Danyele 10:1-21
10 Na mbula ya misato ya Siruse+ mokonzi ya Perse, likambo moko emonisamaki epai ya Danyele, oyo bazalaki kobenga na nkombo Beleteshazare;+ mpe likambo yango ezalaki solo, mpe etumba monene ezalaki.+ Mpe akangaki ntina ya likambo yango, mpe azwaki mayele ya likambo oyo emonani.+
2 Na mikolo yango, ngai Danyele nalelaki+ pɔsɔ misato mobimba.
3 Nalyaki limpa ya elɛngi te, mpe mosuni to vinyo ekɔtaki na monɔkɔ na ngai te, mpe namipakolaki mafuta ata ndambo te tii pɔsɔ yango misato mobimba ekokaki.+
4 Mpe na mokolo ya ntuku mibale na minei (24) ya sanza ya liboso, ntango nazalaki na bokula ya ebale monene, elingi koloba, Hidekele,+
5 natombolaki mpe miso na ngai mpe namonaki, mpe talá! moto moko boye alati elamba ya lini,+ mpe akangi wolo ya Ufaze+ na loketo na ye.+
6 Mpe nzoto na ye ezalaki lokola krizolite,+ mpe elongi na ye lokola mokalikali,+ mpe miso na ye ezalaki lokola bisungi ya mɔtɔ,+ mpe mabɔkɔ na ye mpe esika ya makolo na ye ezalaki lokola motako oyo bapaloli sɛlisɛli,+ mpe lokito ya maloba na ye ezalaki lokola lokito ya bato ebele.
7 Mpe ngai moko Danyele, namonaki emonaneli yango; kasi bato oyo bazalaki elongo na ngai, bango bamonaki emonaneli yango te.+ Nzokande, kolɛnga moko monene ekwelaki bango, bongo bakimaki komibomba.
8 Mpe ngai—natikalaki ngai moko, bongo namonaki emonaneli oyo monene. Mpe natikalaki lisusu na nguya te, mpe lokumu na ngai ebongwanaki mpe ebebaki, mpe nazalaki na nguya lisusu te.+
9 Mpe nabandaki koyoka lokito ya maloba na ye; mpe wana nazalaki koyoka lokito ya maloba na ye, nalalelaki elongi na ngai, na mpɔngi makasi,+ elongi na nse.+
10 Mpe talá! lobɔkɔ moko esimbaki ngai,+ mpe nsukansuka eningisaki ngai mpo nafukama na mabɔlɔngɔ na ngai mpe na mabɔkɔ na ngai.
11 Mpe alobaki na ngai boye:
“Ee Danyele, yo moto oyo alingami mingi,+ zwá mayele na maloba oyo nazali koyebisa yo,+ mpe tɛlɛmá esika ozalaki kotɛlɛma, mpo sikoyo natindami epai na yo.”
Mpe ntango alobaki na ngai liloba oyo, natɛlɛmaki, nazali kolɛnga.
12 Mpe alobaki na ngai lisusu boye: “Kobanga te,+ Ee Danyele, mpo banda mokolo ya liboso oyo otyaki motema na yo mpo ozwa mayele+ mpe omikitisa liboso ya Nzambe na yo,+ maloba na yo eyokamaki, mpe ngai nayei mpo na maloba na yo.+
13 Kasi nkumu+ ya bokonzi ya Perse+ atɛlɛmaki mpo na kobunda+ na ngai mikolo ntuku mibale na moko (21), mpe talá! Mikaele,+ moko ya bankumu minene,+ ayaki kosalisa ngai; mpe ngai natikalaki kuna pene na bakonzi ya Perse.+
14 Mpe nayei kosalisa yo ososola makambo oyo ekokómela bato ya ekólo na yo+ na eleko ya nsuka ya mikolo,+ mpamba te ezali emonaneli moko+ oyo ezali naino mpo na mikolo oyo ekoya.”+
15 Sikoyo, ntango alobaki na ngai maloba ya ndenge wana, natyaki elongi na ngai na nse+ mpe nazangaki likambo ya koloba.
16 Mpe talá! moto moko oyo akokani na bana ya bato azalaki kosimba mbɛbu na ngai,+ mpe nabandaki kofungola monɔkɔ na ngai mpe koloba+ mpe nalobaki na moto oyo atɛlɛmaki liboso na ngai ete: “Ee Nkolo na ngai,+ natutukaki pwasa mpo na emonaneli wana, mpe nazalaki lisusu na nguya ata moke te.+
17 Bongo ndenge nini mosaleli ya nkolo na ngai akokaki koloba na nkolo na ngai?+ Kasi ngai, tii sikoyo nazali na nguya te, mpe natikali na mpema ata moke te.”+
18 Mpe ye oyo azalaki komonana lokola moto ya mabele asimbaki ngai lisusu mpe apesaki ngai makasi.+
19 Bongo alobaki boye: “Ee moto oyo alingami mingi,+ kobanga te.+ Ozala na kimya.+ Zalá makasi, ɛɛ, zalá makasi.”+ Mpe ntango kaka alobaki na ngai, nasalaki makasi mpe nsukansuka nalobaki: “Nkolo na ngai aloba,+ mpo opesi ngai makasi.”+
20 Bongo alobaki na ngai lisusu boye:
“Oyebi mpenza mpo na nini nayei epai na yo? Mpe sikoyo nakozonga kobunda na nkumu ya Perse.+ Awa nazali kobima, talá! nkumu ya Grɛsi mpe azali koya.+
21 Nzokande, nakoyebisa yo makambo oyo ekomami na mokanda ya solo,+ mpe moto mosusu te azali kosimba ngai makasi na makambo oyo, longola kaka Mikaele,+ nkumu ya bato ya ekólo na yo.+