Danyele 3:1-30
3 Mokonzi Nebukadenezare asalaki ekeko+ moko ya wolo, bolai na yango ezalaki mapeko ntuku motoba (60) mpe bonene na yango ezalaki mapeko motoba. Atɛlɛmisaki yango na mokili patatalu ya Dura na etúká oyo eyangelami ya Babilone.+
2 Mpe mokonzi Nebukadenezare atindaki báyanganisa basatrape, bakomisɛrɛ+ ná baguvɛrnɛrɛ, bapesi-toli, babombi mosolo, basambisi, bamajistra ya polisi+ ná batambwisi nyonso ya makambo ya bitúká oyo eyangelami mpo báya na molulu ya bofungoli+ ekeko oyo mokonzi Nebukadenezare atɛlɛmisaki.
3 Na ntango yango, basatrape,+ bakomisɛrɛ ná baguvɛrnɛrɛ, bapesi-toli, babombi mosolo, basambisi, bamajistra ya polisi ná batambwisi nyonso ya makambo ya bitúká oyo eyangelami bayanganaki mpo na molulu ya bofungoli ekeko oyo mokonzi Nebukadenezare atɛlɛmisaki, mpe batɛlɛmaki liboso ya ekeko oyo Nebukadenezare atɛlɛmisaki.
4 Mpe mopanzi-nsango+ azalaki kobelela na mongongo makasi boye: “Ee bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ,+ bazali koyebisa bino
5 ete ntango bokoyoka lokito ya liseke, ya piololo, ya sitare, ya nzɛnzɛ ya bansɔngɛ misato, ya ebɛtɛlo ya bansinga, ya kornemize mpe ya ndenge nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki,+ bókwea mpe bósambela ekeko ya wolo oyo mokonzi Nebukadenezare atɛlɛmisi.
6 Mpe moto nyonso oyo akokwea te mpe akosambela te,+ kaka na ntango wana,+ akobwakama na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela.”+
7 Yango wana, kaka na ntango oyo bato ya bikólo nyonso bayokaki lokito ya liseke, ya piololo, ya sitare, ya nzɛnzɛ ya bansɔngɛ misato, ya ebɛtɛlo ya bansinga mpe ya ndenge nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki, bato ya bikólo nyonso,+ bituluku nyonso ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso bakweaki mpe basambelaki ekeko ya wolo oyo mokonzi Nebukadenezare atɛlɛmisaki.
8 Yango wana, kaka na ntango wana Bakaladea mosusu babɛlɛmaki mpe bafundaki Bayuda.+
9 Bayanolaki mpe balobaki na mokonzi Nebukadenezare boye: “Ee mokonzi, zalá na bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+
10 Ee mokonzi, yo moko opesaki mitindo ete moto nyonso oyo ayoki lokito ya liseke, ya piololo, ya sitare, ya nzɛnzɛ ya bansɔngɛ misato, ya ebɛtɛlo ya bansinga, ya kornemize mpe ya ndenge nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki,+ akwea mpe asambela ekeko ya wolo;
11 mpe moto nyonso oyo akokwea te mpe akosambela te, abwakama na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela.+
12 Ezali na Bayuda moko oyo otyaki bátambwisa makambo ya etúká oyo eyangelami ya Babilone:+ Shadrake, Meshake ná Abedenego; mibali makasi yango bamoni yo mpamba, Ee mokonzi, bazali kosambela banzambe na yo te, mpe ekeko ya wolo oyo otɛlɛmisi bazali kosambela yango te.”+
13 Na ntango yango, Nebukadenezare atondaki na nkanda mpe na nkɛlɛ+ mpe alobaki báya na Shadrake, Meshake ná Abedenego.+ Bongo bayaki na mibali makasi yango liboso ya mokonzi.
14 Nebukadenezare ayanolaki mpe alobaki na bango boye: “Ee Shadrake, Meshake ná Abedenego, ezali mpenza solo ete bozali kosalela banzambe na ngai te,+ mpe ekeko ya wolo oyo natɛlɛmisi bozali kosambela yango te?+
15 Sikoyo, soki bomibongisi mpo bókwea mpe bósambela ekeko oyo nasali, ntango bokoyoka lokito ya liseke, ya piololo, ya sitare, ya nzɛnzɛ ya bansɔngɛ misato, ya ebɛtɛlo ya bansinga, ya kornemize mpe ya ndenge nyonso ya bibɛtɛlo ya miziki,+ wana malamu. Kasi soki bosambeli te, kaka na ntango wana, bokobwakama na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela. Bongo nzambe yango nani oyo akoki kobikisa bino na mabɔkɔ na ngai?”+
16 Shadrake, Meshake ná Abedenego bayanolaki, mpe balobaki na mokonzi boye: “Ee Nebukadenezare, tozali na ntina ya kozongisela yo liloba te na likambo oyo.+
17 Soki ezali bongo, Nzambe na biso oyo tozali kosalela akoki kobikisa biso. Akobikisa biso na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela mpe na lobɔkɔ na yo, Ee Mokonzi.+
18 Kasi soki bongo te, Ee mokonzi, yebá ete tosalelaka banzambe na yo te, mpe ekeko ya wolo oyo otɛlɛmisi, tokosambela yango te.”+
19 Na ntango yango nde Nebukadenezare atondaki na nkɛlɛ, mpe elongi na ye ekómaki ndenge mosusu ntango azali kotala Shadrake, Meshake ná Abedenego. Ayanolaki mpe alobaki ete bángalisa mɔtɔ ya litumbu mbala nsambo koleka ndenge bamesanaki kongalisa yango.
20 Mpe alobaki na mibali moko boye ya makasi oyo batondá na nguya ya bomoi,+ oyo bazalaki na limpinga ya basoda na ye, bákanga Shadrake, Meshake ná Abedenego, mpo na kobwaka bango na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela.+
21 Na ntango yango nde bakangaki mibali makasi yango na kati ya bakazaka na bango, bilamba na bango mpe bikɔti na bango ná bilamba na bango mosusu mpe babwakaki bango na litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela.
22 Lokola liloba ya mokonzi ezalaki makasi mpe mɔtɔ ya litumbu engalisamaki koleka ndelo, mibali makasi yango oyo batombolaki Shadrake, Meshake ná Abedenego nde bato lolemo ya mɔtɔ ebomaki.
23 Kasi mibali makasi wana mosusu, bango misato, Shadrake, Meshake ná Abedenego, bakweaki na kati ya litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela, na bansinga na bango kaka ndenge bakangaki bango.+
24 Na ntango yango, mokonzi Nebukadenezare akómaki kobanga mpe atɛlɛmaki nokinoki. Ayanolaki mpe alobaki na basaleli na ye minene boye: “Tokangaki mpe tobwakaki nde mibali makasi misato na katikati ya mɔtɔ, boye te?”+ Bayanolaki mpe balobaki na mokonzi ete: “Boye, Ee mokonzi.”
25 Ayanolaki mpe alobaki boye: “Talá! Nazali komona mibali makasi minei bazali kotambolatambola na bonsomi na katikati ya mɔtɔ, mpe bazali na mpota moko te, mpe lolenge ya oyo ya minei ezali lokola mwana moko ya banzambe.”+
26 Na ntango yango nde Nebukadenezare abɛlɛmaki na monɔkɔ ya litumbu ya mɔtɔ oyo ezali kopela.+ Ayanolaki mpe alobaki boye: “Shadrake, Meshake ná Abedenego, basaleli ya Nzambe Oyo-Aleki-Likoló,+ bóbima mpe bóya awa!” Na ntango yango, Shadrake, Meshake ná Abedenego balongwaki na kati ya mɔtɔ.
27 Mpe basatrape, bakomisɛrɛ, baguvɛrnɛrɛ ná basaleli minene ya mokonzi+ oyo bayanganaki bazalaki kotala mibali makasi yango, mpe bamonaki ete mɔtɔ ezalaki na nguya ata moko te likoló ya nzoto na bango,+ mpe nsuki moko te ya motó na bango+ ezikaki, mpe ata bakazaka na bango ebongwanaki te mpe nsolo ya mɔtɔ ezwaki bango te.
28 Nebukadenezare ayanolaki mpe alobaki boye: “Nzambe ya Shadrake, Meshake ná Abedenego+ apambwama, oyo atindi anzelu na ye+ mpe abikisi basaleli na ye oyo batyelaki ye motema+ mpe oyo babongolaki liloba ya mokonzi mpe bakabaki nzoto na bango, mpo balingaki kosalela+ mpe kosambela+ nzambe mosusu te, longola kaka Nzambe na bango.+
29 Mpe ngai nazali kopesa etinda+ ete: moto ya ekólo nini, etuluku ya bato ya ekólo nini to monɔkɔ nini oyo ekoloba likambo moko ya mabe na Nzambe ya Shadrake, Meshake ná Abedenego, bakokata bango binama,+ mpe bakokómisa ndako na bango kabinɛ ya bato nyonso;+ mpo ezali na nzambe mosusu te oyo akoki kobikisa lokola oyo wana.”+
30 Na ntango yango, mokonzi ye moko asalaki ete makambo ya Shadrake, Meshake ná Abedenego etambola malamu na etúká oyo eyangelami ya Babilone.+