Ezekiele 12:1-28

12  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete:  “Mwana ya moto, ozali kofanda nde na kati ya ndako ya batomboki,+ oyo bazali na miso mpo na komona kasi ya solo bazali komona te,+ oyo bazali na matoi mpo na koyoka kasi ya solo bazali koyoka te,+ mpo bazali ndako ya batomboki.+  Nde yo, Ee mwana ya moto, kangá bisaka lokola moto oyo azali kokende na mboka mopaya mpe kende na mboka mopaya na moi, na miso na bango, mpe osengeli kokende na mboka mopaya longwa na esika na yo kino na esika mosusu, na miso na bango. Mbala mosusu bakomona, atako bazali ndako ya batomboki.+  Mpe osengeli kobimisa bisaka na yo lokola bisaka ya kokende na mboka mopaya na moi, na miso na bango, mpe okobima na mpokwa na miso na bango lokola bato oyo bazali komemama na mboka mopaya.+  “Na miso na bango, omitɔbɔlela nzela na efelo, mpe osengeli kobimisa bisaka na yo na nzela yango.+  Na miso na bango, okomema biloko yango na lipeka. Okobimisa yango na molili. Okozipa elongi na yo mpo omona mabele te, mpo natye yo ozala likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya+ mpo na ndako ya Yisraele.”+  Mpe nasalaki ndenge bapesaki ngai mitindo.+ Nabimisaki bisaka na ngai, lokola bisaka mpo na kokende na mboka mopaya, na moi; mpe na mpokwa, natɔbɔlaki na lobɔkɔ na ngai nzela na efelo. Nabimisaki yango na molili. Namemaki yango na lipeka na ngai, na miso na bango.  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai na ntɔngɔ ete:  “Mwana ya moto, bato ya ndako ya Yisraele, ndako ya batomboki,+ balobaki na yo te ete: ‘Ozali kosala nini?’ 10  Lobá na bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Liyebisi oyo ezali mpo na nkumu,+ mpo na Yerusaleme mpe mpo na bato nyonso ya ndako ya Yisraele oyo bazali na kati na bango.”’ 11  “Lobá boye: ‘Nazali mpo na bino likamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya.+ Kaka ndenge nasali, ndenge yango nde bakosala bango. Bakokende na mboka mopaya, na bokangami.+ 12  Mpo na nkumu oyo azali na kati na bango, akomema biloko na lipeka na molili mpe akobima; bakotɔbɔla efelo mpo na kobimisa biloko na nzela yango.+ Akozipa elongi na ye mpo ete amona mabele na miso na ye te.’ 13  Mpe nakotanda mpenza monyama na ngai likoló na ye, mpe akokangama mpenza na monyama na ngai ya bokila;+ mpe nakomema ye na Babilone, na mokili ya Bakaladea,+ kasi akomona yango te; mpe akokufa kuna.+ 14  Mpe baoyo nyonso bazali zingazinga na ye mpo na kosalisa ye, mpe bituluku na ye nyonso ya basoda, nakopalanganisa bango na mipɛpɛ nyonso;+ mpe nakobimisa mopanga nsima na bango.+ 15  Mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova ntango nakopanza bango na kati ya bikólo mpe nakopalanganisa bango na kati ya mikili.+ 16  Mpe nakotikela bango bato moke oyo bakobika na mopanga,+ na nzala mpe na maladi mabe, mpo bábɛta lisolo ya makambo na bango nyonso oyo eyinamá+ na kati ya bikólo epai basengeli kokende;+ mpe bakoyeba mpenza ete nazali Yehova.” 17  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete: 18  “Mwana ya moto, osengeli kolya limpa na yo na kolɛnga, mpe komɛla mai na yo na yikiyiki mpe na motema likoló.+ 19  Mpe osengeli koloba na bato ya mokili yango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi na bato ya Yerusaleme oyo bazali na mabele ya Yisraele:+ “Bakolya limpa na bango na motema likoló, mpe bakomɛla mai na bango na nsɔmɔ, mpo mokili na bango etikala mpamba, ezanga nyonso oyo ezalaki na kati na yango+ mpo na mobulu ya baoyo nyonso bazali kofanda na kati na yango.+ 20  Mpe bingumba oyo bato bafandi ekobebisama,+ mpe mokili ekotikala mpamba;+ mpe bokoyeba mpenza ete nazali Yehova.”’”+ 21  Mpe liloba ya Yehova eyelaki ngai lisusu ete: 22  “Mwana ya moto, liloba ya lisese nini wana oyo bozali na yango na mabele ya Yisraele,+ oyo ezali koloba ete: ‘Mikolo ekómi molai,+ mpe emonaneli nyonso ekufi’?+ 23  Na yango, yebisá bango boye: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “Nakosukisa mpenza liloba ya lisese wana, mpe bakoloba yango lisusu te lokola liloba ya lisese na Yisraele.”’+ Kasi, lobá na bango ete: ‘Mikolo ekómi pene,+ ná kokokisama ya emonaneli nyonso.’ 24  Mpo emonaneli ya mpambampamba ekozala lisusu te,+ ezala mpe kosakola makambo oyo ebombaná ya bokosi na kati ya ndako ya Yisraele.+ 25  ‘“Mpo ngai, Yehova, nakoloba liloba oyo nakoloba, mpe yango ekosalema.+ Makambo ekoumisama lisusu te,+ mpamba te na mikolo na bino,+ Ee ndako ya batomboki, nakoloba liloba mpe nakosala yango mpenza,” yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.’” 26  Mpe liloba ya Yehova ekobaki koyela ngai ete: 27  “Mwana ya moto, talá! bato ya ndako ya Yisraele bazali koloba boye: ‘Emonaneli oyo azali komona ezali mpo ekokisama nsima ya mikolo mingi, mpe azali kosakola mpo na bantango oyo ekoya mosika na nsima.’+ 28  Na yango, lobá na bango ete: ‘Talá oyo Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso alobi: “‘Makambo ekoumisama lisusu te na oyo etali maloba na ngai nyonso.+ Liloba oyo nakoloba, yango nde ekosalema,’+ yango nde liloba ya Yehova Nkolo Mokonzi-Oyo-Aleki-Nyonso.”’”+

Maloba na nse