Ezekiele 15:1-8
15 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Mwana ya moto, nzete ya vinyo,+ mwa etape ya sika, oyo ezali na kati ya banzete ya zamba ekeseni na nzete nyonso mosusu na nini?
3 Basalaka na yango mwa nzete mpo na kosala na yango mosala? To basalaka na yango pike mpo na kokakisa eloko moko boye ya mosala?
4 Talá! Ebwakamaka nde na mɔtɔ mpo na kopelisa yango.+ Mɔtɔ ezikisaka mpenza nsɔngɛ na yango nyonso mibale, mpe katikati na yango ekaukaka.+ Mosala nini bakoki kosala na yango?
5 Talá! Ntango ezali naino mobimba, basalaka na yango mosala moko te. Ekozala kutu boni, ntango mɔtɔ ezikisi yango mpe ekauki, bakokoka mpenza nde kosala na yango ata mosala moko?”+
6 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Kaka lokola nzete ya vinyo na kati ya banzete ya zamba, oyo napesá mpo ezala eloko ya kopelisa mɔtɔ, ndenge yango nde napesi bato oyo bafandi na Yerusaleme.+
7 Mpe nakotɛmɛla bango.+ Babimi na mɔtɔ, kasi mɔtɔ nde ekozikisa bango.+ Mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova, ntango nakotɛmɛla bango.’”+
8 “‘Mpe nakokómisa mokili oyo esika oyo etikali mpamba,+ mpo bazangaki bosembo,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”