Danyele 4:1-37

4  “Talá oyo Mokonzi Nebukadenezare alobi na bato ya bikólo nyonso, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ ya bato oyo bafandi na mabele mobimba:+ Bózala na kimya mingi.+  Bilembo mpe makamwisi oyo Nzambe Oyo-Aleki-Likoló asaleli ngai, namoni malamu nasakola yango.+  Bilembo na ye ezali mpenza minene, mpe makamwisi na ye ezali na nguya mpenza!+ Bokonzi na ye ezali bokonzi ya seko,+ mpe boyangeli na ye ezali libota na libota.+  “Ngai Nebukadenezare nafandaki na kimya+ na ndako na ngai mpe makambo ezalaki kotambola malamu na ndako na ngai.+  Nalɔtaki ndɔtɔ moko, mpe ekómaki kobangisa ngai.+ Ntango nazalaki na mbeto na ngai, namonaki bililingi na makanisi mpe bimonaneli ya motó na ngai ekómaki kopesa ngai nsɔmɔ.+  Mpe napesaki etinda báya na bato nyonso ya bwanya ya Babilone liboso na ngai, mpo báyebisa ngai ndimbola ya ndɔtɔ yango.+  “Na ntango yango, banga-nga-nzambe ya maji, bato oyo babelelaka bilimo, Bakaladea+ mpe banganga-minzoto+ bakɔtaki; mpe nalobaki ndɔtɔ yango liboso na bango, kasi bayebisaki ngai ndimbola na yango te.+  Mpe nsukansuka, Danyele, oyo nkombo na ye Beleteshazare,+ na kolanda nkombo ya nzambe na ngai+ mpe oyo azalaki na elimo ya banzambe basantu akɔtaki liboso na ngai;+ mpe liboso na ye, nalobaki ndɔtɔ yango:  “‘Ee Beleteshazare kapita ya banganga-nzambe ya maji,+ lokola ngai moko nayebi malamu ete ozali na elimo ya banzambe basantu+ mpe ete sekele ata moko te etungisaka yo,+ yebisá ngai bimonaneli ya ndɔtɔ na ngai oyo nalɔti mpe ndimbola na yango.+ 10  “‘Sikoyo, na mbeto na ngai, namonaki bimonaneli ya motó na ngai,+ mpe talá! Nzete+ moko na katikati ya mabele, oyo ezalaki molai mingi mpenza.+ 11  Nzete yango ekolaki mpe ekómaki makasi, mpe nsukansuka, bolai na yango ekómaki na likoló, mpe ezalaki komonana tii na nsuka ya mabele mobimba.+ 12  Nkasa na yango ezalaki kitoko, mpe mbuma na yango ezalaki beboo, mpe ezalaki na bilei mpo na bikelamu nyonso. Nyama+ ya zamba ezalaki koluka elili+ na nse na yango, mpe bandɛkɛ ya likoló ezalaki kofanda na bitape na yango,+ mpe bikelamu nyonso ya bomoi ezalaki kozwa bilei na nzete yango. 13  “‘Nazalaki se kotala na bimonaneli ya motó na ngai na mbeto na ngai, mpe talá! mokɛngɛli moko,+ ɛɛ, mosantu+ moko auti na likoló, azali kokita. 14  Mpe azalaki kobelela na mongongo makasi, mpe azalaki koloba boye: “Bókata nzete yango,+ mpe bókata bitape na yango. Bókweisa nkasa na yango, mpe bópanza mbuma na yango. Banyama ekima, elongwa na nse na yango, mpe bandɛkɛ elongwa na bitape na yango.+ 15  Kasi bótika ekumu ná misisa na yango na mabele, ɛɛ ekangama na bansinga ya ebende mpe ya motako, na kati ya matiti ya esobe; mpe mamwɛ ya likoló epɔlisa yango, mpe likabo na yango ezala esika moko na nyama na kati ya matiti ya mabele.+ 16  Motema na yango ebongwana, ezala lisusu ya moto te, mpe bápesa yango motema ya nyama,+ mpe elekisa ntango nsambo.+ 17  Bakɛngɛli+ bapesi mitindo ya likambo yango, mpe basantu nde basakoli ekateli yango, mpo bato oyo bazali na bomoi báyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato+ mpe apesaka yango moto oyo ye alingi kopesa+ mpe atyaka moto oyo aleki moke kati na bato azala mokonzi na yango.”+ 18  “‘Yango nde ndɔtɔ oyo ngai, Mokonzi Nebukadenezare, nalɔtaki; mpe yo, Ee Beleteshazare, pesá ndimbola na yango, mpo bato mosusu nyonso ya bwanya ya bokonzi na ngai bakoki te kopesa ngai ndimbola yango.+ Kasi yo okoki, mpo ozali na elimo ya banzambe basantu.’+ 19  “Na ntango yango, Danyele, oyo nkombo na ye Beleteshazare,+ akamwaki mpo na mwa ntango, mpe makanisi na ye ekómaki kopesa ye nsɔmɔ.+ “Mokonzi ayanolaki mpe alobaki boye: ‘Ee Beleteshazare, ndɔtɔ yango mpe ndimbola yango epesa yo nsɔmɔ te.’+ “Beleteshazare ayanolaki mpe alobaki boye: ‘Ee Nkolo na ngai, tiká ndɔtɔ yango ekokisama epai ya baoyo bayinaka yo, mpe ndimbola na yango epai ya banguna na yo.+ 20  “‘Nzete oyo omonaki, oyo ekolaki mingi mpe ekómaki makasi mpe oyo nsukansuka bolai na yango ekómaki na likoló mpe oyo ezalaki komonana tii na mabele mobimba,+ 21  oyo ezalaki na nkasa kitoko, oyo ezalaki na mbuma ebele, mpe oyo ezalaki na bilei mpo na bikelamu nyonso; oyo banyama ya zamba ezalaki kofanda na nse na yango, mpe oyo bandɛkɛ ya likoló ezalaki kofanda na bitape na yango,+ 22  ezali yo, Ee mokonzi,+ mpo okoli mingi mpe okómi makasi, mpe okómi moto monene mpenza mpe otombwani tii likoló,+ mpe boyangeli na yo ekómi tii na nsuka ya mabele.+ 23  “‘Mpe lokola mokonzi amonaki mokɛngɛli moko, ɛɛ, mosantu moko,+ auti na likoló, azali kokita mpe azali koloba ete: “Bókata nzete yango, mpe bóbebisa yango. Kasi bótika ekumu ná misisa na yango na mabele, mpe ekangama na bansinga ya ebende mpe ya motako, na kati ya matiti ya esobe, mpe mamwɛ ya likoló epɔlisa yango, mpe likabo na yango ezala esika moko na banyama ya zamba tii ekolekisa ntango nsambo,”+ 24  talá ndimbola yango, Ee mokonzi, mpe mitindo+ ya Oyo-Aleki-Likoló+ nde ekokwela mpenza nkolo na ngai mokonzi.+ 25  Mpe bakobengana yo kati na bato, mpe okofanda esika moko na banyama ya zamba,+ mpe bakopesa yo matiti olya lokola bangɔmbɛ;+ mpe mamwɛ ya likoló ekopɔlisa yo, mpe okolekisa ntango nsambo,+ tii okoyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato,+ mpe ete apesaka yango na moto oyo ye alingi kopesa.+ 26  “‘Mpe lokola balobaki ete bátika ekumu ná misisa ya nzete yango,+ okozongela bokonzi na yo ntango okoyeba ete likoló ezali koyangela.+ 27  Yango wana, Ee mokonzi, tiká toli na ngai emonana malamu na miso na yo,+ mpe salelá boyengebene mpo olongola masumu na yo,+ mpe yokelá babola mawa mpo olongola mabe na yo.+ Mbala mosusu okozala na bomoi molai mpe makambo na yo ekotambola malamu.’”+ 28  Nyonso wana ekómelaki mokonzi Nebukadenezare.+ 29  Na nsuka ya sanza zomi na mibale, azalaki kotambola likoló ya ndako ya mokonzi na Babilone. 30  Mokonzi ayanolaki mpe alobaki boye:+ “Oyo nde Babilone Monene, oyo ngai natongá na nguya na ngai monene+ mpo ezala ndako ya mokonzi mpe lokumu ya nkembo na ngai, boye te?”+ 31  Wana liloba ezalaki naino na monɔkɔ ya mokonzi, mongongo moko eutaki na likoló elobi: “Ee mokonzi Nebukadenezare, balobi na yo boye: ‘Bokonzi elongwe epai na yo,+ 32  mpe bazali kobengana yo kati na bato, mpe okofanda esika moko na banyama ya zamba.+ Bakopesa yo matiti olya lokola bangɔmbɛ, mpe okolekisa ntango nsambo, tii okoyeba ete Oyo-Aleki-Likoló azali Moyangeli na bokonzi ya bato, mpe apesaka yango na moto oyo ye alingi kopesa.’”+ 33  Na ntango yango,+ liloba yango ekokisamaki epai ya Nebukadenezare, mpe babenganaki ye kati na bato, mpe akómaki kolya matiti lokola bangɔmbɛ, mpe mamwɛ ya likoló ekómaki kopɔlisa nzoto na ye, tii nsuki na ye ekómaki milai lokola nsala ya bampongo mpe manzaka na ye lokola manzaka ya bandɛkɛ.+ 34  “Mpe na nsuka ya mikolo,+ ngai Nebukadenezare natombolaki miso na ngai na likoló,+ mpe mayele na ngai ekómaki kozongela ngai; mpe napambolaki Oyo-Aleki-Likoló,+ mpe nasanzolaki mpe nakumisaki Ye oyo azali na bomoi seko,+ mpo boyangeli na ye ezali boyangeli ya seko mpe bokonzi na ye ezali libota na libota.+ 35  Mpe bato nyonso oyo bafandi na mabele bamonani lokola eloko mpamba,+ mpe azali kosala ndenge ye moko alingi na kati ya limpinga ya likoló mpe na kati ya bato oyo bafandi na mabele.+ Mpe moto moko te akoki kokanga lobɔkɔ na ye+ to koloba na ye ete: ‘Osali nini?’+ 36  “Se na ntango yango, mayele na ngai ekómaki kozongela ngai, mpe nkembo na ngai ná kongɛnga na ngai ekómaki kozongela ngai mpo nazwa lisusu lokumu ya bokonzi na ngai;+ mpe basali minene na ngai ya bokonzi mpe bato minene na ngai bakómaki koluka ngai na mposa, mpe natyamaki lisusu na bokonzi na ngai, mpe babakiselaki ngai bonene mingi mpenza.+ 37  “Sikoyo ngai Nebukadenezare nazali kosanzola, kotombola mpe kokumisa Mokonzi ya likoló,+ mpo misala na ye nyonso ezali solo mpe banzela na ye ezali bosembo,+ mpe mpo akoki kokitisa baoyo bazali kotambola na lolendo.”+

Maloba na nse