Danyele 6:1-28

6  Dariuse amonaki malamu atya basatrape nkama moko na ntuku mibale (120) mpo bákamba bokonzi, basengelaki kokamba bokonzi mobimba;+  mpe atyaki likoló na bango bankumu minene misato, Danyele azalaki moko na bango,+ mpo basatrape+ yango bápesaka bango lapolo ntango nyonso mpe mokonzi abungisa eloko te.+  Bongo Danyele yango azalaki kaka koleka+ bankumu minene ná basatrape, mpo azalaki na elimo moko ya mayele mingi;+ mpe mokonzi akanaki kotya ye na esika ya likoló na bokonzi mobimba.  Na ntango yango, bankumu minene mpe basatrape bazalaki ntango nyonso kolukela Danyele mwa likambo na makambo etali bokonzi;+ kasi ezalaki ata na mwa likambo to eloko moko te ya mabe oyo bakokaki kozwa, mpo abongaki kotyelama motema mpe ata likambo moko ya gɔigɔi to eloko moko ya mabe emonanaki epai na ye te.+  Bongo mibali makasi yango bazalaki koloba boye: “Tokozwa Danyele oyo ata na mwa likambo te, lobá kaka tózwa yango na mobeko ya Nzambe na ye.”+  Bongo bankumu minene mpe basatrape yango bakɔtaki ebele na mbala moko epai ya mokonzi,+ mpe talá oyo balobaki na ye: “Ee mokonzi Dariuse, zalá na bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+  Bankumu minene nyonso ya bokonzi, bakomisɛrɛ ná basatrape, basaleli minene ya mokonzi ná baguvɛrnɛrɛ, basali likita mpo bátya mobeko moko ya bokonzi+ mpe básala ete bato bátosa epekiseli oyo elobi ete na boumeli ya mikolo ntuku misato (30), moto nyonso oyo akosala lilɔmbɔ epai ya nzambe mosusu to moto mosusu, kasi epai na yo te, Ee mokonzi, asengeli kobwakama na libulu ya bankɔsi.+  Sikoyo, Ee mokonzi, bimisá mobeko yango mpe tyá lobɔkɔ na mokanda yango,+ mpo ebongwana te, na kolanda mobeko ya Bamede ná Baperse,+ oyo balongolaka te.”+  Na boyokani na likambo yango, Mokonzi Dariuse atyaki lobɔkɔ na mokanda yango mpe na epekiseli yango.+ 10  Kasi Danyele, ntango kaka ayebaki ete mokanda yango etyami lobɔkɔ, akɔtaki na ndako na ye, mpe maninisa ya shambrɛ na ye ya likoló na ngámbo ya Yerusaleme ezalaki polele,+ ɛɛ, mbala misato na mokolo+ azalaki kofukama na mabɔlɔngɔ na ye mpe kobondela+ mpe kopesa masanzoli liboso ya Nzambe na ye,+ ndenge azalaki kosala mbala na mbala liboso ya likambo yango.+ 11  Na ntango yango, mibali makasi yango bakɔtaki bango nyonso mbala moko mpe bakutaki Danyele azali kosala lilɔmbɔ mpe kobondela liboso ya Nzambe na ye mpo amonisela ye boboto.+ 12  Na ntango yango nde bapusanaki pene mpe balobelaki epekiseli ya mokonzi liboso ya mokonzi ete: “Otyaki lobɔkɔ na epekiseli moko ete moto nyonso oyo, na boumeli ya mikolo ntuku misato (30), akosala lilɔmbɔ epai ya nzambe mosusu to moto mosusu, kasi epai na yo te, Ee mokonzi, asengeli kobwakama na libulu ya bankɔsi, boye te?”+ Mokonzi ayanolaki mpe alobaki boye: “Likambo yango ezali bongo, na kolanda mobeko ya Bamede ná Baperse, oyo balongolaka te.”+ 13  Na mbala moko bayanolaki, mpe balobaki boye liboso ya mokonzi: “Danyele,+ moko ya bato ya Yuda oyo bamemamaki na mboka mopaya,+ amoni yo mpamba, Ee mokonzi, mpe amoni mpamba epekiseli oyo otyaki lobɔkɔ, kasi azali kosala lilɔmbɔ mbala misato na mokolo.”+ 14  Bongo ntango kaka mokonzi ayokaki liloba yango, asepelaki ata moke te,+ mpe atyaki makanisi na ye epai ya Danyele mpo abikisa ye;+ mpe tii moi elalaki, azalaki se kosala makasi abikisa ye. 15  Nsukansuka mibali makasi yango bakɔtaki ebele na mbala moko epai ya mokonzi, mpe balobaki na mokonzi ete: “Ee mokonzi, yebá malamu, ete mobeko ya Bamede ná Baperse ezali ete epekiseli+ nyonso to mobeko nyonso oyo mokonzi ye moko abimisi esengeli kobongwana te.”+ 16  Bongo mokonzi apesaki mitindo, mpe bamemaki Danyele mpe babwakaki ye na libulu ya bankɔsi.+ Mokonzi ayanolaki mpe alobaki na Danyele ete: “Nzambe na yo oyo ozali kosalela ntango nyonso, ye akobikisa yo.”+ 17  Mpe bayaki na libanga moko mpe batyaki yango na monɔkɔ ya libulu yango, mpe mokonzi atyaki elembo likoló na yango na lopɛtɛ na ye ya kotya bilembo mpe na lopɛtɛ ya kotya bilembo ya bato minene na ye, mpo eloko moko te ebongwana na ekateli oyo bazweli Danyele.+ 18  Na ntango yango, mokonzi akendaki na ndako na ye ya bokonzi mpe akilaki bilei butu mobimba,+ mpe bakɔtisaki bibɛtɛlo ya miziki te liboso na ye, mpe mpɔngi ekimaki ye.+ 19  Nsukansuka, mokonzi atɛlɛmaki na ntɔngɔntɔngɔ, ntango moi ebandi kobima, mpe akendaki nokinoki na libulu ya bankɔsi. 20  Mpe ntango akómaki pene na libulu yango, abelelaki Danyele na mongongo ya mawa. Mokonzi azwaki maloba mpe alobaki na Danyele boye: “Ee Danyele, mosaleli ya Nzambe ya bomoi, Nzambe na yo oyo ozali kosalela ntango nyonso+ abikisi yo na bankɔsi?”+ 21  Na mbala moko, Danyele alobaki na mokonzi ete: “Ee mokonzi, zalá na bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te. 22  Nzambe na ngai+ atindaki anzelu na ye+ mpe akangaki monɔkɔ ya bankɔsi,+ mpe babomi ngai te, mpo emonani ete nazali na likambo te liboso na ye;+ mpe lisusu, Ee mokonzi, nasali likambo moko te ya mabe liboso na yo.”+ 23  Na ntango yango nde mokonzi ayokaki esengo makasi,+ mpe apesaki mitindo bábimisa Danyele na libulu yango. Mpe Danyele abimisamaki na libulu, mpe bamonaki ata mpota moko te na nzoto na ye, mpo atyelaki Nzambe na ye motema.+ 24  Mpe mokonzi apesaki mitindo, mpe bayaki na mibali makasi oyo bafundaki Danyele,+ mpe babwakaki bango, bana na bango mpe basi na bango,+ na libulu ya bankɔsi;+ mpe liboso kutu bákóma na nsuka ya libulu, bankɔsi balekaki bango makasi, mpe babukaki mikuwa na bango nyonso.+ 25  Na ntango yango nde mokonzi Dariuse akomelaki bato nyonso ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ ya bato oyo bazali kofanda na mabele mobimba ete:+ “Bózala na kimya mingi!+ 26  Napesi etinda+ ete: na teritware nyonso ya bokonzi na ngai, bato basengeli kolɛnga mpe kobanga liboso ya Nzambe ya Danyele.+ Mpo azali Nzambe ya bomoi mpe ye Moto oyo azali koumela seko,+ mpe bokonzi na ye+ ezali oyo ekobebisama te,+ mpe boyangeli na ye ezali mpo na seko.+ 27  Azali kobikisa mpe kosikola,+ azali kosala bilembo mpe makamwisi na likoló+ mpe na mabele,+ mpo abikisi Danyele na lobɔkɔ ya bankɔsi.” 28  Nzokande, makambo ya Danyele yango etambolaki malamu na bokonzi ya Dariuse+ mpe na bokonzi ya Siruse Moperse.+

Maloba na nse