Ezekiele 10:1-22
10 Mpe nakobaki komona, mpe talá! likoló ya etando+ oyo ezalaki na motó ya bakeruba, ezalaki na eloko moko lokola libanga ya safire,+ eloko oyo ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi,+ emonanaki likoló na bango.
2 Mpe alobaki na moto oyo alataki elamba ya lini,+ ɛɛ alobaki boye: “Kɔtá na katikati ya bayiká,+ na nse ya bakeruba, mpe tondisá mabɔkɔ na yo mibale na makala+ ya mɔtɔ oyo euti na katikati ya bakeruba mpe bwaká yango na engumba.”+ Bongo akɔtaki na miso na ngai.
3 Mpe bakeruba batɛlɛmaki na lobɔkɔ ya mobali ya ndako ntango moto yango akɔtaki, mpe lipata ezalaki kotondisa lopango ya kati.+
4 Mpe nkembo ya Yehova+ ebandaki kolongwa epai ya bakeruba mpo na kokende na monɔkɔ ya ndako, mpe nsukansuka ndako etondaki na lipata,+ mpe lopango etondaki na kongɛnga ya nkembo ya Yehova.
5 Mpe lokito ya mapapu ya bakeruba+ eyokanaki libándá ya lopango, lokola lokito ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso ntango alobaka.+
6 Mpe esalemaki boye: ntango apesaki moto oyo alataki elamba ya lini mitindo ete: “Zwá mɔtɔ na katikati ya bayiká, na katikati ya bakeruba,” bongo ye akɔtaki mpe atɛlɛmaki pene na yiká.
7 Bongo keruba moko asembolaki lobɔkɔ na ye uta na katikati ya bakeruba tii na mɔtɔ+ oyo ezalaki na katikati ya bakeruba+ mpe amemaki yango mpe atyaki yango na mabɔkɔ ya moto oyo alataki elamba ya lini;+ ye azwaki yango mpe abimaki.
8 Mpe emonanaki ete bakeruba bazali na eloko moko oyo ezali lokola lobɔkɔ ya moto ya mabele, na nse ya mapapu na bango.+
9 Mpe nakobaki komona, mpe talá! bayiká minei ezali pene na bakeruba, yiká moko pembeni ya keruba moko mpe yiká moko pembeni ya keruba mosusu,+ mpe lolenge bayiká yango ezalaki komonana ezali lokola kongɛnga ya libanga ya krizolite.
10 Nzokande ndenge yango ezalaki komonana, yango nyonso minei ezalaki lolenge moko, lokola ntango yiká moko ezali na katikati ya yiká mosusu.+
11 Ntango ezalaki kokende, ezalaki kokende na ngámbo na yango minei. Ezalaki kobuka te mpo na kobaluka epai mosusu ntango ezalaki kokende, mpo esika oyo motó ezalaki kotala, ezalaki kokende kuna. Ezalaki kobuka te mpo na kobaluka epai mosusu ntango ezalaki kokende.+
12 Nzoto na bango mobimba, mikɔngɔ na bango, mabɔkɔ na bango, mapapu na bango, ná bayiká etondaki na miso epai na epai.+ Bango minei bazalaki na bayiká na bango.
13 Mpo na oyo etali bayiká, babelelaki yango na matoi na ngai boye: “Ee bayiká!”
14 Mpe mokomoko na bango azalaki na bilongi minei.+ Elongi ya liboso ezalaki elongi ya keruba, mpe elongi ya mibale ezalaki elongi ya moto ya mabele,+ mpe ya misato ezalaki elongi ya nkɔsi, mpe ya minei ezalaki elongi ya mpongo.+
15 Mpe bakeruba bazalaki komata+—ezalaki kaka ekelamu ya bomoi oyo namonaki na ebale Kebare+—
16 mpe ntango bakeruba bazalaki kokende, bayiká ezalaki kokende pembeni na bango;+ mpe ntango bakeruba bazalaki kotombola mapapu na bango mpo na komata mosika na mabele, bayiká yango ezalaki kobaluka epai mosusu te, ɛɛ ezalaki kolongwa pembeni na bango te.+
17 Ntango bazalaki kotɛlɛma, yango mpe ezalaki kotɛlɛma; mpe ntango bazalaki komata,+ yango mpe ezalaki komata elongo na bango, mpo elimo ya ekelamu ya bomoi ezalaki na kati na yango.+
18 Mpe nkembo+ ya Yehova elongwaki likoló ya monɔkɔ ya ndako mpe etɛlɛmaki likoló ya bakeruba.+
19 Mpe sikoyo bakeruba batombolaki mapapu na bango mpe balongwaki na mabele bamati+ na miso na ngai. Ntango babimaki, bayiká mpe ezalaki penepene na bango; mpe babandaki kotɛlɛma na esika ya kokɔta oyo ezali na ɛsti ya porte ya ndako ya Yehova, mpe nkembo ya Nzambe ya Yisraele oyo euti na likoló ezalaki likoló na bango.
20 Yango nde ekelamu ya bomoi+ oyo namonaki na nse ya Nzambe ya Yisraele na ebale Kebare,+ bongo nayebaki ete bazali bakeruba.
21 Mpo na oyo etali bango minei, mokomoko na bango azalaki na bilongi minei+ mpe mokomoko na bango azalaki na mapapu minei, mpe eloko oyo emonanaki lokola mabɔkɔ ya moto ya mabele ezalaki na nse ya mapapu na bango.
22 Mpo na oyo etali lolenge ya bilongi na bango, ezalaki bilongi oyo ezalaki komonana lokola bilongi oyo namonaki pene na ebale Kebare, yango mpenza.+ Mokomoko azalaki kokende se liboso alima.+