Danyele 11:1-45

11  “Nzokande, na mbula ya liboso ya Dariuse Momede,+ ngai natɛlɛmaki mpo na kolendisa ye mpe kozala ndako makasi na ye.  Mpe sikoyo, nakoyebisa yo bosolo:+ “Talá! Ekozala lisusu na bakonzi misato oyo bakotɛlɛma na Perse,+ mpe oyo ya minei+ akoyanganisa bomɛngo mingi koleka bamosusu nyonso.+ Mpe ntango kaka akokóma makasi na bomɛngo na ye, akosala ete eloko nyonso etɛmɛla bokonzi ya Grɛsi.+  “Mpe mokonzi moko ya nguya akotɛlɛma mpenza mpe akoyangela na boyangeli moko monene mingi+ mpe akosala ndenge alingi.+  Mpe ntango akotɛlɛma,+ bokonzi na ye ekobukana mpe ekokabwana epai ya mipɛpɛ minei+ ya likoló,+ kasi ekopesama epai ya bana na ye te;+ biyangeli yango ekozala te lokola boyangeli oyo ye ayangelaki; mpamba te bokonzi na ye ekopikolama, ɛɛ, mpo epesama na bato mosusu kasi na baoyo wana te.  “Mpe mokonzi ya sudi akokóma makasi, ɛɛ, moko ya bankumu na ye; mpe akolonga* ye mpe akoyangela mpenza na boyangeli moko monene koleka nguya ya koyangela ya oyo wana.  “Mpe na nsuka ya mwa bambula, bakosala boyokani, mpe mwana mwasi ya mokonzi ya sudi akoya epai ya mokonzi ya nɔrdi mpo na kosala boyokani moko oyo ebongi. Kasi lobɔkɔ ya mwana mwasi yango ekozala lisusu na nguya te;+ mpe mokonzi akotɛlɛma te, lobɔkɔ na ye mpe te; mpe mwana mwasi yango akokabama, ye ná baoyo bayaki na ye, ná moto oyo abotaki ye, mpe moto oyo akómisaki ye makasi na bantango wana.  Mpe ya solo, moto moko oyo auti na mwa nzete ya sika+ oyo ebimi na misisa na ye akotɛlɛma na ebonga na ye, mpe akoyela limpinga ya basoda mpe akoya kobunda na ndako makasi ya mokonzi ya nɔrdi mpe akobunda na bango mpenza mpe akolonga.  Mpe lisusu akoya na Ezipito elongo na banzambe na bango,+ bikeko na bango ya ebende oyo enyangwisami, biloko na bango kitoko ya motako mpe ya wolo, ná bakangami. Mpe ye akotɛlɛma mosika na mokonzi ya nɔrdi na boumeli ya mwa bambula.  “Mpe akokɔta mpenza na bokonzi ya mokonzi ya sudi mpe akozonga na mabele na ye moko. 10  “Kasi bana na ye bakotomboka mpe bakoyanganisa mpenza ebele ya mampinga minene ya basoda. Mpe mpo na koya, akoya mpenza mpe akozindisa lokola mpela mpe akoleka. Kasi akozonga, mpe akotomboka nzelanzela tii na ndako makasi na ye. 11  “Mpe mokonzi ya sudi akosilika mpe akobima mpenza mpe akobunda na ye, elingi koloba, mokonzi ya nɔrdi; mpe ya solo, akotɛlɛmisa ebele mpenza ya bato, mpe ya solo, ebele yango ya bato bakopesama na lobɔkɔ ya oyo wana.+ 12  Mpe ebele ya bato yango bakomemama mpenza. Motema na ye ekomitombola,+ mpe akokweisa mpenza bankóto zomi zomi; kasi akosalela te makasi oyo akokóma na yango. 13  “Mpe ya solo, mokonzi ya nɔrdi akozonga mpe akotya ebele ya bato koleka oyo ya liboso; mpe na nsuka ya bantango, mwa bambula, akoya, ɛɛ, ná limpinga monene ya basoda+ mpe biloko mingi mpenza.+ 14  Mpe na bantango wana, ekozala na bato mingi oyo bakotɛlɛma mpo na kobunda na mokonzi ya sudi. “Mpe bana ya miyibi oyo bazali bato ya ekólo na yo, bango, bakobendama mpo na komeka kokokisa emonaneli;+ mpe bakobɛta mpenza libaku.+ 15  “Mpe mokonzi ya nɔrdi akoya mpe akosala mwa ngomba ya mabele+ mpo na kozinga mpe akozwa mpenza engumba oyo ezali na mapango ya makasi. Kasi mabɔkɔ* ya sudi, ekotɛlɛma te, ezala mpe bato na ye oyo baponamaki; mpe nguya ya kotɛlɛma ekozala te. 16  Mpe moto oyo azali koya kobunda na ye akosala ndenge alingi, mpe moto moko te akotɛlɛma liboso na ye. Mpe akotɛlɛma na mokili Kitoko,+ mpe lobɔkɔ na ye ekozala na nguya ya kosilisa nyɛɛ.+ 17  Mpe akobalola elongi na ye+ mpo aya na makasi ya bokonzi na ye mobimba, mpe bakosala na ye boyokani oyo ebongi;+ akosala mpe akolonga.+ Kasi bakotika ye abebisa mwana mwasi ya basi. Mpe mwana mwasi yango akotɛlɛma te, mpe akozala lisusu mwasi ya mobali yango te.+ 18  Mpe akobalola elongi na ye na mikili ya pembeni ya mbu+ mpe akozwa mpenza ebele. Mpe komanda moko akomisukisela nsɔni oyo euti epai na ye moko, bongo nsɔni na ye ekozala te. Akozongisela yango oyo wana. 19  Mpe akobalola elongi na ye na bandako makasi ya mokili na ye moko, mpe akobɛta mpenza libaku mpe akokwea, mpe akomonana te.+ 20  “Mpe na ebonga na ye,+ moto oyo azali kolekisa mokɔngɔli+ na bokonzi ya nkembo akotɛlɛma, mpe na mwa mikolo, akobukana, kasi na nkanda te mpe na etumba te. 21  “Mpe na ebonga na ye, moto moko ya kotyolama akotɛlɛma,+ mpe ya solo bakopesa ye lokumu ya bokonzi te; mpe akoya mpenza na ntango mitungisi ezali te+ mpe akozwa bokonzi na boboto ya lokuta.+ 22  Mpe mabɔkɔ+ ya mpela ekozindisama mpo na ye, mpe ekobukana;+ Mokambi+ ya kondimana+ mpe akobukana.+ 23  Mpe lokola bakosala boyokani elongo na ye, akokoba kosalela bokosi mpe akomata mpenza mpe akokóma na nguya na nzela ya ekólo moko ya moke.+ 24  Na ntango mitungisi ezali te,+ akokɔta na eteni ya malamu mpenza ya etúká oyo eyangelami mpe akosala mpenza oyo batata na ye mpe batata ya batata na ye basalá te. Akopalanganisa kati na bango biloko oyo epunzami, biloko oyo ebɔtɔlami mpe biloko mosusu; mpe akosala myango+ na ye mpo na kobundisa bisika oyo ebatelami makasi, kasi ekozala kaka mpo na mwa ntango. 25  “Mpe akolamwisa nguya na ye mpe motema na ye mpo na kobunda na mokonzi ya sudi, elongo na limpinga monene ya basoda; mpe mokonzi ya sudi akotomboka mpo na kobunda, akozala na limpinga moko monene mpenza ya basoda ya nguya. Mpe akotɛlɛma te, mpo bakosala myango ya kobunda na ye. 26  Mpe bato oyo bazali kolya biloko na ye ya kitoko bakokweisa ye. “Kasi limpinga na ye ya basoda ekomemama lokola na mpela, mpe mingi bakokwea mpenza, babomami. 27  “Kasi motema ya bakonzi yango mibale ekolinga kosala oyo ezali mabe, mpe bakokoba koloba lokuta+ na mesa moko.+ Kasi eloko moko ekolonga te,+ mpo nsuka ezali naino mpo na ntango oyo etyamá.+ 28  “Mpe akozonga na mokili na ye na biloko ebele, mpe motema na ye ekotɛmɛla kondimana mosantu.+ Akosala mpe akolonga+ mpe ya solo, akozonga na mokili na ye. 29  “Akozonga na ntango oyo etyamá,+ mpe akoya mpenza kobunda na sudi;+ kasi na nsuka ekozala te lokola na ebandeli. 30  Mpe bamasuwa ya Kitime+ ekoya kobunda na ye, mpe akolɛmba nzoto mpenza. “Mpe akozonga mpenza mpe akobimisa makaneli+ ya kotɛmɛla kondimana mosantu+ mpe akosala mpe akolonga; mpe akozonga mpenza mpe akotya likebi na baoyo bazali kotika kondimana mosantu. 31  Mpe mabɔkɔ euti epai na ye ekotɛlɛma; mpe ya solo bakokómisa esika mosantu eloko mpamba,+ ndako makasi, mpe bakolongola mbeka ya ntango nyonso.+ “Mpe bakotya mpenza eloko ya bosɔtɔ+ oyo ezali koyeisa libebi.+ 32  “Mpe baoyo bazali kosalela kondimana+ yango mabe, akomema bango na lipɛngwi+ na maloba sukali.+ Kasi bato oyo bayebi Nzambe na bango,+ bakolonga+ mpe bakosala mpenza. 33  Mpe na kati ya bato, baoyo bazali na mayele ya kososola+ bakopesa bato mingi mayele.+ Mpe bakobɛta mpenza libaku na mopanga mpe na lolemo ya mɔtɔ, na bokangami mpe na kopunzama,+ mpo na mwa mikolo. 34  Kasi ntango bakobɛta libaku, bakosalisama na lisalisi moko ya moke;+ mpe mingi bakosangana mpenza na bango na nzela ya boboto ya lokuta.+ 35  Mpe bamosusu oyo bazali na mayele ya kososola bakobɛta libaku,+ mpo na bango, mosala ya kopɛtola ekosalema mpo na kokómisa pɛto mpe mpo na kokómisa mpɛmbɛ,+ tii na ntango ya nsuka;+ mpo ezali naino mpo na ntango oyo etyamá.+ 36  “Mpe mokonzi yango akosala ndenge ye moko alingi, mpe akomitombola mpe akomitya likoló ya nzambe nyonso;+ mpe akoloba makambo ya kokamwa mpo na kotɛmɛla Nzambe ya banzambe.+ Mpe akolonga mpenza tii makaneli ekokóma na nsuka;+ mpo likambo oyo ekanami esengeli kosalema. 37  Mpe akotyela Nzambe ya batata na ye likebi te; mpe akotyela mposa ya basi mpe nzambe mosusu nyonso likebi te, kasi akomitya likoló ya moto nyonso.+ 38  Kasi na ebonga na ye, akopesa nkembo nde na nzambe ya bandako makasi; mpe na nzambe oyo batata na ye bayebaki te akopesa nkembo na nzela ya wolo mpe na nzela ya palata mpe na nzela ya mabanga ya ntalo mpe na nzela ya biloko kitoko. 39  Mpe akosala mpenza mpo abunda na bisika makasi ya libateli oyo ebatelami malamu koleka, elongo na nzambe ya bapaya. Moto nyonso oyo andimi ye, akotondisa ye na nkembo, mpe akotya bango báyangela na kati ya bato mingi; mpe akokabola mabele mpo na ntalo moko boye. 40  “Mpe na ntango ya nsuka, mokonzi ya sudi+ akotindikana na ye, mpe mokonzi ya nɔrdi akoyela ye elulu na makalo mpe na basoda oyo batambolaka na mpunda mpe na bamasuwa ebele; mpe akokɔta mpenza na mikili mpe akozindisa lokola mpela mpe akoleka. 41  Mpe lisusu akokɔta mpenza+ na mokili Kitoko,+ mpe mikili mingi ekobɛta libaku.+ Kasi talá oyo ekobika na lobɔkɔ na ye: Edome, Moabe+ ná eteni oyo eleki monene ya bana ya Amone. 42  Mpe akokoba kosembola lobɔkɔ na ye mpo na kobunda na mikili; kasi mokili ya Ezipito+ ekobika te. 43  Mpe akoyangela mpenza misolo ya wolo mpe ya palata oyo ebombamá mpe biloko kitoko nyonso ya Ezipito. Mpe bato ya Libi ná bato ya Etiopi bakolanda matambe na ye. 44  “Kasi bansango oyo euti epai moi ebimaka+ mpe na nɔrdi ekobulunganisa ye,+ mpe akobima mpenza na nkanda makasi mpo na kosilisa nyɛɛ mpe kobebisa bato ebele.+ 45  Mpe akopika bahema na ye oyo ezali lokola bandako minene kati na mbu monene mpe ngomba mosantu ya Kitoko;+ mpe akoya tii na nsuka na ye,+ mpe akozala na mosungi te.+

Maloba na nse

“Akolonga,” emonani ete ezali mokonzi ya nɔrdi.
To, “mampinga ya basoda.”