Danyele 1:1-21

1  Na mbula ya misato ya bokonzi ya Yehoyakime+ mokonzi ya Yuda, Nebukadenezare mokonzi ya Babilone ayaki na Yerusaleme mpe azingaki yango.+  Na nsima, Yehova akabaki Yehoyakime mokonzi ya Yuda+ ná ndambo ya bisaleli+ ya ndako ya Nzambe ya solo na lobɔkɔ na ye, bongo amemaki yango na mokili ya Shineare+ na ndako ya nzambe na ye; mpe amemaki bisaleli yango na ndako ya kobomba biloko ya motuya ya nzambe na ye.+  Bongo mokonzi alobaki na Ashepenaze kapita monene ya ndako ya mokonzi+ ete amema bana mosusu ya Yisraele mpe ya libota ya mokonzi mpe ya bankumu,+  bana oyo bazalaki na mbeba ata moko te,+ kasi oyo bazalaki kitoko mingi mpe oyo bazalaki na mayele ya kososola makambo nyonso ya bwanya,+ mpe baoyo bazalaki na boyebi mpenza, mpe baoyo bazalaki na bososoli ya makambo oyo eyebani,+ baoyo bakokaki mpe kotɛlɛma na ndako ya mokonzi;+ mpe ateya bango ekomeli* mpe monɔkɔ ya Bakaladea.  Lisusu, mokonzi akatelaki bango pɔsɔ ya mokolo na mokolo oyo euti na bilei kitoko+ ya mokonzi mpe na vinyo na ye oyo azalaki komɛla, ɛɛ, mpo bábɔkɔla bango mbula misato, mpe na nsuka na yango, bátɛlɛma liboso ya mokonzi.  Nzokande na kati na bango, ezalaki na bana mosusu ya Yuda: Danyele,+ Hanania, Mishaele ná Azaria.+  Mpe kapita ya bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi apesaki bango bankombo mosusu.+ Bongo apesaki Danyele nkombo Beleteshazare;+ mpe Hanania, Shadrake; mpe Mishaele, Meshake; mpe Azaria, Abedenego.+  Kasi Danyele akanaki na motema na ye ete amikómisa mbindo te+ na bilei kitoko ya mokonzi mpe na vinyo na ye oyo azalaki komɛla. Mpe azalaki kosɛnga kapita ya bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi ete atika ye mpo amikómisa mbindo te.+  Bongo Nzambe ya solo asalaki ete kapita ya bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi amonisela Danyele motema boboto mpe ayokela ye mawa.+ 10  Yango wana kapita ya bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi alobaki na Danyele boye: “Nazali kobanga nkolo na ngai mokonzi oyo akateli bino bilei na bino mpe masanga na bino.+ Bongo mpo na nini amona bilongi na bino elɛmbilɛmbi ntango akokokanisa yango na bana oyo bazali mbula moko na bino, mpe mpo na nini bómemisa motó na ngai ngambo epai ya mokonzi?” 11  Kasi Danyele alobaki na mokɛngɛli oyo kapita ya bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi+ atyelaki Danyele, Hanania, Mishaele ná Azaria ete: 12  “Nabondeli yo, meká basaleli na yo mikolo zomi, mpe bápesa biso ndunda+ tólya mpe mai tómɛla; 13  mpe bilongi na biso ná elongi ya bana oyo bazali kolya bilei kitoko ya mokonzi ebima liboso na yo, mpe salá basaleli na yo ndenge okomona.” 14  Nsukansuka, ayokelaki bango na likambo yango mpe amekaki bango mikolo zomi. 15  Mpe na nsuka ya mikolo zomi, bilongi na bango emonanaki malamu mpe mafutamafuta koleka bana nyonso oyo bazalaki kolya bilei kitoko ya mokonzi.+ 16  Yango wana, mokɛngɛli yango azalaki kolongola bilei na bango ya kitoko mpe vinyo na bango ya komɛla mpe azalaki kopesa bango ndunda.+ 17  Mpe mpo na bana yango, bango minei, Nzambe ya solo apesaki bango boyebi, mayele ya kososola mikanda nyonso ná bwanya;+ mpe Danyele azalaki na mayele na bimonaneli ná bandɔtɔ ya ndenge nyonso.+ 18  Mpe na nsuka ya mikolo oyo mokonzi alobaki ete bákɔtisa bango,+ kapita ya bato oyo basalaka na ndako ya mokonzi akɔtisaki mpe bango liboso ya Nebukadenezare. 19  Mpe mokonzi abandaki kosolola na bango, mpe na kati na bango nyonso, ata moko te amonanaki lokola Danyele, Hanania, Mishaele ná Azaria;+ mpe bakobaki kotɛlɛma liboso ya mokonzi.+ 20  Mpe likambo nyonso ya bwanya mpe ya mayele+ oyo mokonzi azalaki kotuna bango, amonaki ete bango baleki mbala zomi banganga-nzambe nyonso ya maji+ mpe bato oyo babelelaka bilimo+ oyo bazalaki na bokonzi na ye mobimba. 21  Mpe Danyele atikalaki tii na mbula ya liboso ya mokonzi Siruse.+

Maloba na nse

To, “mikanda.”