Danyele 2:1-49

2  Mpe na mbula ya mibale ya bokonzi ya Nebukadenezare, Nebukadenezare alɔtaki bandɔtɔ;+ mpe elimo na ye ebandaki kotungisama,+ mpe mpɔngi ekimaki ye.  Bongo mokonzi alobaki bábenga banganga-nzambe ya maji+ mpe bato oyo babelelaka bilimo mpe banganga-nkisi mpe Bakaladea mpo na koyebisa mokonzi bandɔtɔ na ye.+ Mpe bakɔtaki mpe batɛlɛmaki liboso ya mokonzi.  Na nsima, mokonzi alobaki na bango boye: “Nalɔti ndɔtɔ moko, mpe elimo na ngai etungisami mpo nayeba ndɔtɔ yango.”  Na yango, Bakaladea balobaki na mokonzi na monɔkɔ ya Aramɛyɛ+ ete: “Ee mokonzi, zalá na bomoi mpo na ntango oyo etyami ndelo te.+ Yebisá basaleli na yo ndɔtɔ yango, mpe biso tokopesa ndimbola na yango.”+  Mpe mokonzi ayanolaki mpe alobaki na Bakaladea boye: “Ngai nabimisi liloba oyo: Soki bino boyebisi ngai ndɔtɔ yango te, mpe ndimbola na yango te, bakokata bino binama,+ mpe bakokómisa bandako na bino bakabinɛ ya bato nyonso.+  Kasi soki boyebisi ndɔtɔ yango mpe ndimbola na yango, nakopesa bino makabo, libonza ná lokumu mingi.+ Boye bóyebisa ngai ndɔtɔ yango mpe ndimbola na yango.”  Bayanolaki mbala ya mibale mpe balobaki ete: “Mokonzi ayebisa basaleli na ye ndɔtɔ yango, mpe biso tokopesa ndimbola na yango.”  Mokonzi ayanolaki mpe alobaki boye: “Ya solo, nayebi ete bozali koluka kolekisa ntango, mpo bomoni ete nabimisi liloba.  Mpo soki boyebisi ngai ndɔtɔ yango te, bokozwa kaka etumbu wana.+ Kasi boyokani mpo bókosa mpe bólobela ngai lokuta,+ tii ntango makambo ekobongwana. Boye bóyebisa ngai ndɔtɔ yango, mpe ngai nakoyeba ete bokoki kopesa ndimbola na yango.” 10  Bakaladea bayanolaki liboso ya mokonzi, mpe balobaki boye: “Ata moto moko te na mabele akoki koyebisa likambo ya mokonzi, mpo ata mokonzi moko te ya monene to guvɛrnɛrɛ asɛngá nganga-nzambe ya maji to moto oyo abelelaka bilimo to Mokaladea eloko ya boye. 11  Kasi likambo oyo mokonzi azali kosɛnga ezali makasi, mpe moto mosusu te akoki koyebisa yango mokonzi, longola kaka banzambe,+ oyo bafandaka esika moko na bato te.”+ 12  Mpo na yango, mokonzi ayokaki nkanda mpe asilikaki makasi,+ mpe alobaki báboma bato nyonso ya bwanya ya Babilone.+ 13  Mpe etinda yango ebimaki, mpe etikalaki moke bato ya bwanya bábomama; mpe balukaki Danyele ná baninga na ye, mpo bábomama. 14  Na ntango yango, Danyele alobaki na ekɛngɛ mpe na mayele+ na Arioke mokonzi ya basoda oyo bakɛngɛlaka mokonzi, oyo abimaki mpo na koboma bato ya bwanya ya Babilone. 15  Ayanolaki mpe alobaki na Arioke mokonzi ya basoda ya mokonzi ete: “Mpo na nini mokonzi abimisi etinda ya makasi boye?” Na ntango yango nde Arioke ayebisaki Danyele likambo yango.+ 16  Bongo Danyele akɔtaki mpe asɛngaki mokonzi apesa ye ntango kaka mpo apesa mokonzi ndimbola yango.+ 17  Nsima na yango, Danyele akendaki na ndako na ye; mpe ayebisaki baninga na ye Hanania, Mishaele ná Azaria likambo yango, 18  ɛɛ, mpo básɛnga Nzambe ya likoló+ amonisela bango motema mawa+ mpo na sekele yango,+ mpo báboma te Danyele ná baninga na ye elongo na bato mosusu ya bwanya ya Babilone.+ 19  Na ntango yango nde sekele yango emonisamaki epai ya Danyele na emonaneli ya butu.+ Bongo Danyele apambolaki+ Nzambe ya likoló. 20  Danyele ayanolaki mpe alobaki boye: “Nkombo ya Nzambe epambwama+ libela na libela, mpo bwanya ná nguya ezali ya ye.+ 21  Mpe abongolaka bantango mpe bileko,+ alongolaka bakonzi mpe atyaka bakonzi,+ apesaka bwanya epai ya bato ya bwanya mpe boyebi epai ya baoyo bayebi bososoli.+ 22  Amonisaka makambo ya bozindo mpe makambo ebombami,+ ayebaka oyo ezali na molili;+ mpe pole+ efandi esika moko na ye. 23  Ee Nzambe ya bankɔkɔ na ngai, nazali kosanzola mpe kokumisa yo,+ mpamba te opesi ngai bwanya+ mpe nguya. Mpe sikoyo oyebisi ngai eloko oyo tosɛngaki yo, mpo oyebisi biso likambo yango ya mokonzi.”+ 24  Mpo na yango, Danyele akɔtaki epai ya Arioke,+ oyo mokonzi atyaki mpo na koboma bato ya bwanya ya Babilone.+ Akendaki, mpe talá oyo ayebisaki ye: “Koboma bato ya bwanya ya Babilone te. Kɔtisá ngai liboso ya mokonzi,+ mpo napesa mokonzi ndimbola yango.” 25  Na ntango yango, Arioke akɔtisaki Danyele liboso ya mokonzi nokinoki, mpe talá oyo alobaki na ye: “Nazwi mobali moko makasi na kati ya bato ya Yuda oyo bamemamaki awa na mboka mopaya,+ oyo akoki koyebisa mokonzi ndimbola yango.” 26  Mokonzi ayanolaki mpe alobaki na Danyele, oyo nkombo na ye ezalaki Beleteshazare:+ “Okoki mpenza koyebisa ngai ndɔtɔ oyo nalɔtaki, mpe ndimbola na yango?”+ 27  Danyele ayanolaki liboso ya mokonzi mpe alobaki boye: “Sekele oyo mokonzi azali kotuna, bato ya bwanya, bato oyo babelelaka bilimo, banganga-nzambe ya maji mpe banganga-minzoto bakoki koyebisa mokonzi te.+ 28  Nzokande, ezali na Nzambe moko na likoló oyo azali Momonisi ya basekele,+ mpe ayebisi Mokonzi Nebukadenezare makambo oyo ekosalema na eleko ya nsuka ya mikolo.+ Ndɔtɔ na yo mpe bimonaneli ya motó na yo na mbeto na yo— yango oyo: 29  “Ee mokonzi, na mbeto na yo,+ makanisi na yo eyelaki yo mpo na makambo oyo ekosalema nsima, mpe Ye oyo azali Momonisi ya basekele ayebisi yo makambo oyo ekosalema.+ 30  Kasi ngai, ezali te mpo nazali na bwanya moko boye koleka bato mosusu nyonso oyo bazali na bomoi nde bamonisi ngai sekele yango,+ kasi ezali mpo báyebisa mokonzi ndimbola yango mpe mpo oyeba makanisi ya motema na yo.+ 31  “Ee mokonzi, yo ozalaki kotala, mpe talá! ebakata ya ekeko moko boye. Ekeko yango ezalaki monene mpe ezalaki kongɛnga makasi mpenza, etɛlɛmaki liboso na yo, mpe lolenge na yango ezalaki kobangisa mingi. 32  Mpe motó ya ekeko yango ezalaki ya wolo ya malamu,+ ntolo na yango ná mabɔkɔ na yango ezalaki ya palata,+ libumu na yango ná bibɛlɔ na yango ezalaki ya motako,+ 33  makolo na yango ezalaki ya ebende,+ makaka na yango ezalaki ndambo ebende mpe ndambo mabele ya lima oyo bayemi.+ 34  Ozalaki kotala tii libanga moko elongolamaki, na mabɔkɔ te,+ mpe ebɛtaki ekeko yango na makaka na yango ya ebende mpe ya mabele ya lima oyo bayemi mpe ebukaki yango.+ 35  Na ntango yango, ebende, mabele ya lima oyo bayemi, motako, palata ná wolo, yango nyonso ebukanaki mpe ekómaki lokola mposo ya blé ya kokauka oyo euti na esika ya kotutatuta mbuma na eleko ya molunge,+ mpe mopɛpɛ ememaki yango, bongo ata ndambo na yango emonanaki te.+ Mpe libanga oyo ebɛtaki ekeko yango, ekómaki ngomba moko monene mpe etondaki mabele mobimba.+ 36  “Wana nde ndɔtɔ yango, mpe ndimbola na yango, tokoloba liboso ya mokonzi.+ 37  Ee mokonzi, yo mokonzi ya bakonzi, yo moto oyo Nzambe ya likoló apesi bokonzi,+ nguya, makasi ná lokumu, 38  mpe apesi na mabɔkɔ na yo+—ezala esika nini bana ya bato bafandi—banyama ya zamba mpe bikelamu ya likoló oyo ezali na mapapu, mpe akómisi yo moyangeli na yango nyonso, yo nde motó wana ya wolo.+ 39  “Mpe nsima na yo, bokonzi mosusu ekobima,+ oyo ekokokana na oyo ya yo te;+ mpe bokonzi mosusu, ya misato, ya motako, oyo ekoyangela mabele mobimba.+ 40  “Kasi bokonzi ya minei,+ ekozala makasi lokola ebende.+ Mpo ndenge ebende etutaka mpe enikaka eloko mosusu nyonso, ndenge ebende ebukabukaka, yango ekotuta mpe ekobukabuka nyonso wana.+ 41  “Mpe lokola omonaki makaka mpe misapi ya makolo ezali ndambo mabele ya lima ya moyemi-mbɛki, oyo bayemi, mpe ndambo ebende,+ bokonzi yango ekokabwana,+ kasi lokola omonaki ebende esangani na mabele ya lima ya maimai, mwa makasi ya ebende ekozala kati na yango.+ 42  Mpe misapi ya makolo oyo ezali ndambo ebende mpe ndambo mabele ya lima oyo bayemi elakisi ete bokonzi yango ekozala ndambo makasi mpe ekozala ndambo pɛtɛpɛtɛ. 43  Lokola omonaki ebende esangani na mabele ya lima ya maimai, yango ekosangana na bana ya bato; kasi ekokangana te, oyo ná oyo mosusu, kaka ndenge ebende esanganaka te na mabele ya lima oyo bayemi. 44  “Mpe na mikolo ya bakonzi yango,+ Nzambe ya likoló+ akotya bokonzi+ moko oyo ekobebisama te.+ Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te.+ Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso,+ mpe ekotikala seko;+ 45  lokola omonaki libanga moko elongolami na ngomba na mabɔkɔ te,+ mpe etutaki ebende, motako, mabele ya lima oyo bayemi, palata mpe wolo.+ Nzambe Monene+ ye moko ayebisi mokonzi makambo oyo ekosalema nsima na oyo.+ Mpe ndɔtɔ yango ezali solo, mpe ndimbola na yango ebongi kotyelama motema.”+ 46  Na ntango yango Mokonzi Nebukadenezare akweaki elongi na nse, mpe apesaki Danyele lokumu, mpe alobaki bápesa ye likabo mpe mpaka ya malasi.+ 47  Mokonzi ayanolaki Danyele mpe alobaki boye: “Ya solo Nzambe na bino azali Nzambe ya banzambe+ mpe Nkolo ya bakonzi+ mpe Momonisi ya basekele, mpo omonisi sekele oyo.”+ 48  Na yango, mokonzi akómisaki Danyele moto monene,+ mpe apesaki ye makabo minene ebele, mpe akómisaki ye moyangeli ya etúká nyonso oyo eyangelami ya Babilone+ mpe mokonzi ya bakomisɛrɛ akamba bato nyonso ya bwanya ya Babilone. 49  Mpe Danyele asɛngaki mokonzi, mpe mokonzi atyaki Shadrake, Meshake ná Abedenego+ na mosala ya kotambwisa etúká oyo eyangelami ya Babilone, kasi Danyele azalaki na ndako+ ya mokonzi.

Maloba na nse