Ezekiele 13:1-23
13 Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:
2 “Mwana ya moto, sakolá mpo na basakoli ya Yisraele oyo bazali kosakola,+ mpe osengeli koloba boye na baoyo bazali kosakola makambo oyo euti na motema na bango moko:+ ‘Bóyoka liloba ya Yehova.+
3 Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na bazoba+ ya basakoli, oyo bazali kolanda makanisi na bango moko,+ nzokande bamoni ata eloko moko te!+
4 Basakoli na bino bakómi lokola bagambala na bisika oyo ebebisami, Ee Yisraele.+
5 Bokomata na madusu te,+ bokotongela mpe ndako ya Yisraele efelo ya mabanga te,+ mpo na kotɛlɛma na etumba na mokolo ya Yehova.”+
6 “Bamoni bimonaneli ya makambo ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi,+ baoyo bazali koloba ete: ‘Liloba ya Yehova ezali boye,’ nzokande Yehova ye moko atindi bango te, mpe bazeli liloba moko boye ekokisama.+
7 Bomoni emonaneli ya lokuta mpe kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi, ntango bozali koloba ete: ‘Liloba ya Yehova ezali boye,’ nzokande ngai moko nalobi eloko moko te, boye te?”’+
8 “‘Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “‘Lokola bolobi lokuta mpe bomoni emonaneli ya bokosi, boye ngai oyo nazali kotɛmɛla bino,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”
9 Mpe lobɔkɔ na ngai eyeli basakoli oyo bazali komona bimonaneli ya makambo ya lokuta mpe baoyo bazali kosakola likambo oyo ebombaná ya bokosi.+ Bakotikala lisusu te na kati ya etuluku ya baninga na ngai ya motema,+ bato na ngai, mpe bakokomama te na mokanda ya bankombo ya ndako ya Yisraele,+ mpe bakoya na mabele ya Yisraele te;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso,+
10 mpo, ɛɛ, mpo bapɛngwisi bato na ngai na ndenge bazali koloba ete: “Kimya ezali!” nzokande kimya ezali te,+ mpe moto moko azali kotonga efelo oyo ekaboli biteni ya ndako, kasi bato bazali kopakola yango mpɛmbɛ+ kaka mpamba.’+
11 “Lobá na baoyo bazali kopakola yango mpɛmbɛ ete ekokwea. Mbula makasi oyo ezindisaka ekonɔka mpenza, mpe yo, Ee mbula ya mabanga, okokwea, bongo kopɛpa ya mipɛpɛ makasi ekopasola yango.+
12 Mpe, talá! efelo yango ekokwea mpenza. Bakoloba nde na bino te ete: ‘Wapi mpɛmbɛ oyo bopakolaki?’+
13 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Nakotinda mpe mipɛpɛ makasi epɛpa na nkɛlɛ na ngai, mpe na nkanda na ngai, mbula makasi oyo ezindisaka ekonɔka, mpe na nkɛlɛ na ngai, mbula ya mabanga ekobɛta mpo na kosilisa bato nyɛɛ.+
14 Mpe nakobuka efelo oyo bopakoli mpɛmbɛ mpe nakolalisa yango na mabele, mpe moboko na yango ekomonana mpenza polele.+ Mpe ya solo, engumba ekokwea, mpe bokosila mpenza na kati na yango; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’+
15 “‘Mpe nakosilisela efelo mpe baoyo bazali kopakola yango mpɛmbɛ nkɛlɛ na ngai, mpe nakoloba na bino ete: “Efelo ezali lisusu te, mpe baoyo bazalaki kopakola yango mpɛmbɛ bazali lisusu te,+
16 basakoli ya Yisraele oyo bazali kosakwela Yerusaleme mpe bazali komonela yango emonaneli ya kimya,+ nzokande kimya ezali te,”’ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.+
17 “Bongo yo, Ee mwana ya moto, talisá elongi na yo+ epai ya bana basi ya bato na yo, oyo bazali kosala lokola basakoli ya basi+ ndenge euti na motema na bango moko,+ mpe sakwelá bango.
18 Mpe osengeli koloba boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Mawa na basi oyo bazali kotonga bilamba na milɔku nyonso mpe bazali kosala matambala mpo na mitó ya bato ya bolai ndenge na ndenge mpo na koluka kokanga milimo lokola na bokila!+ Bino basi oyo, milimo ya bato na ngai nde bozali koluka kokanga lokola na bokila, nzokande milimo na bino bozali kotika yango na bomoi?
19 Mpe bokokómisa ngai nde mpamba epai ya bato na ngai mpo na mwa ɔrje na mabɔkɔ mpe mpo na mwa biteni ya mampa,+ mpo na koboma milimo oyo esengeli kokufa te+ mpe mpo na kobatela milimo oyo esengeli kotikala na bomoi te, na lokuta na bino epai ya bato na ngai, baoyo bayokaka lokuta?”’+
20 “Na yango, talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: ‘Bino basi oyo, ngai oyo nazali kotɛmɛla bilamba na bino oyo bozali koluka kokanga na yango milimo lokola na bokila, lokola nde ezali bandɛkɛ, mpe nakopasola yango na mabɔkɔ na bino mpe milimo oyo bozali koluka kokanga lokola na bokila, nakotika yango ekende, milimo oyo bozali koluka kokanga lokola ezalaki bandɛkɛ.+
21 Mpe nakopasola matambala na bino mpe nakobikisa bato na ngai na lobɔkɔ na bino, mpe bakozala lisusu te na lobɔkɔ na bino eloko oyo bakangi na bokila; mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.+
22 Lokola bozali kolɛmbisa motema ya moyengebene na lokuta,+ nzokande ngai moko nayokisaki ye mpasi te, mpe na ndenge bozali kolendisa mabɔkɔ ya moto mabe+ mpo alongwa te na nzela na ye ya mabe mpo atikala na bomoi,+
23 na yango, bino basi, bokokoba te komona bimonaneli ya makambo ya lokuta,+ mpe bokosala+ lisusu te+ misala ya kosakola makambo oyo ebombaná;+ mpe nakobikisa bato na ngai na lobɔkɔ na bino,+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.’”+