Ezekiele 14:1-23

14  Mpe mibali mosusu na kati ya mikóló ya Yisraele bayaki epai na ngai mpe bafandaki liboso na ngai.+  Bongo liloba ya Yehova eyelaki ngai ete:  “Mwana ya moto, mibali oyo batye bikeko na bango ya bosɔtɔ na mitema na bango, mpe batye liboso ya bilongi na bango eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, oyo ezali kosalisa bango libunga.+ Nakotika nde bango báya mpenza kotuna ngai?+  Na yango, sololá na bango mpe osengeli koloba na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Moto nyonso ya ndako ya Yisraele oyo atye bikeko na ye ya bosɔtɔ+ na motema na ye mpe oyo atye liboso ya elongi na ye eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, oyo ezali kosalisa ye libunga mpe ayei mpenza epai ya mosakoli, ngai, Yehova, nakondima kozongisela ye eyano na likambo yango na kolanda ebele ya bikeko na ye ya bosɔtɔ,+  mpo nakanga ndako ya Yisraele na motema na bango,+ mpamba te batiki ngai mpo na bikeko na bango ya bosɔtɔ—bango nyonso.”’+  “Na yango, lobá na ndako ya Yisraele ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Bózonga mpe bópesa mokɔngɔ na bikeko na bino ya bosɔtɔ+ mpe bólongola bilongi na bino na biloko nyonso na bino oyo eyinamá;+  mpo moto nyonso ya ndako ya Yisraele to na bato oyo bafandi bapaya, oyo bafandi bapaya na Yisraele, oyo amitangoli mpe atiki kolanda ngai,+ oyo atye bikeko na ye ya bosɔtɔ na motema na ye, oyo atye liboso ya elongi na ye eloko oyo ezali kobɛtisa libaku, oyo ezali kosalisa ye libunga, mpe ayei mpenza epai ya mosakoli mpo na kotuna ngai mpo na ye moko,+ ngai, Yehova, nakondima kozongisela ye eyano.  Mpe nakotɛmɛla moto yango+ mpe nakotya ye lokola elembo+ mpe maloba ya lisese,+ mpe ya solo nakolongola ye na kati ya bato na ngai;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’+  “‘Soki mosakoli akosami mpe alobi mpenza liloba, ngai Yehova nde nakosi mosakoli yango;+ mpe nakosembolela mosakoli yango lobɔkɔ na ngai mpe nakoboma ye na kati ya bato na ngai Yisraele.+ 10  Mpe bakomema mpenza libunga na bango.+ Libunga ya moto oyo ayei kotuna ekozala lokola libunga ya mosakoli,+ 11  mpo bato ya ndako ya Yisraele báyengayenga lisusu te mosika na ngai+ mpe mpo bámikómisa mbindo lisusu te na makambo na bango nyonso ya kobuka mibeko. Mpe bakokóma mpenza bato na ngai mpe ngai nakokóma Nzambe na bango,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”+ 12  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete: 13  “Mwana ya moto, na oyo etali mokili moko boye, soki yango ezali kosalela ngai lisumu na kozangáká bosembo,+ ngai mpe nakosembolela yango lobɔkɔ na ngai mpe nakobukela yango mangenda oyo bakakisi mampa oyo esalemi lokola lopɛtɛ,+ mpe nakotindela yango nzala+ mpe nakolongola na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka.”+ 14  “‘Mpe ata soki bato oyo misato bázalaka na kati na yango: Noa,+ Danyele+ mpe Yobo,+ bango moko, mpo na boyengebene na bango,+ mbɛlɛ babikisi molimo na bango,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”+ 15  “‘To soki nalekisi banyama mabe ya zamba na mokili yango+ mpe ezangisi yango bana+ mpe mokili yango etikali mpamba, ata moto moko te azali koleka kuna mpo na banyama ya zamba,+ 16  ata soki bato oyo misato bázalaka na kati na yango, lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘mbɛlɛ babikisi bana ya mibali to bana ya basi te; kaka bango moko, nde bakokaki kobika mpe mokili yango elingaki kotikala mpamba.’”+ 17  “‘To soki nakitisi mopanga na mokili yango,+ mpe nalobi mpenza ete: “Mopanga eleka na mokili yango,” mpe nalongoli mpenza na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka,+ 18  ata soki bato yango misato bázalaka na kati na yango,+ lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, mbɛlɛ babikisi bana ya mibali to bana ya basi te, kaka bango moko nde bakokaki kobika.’”+ 19  “‘To soki natindeli mokili yango maladi mabe+ mpe soki nasopeli mpenza yango nkɛlɛ na ngai oyo ezali kosopa makila,+ mpo na kolongola na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka, 20  ata soki Noa,+ Danyele+ mpe Yobo+ bázalaka na kati na yango,+ lokola nazali solo na bomoi,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso, ‘mbɛlɛ babikisi mwana mobali to mwana mwasi te; bango moko, mpo na boyengebene na bango, mbɛlɛ babikisi molimo na bango.’”+ 21  “Yango wana, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Ndenge wana nde ekozala ntango bitumbu na ngai minei oyo eyokisaka mpasi ekokokisama,+ elingi koloba, mopanga, nzala, banyama mabe ya zamba mpe maladi mabe,+ oyo nakotindela mpenza Yerusaleme, mpo na kolongola na kati na yango moto ya mabele mpe nyama ya mboka.+ 22  Kasi talá! etuluku ya babiki oyo ekotikala mpenza na kati na yango, baoyo bakobimisama.+ Bana mibali mpe bana basi, bango wana! Bazali kobima mpo na koya epai na bino, mpe bokomona mpenza nzela na bango mpe ndenge na bango ya kosala.+ Mpe bokobɔndisama mpenza na mpasi oyo nakomemela Yerusaleme, ɛɛ, nyonso oyo nakomemela ye.’” 23  “‘Mpe ya solo bakobɔndisa bino ntango bokomona nzela na bango mpe ndenge na bango ya kosala; mpe bokoyeba mpenza ete ezali mpamba te nde nakosala nyonso oyo nasengeli kosala ye,’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”+

Maloba na nse