo na kozinga mboka, mpe na kotongáká efelo ya kozinga mboka, mpo na koboma milimo ebele.+
18 Mpe atyoli ndai+ na ndenge abuki kondimana, mpe, talá! apesaki lobɔkɔ+ na ye ndanga mpe asalaki makambo nyonso wana. Akokima te.”’+
19 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Lokola nazali solo na bomoi, ya solo ndai na ngai oyo ye atyoli+ mpe kondimana na ngai oyo ye abuki—nakozongisa yango na motó na ye.
20 Mpe nakotanda monyama na ngai likoló na ye, mpe akokangama mpenza na monyama na ngai ya bokila;+ mpe nakomema ye na Babilone mpe nakosamba na ye kuna mpo na kozanga bosembo na ye oyo asalelaki ngai.+
21 Bongo na bituluku na ye nyonso, bato na ye nyonso oyo bakokimakima, bakokwea na mopanga, mpe baoyo bakotikala bakopalangana na mipɛpɛ nyonso.+ Mpe bokoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova, nde nalobi yango.”’+
22 “‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Ngai moko nakozwa mwa nsɔngɛ oyo etombwaná ya nzete ya sɛdrɛ mpe nakolona yango;+ nakokata mwa etape ya pɛtɛpɛtɛ na nsɔngɛ ya mwa bitape na yango+ mpe nakolona yango na ngomba moko ya molai mpe oyo etombwaná.+
23 Nakolona yango na ngomba molai ya Yisraele,+ mpe ekobimisa mpenza bitape mpe ekobota mbuma+ mpe ekokóma nzete ya sɛdrɛ ya monene.+ Mpe bandɛkɛ ya ndenge nyonso ekofanda mpenza na nse na yango; ekofanda na elili ya nkasa na yango.+
24 Mpe banzete nyonso ya esobe ekoyeba mpenza ete ngai moko, Yehova,+ nakitisi nzete oyo etombwaná,+ natomboli nzete oyo ezalaki na nse,+ nakaukisi nzete oyo ezali naino mobesu+ mpe nasali ete nzete oyo ekauká ebimisa fololo. Ngai moko, Yehova, nde nalobi mpe nasali+ yango.”’”