Bileli 5:1-22
5 Kanisá, Ee Yehova, makambo oyo ekómeli biso.+ Talá mpe moná nsɔni na biso.+
2 Libula na biso epesami na mabɔkɔ ya bapaya, bandako na biso na mabɔkɔ ya bato ya mboka mosusu.+
3 Tokómi bitike, tozangi tata.+ Bamama na biso bazali lokola basi oyo mibali bakufá.+
4 Tokómi kopesa mbongo mpo na komɛla mai na biso moko.+ Tokómi kopesa mbongo mpo na kozwa nkoni na biso moko.
5 Balandi biso, bakómaki mpenza pene ya kokanga nkingo na biso.+ Tolɛmbi. Batikeli biso ntango ya kopema te.+
6 Topesi lobɔkɔ+ na Ezipito;+ na Asiri,+ mpo tótonda na limpa.
7 Bankɔkɔ na biso nde basalaki masumu.+ Bazali lisusu te. Kasi biso, tokómi komema mabunga na bango.+
8 Basaleli mpamba bayangeli biso.+ Moto ya kolongola biso na lobɔkɔ na bango azali te.+
9 Tozali kotya molimo na biso na likama mpo na koya na limpa na biso,+ mpo na mopanga ya esobe.
10 Loposo na biso ekómi mɔtɔ lokola litumbu, mpo na mpasi ya nzala.+
11 Basambwisi basi na Siona,+ bangɔndɔ na bingumba ya Yuda.
12 Bankumu bakakisami na lobɔkɔ na bango kaka moko.+ Ata bilongi ya mibange, bapesi yango lokumu te.+
13 Bilenge mibali batomboli enikelo ya mabɔkɔ,+ bana mibali babɛti libaku na nse ya nkoni.+
14 Mibange batiki kofanda na porte,+ bilenge mibali batiki kobɛta bibɛtɛlo na bango ya miziki.+
15 Nsai ya motema na biso esilaki. Kobina na biso ebongwanaki mawa.+
16 Motole ya motó na biso ekwei.+ Mawa na biso sikoyo, mpo tosali lisumu!+
17 Mpo na yango, motema na biso ekómi na maladi.+ Mpo na makambo yango, miso na biso ekómi molili,+
18 Mpo na ngomba ya Siona oyo etikali mpamba;+ bagambala etamboli kuna.+
19 Nde yo, Ee Yehova, okofanda mpo na seko.+ Kiti na yo ya bokonzi ezali mpo na libota na libota.+
20 Mpo na nini obosani biso libela,+ otiki biso mikolo ebele boye?+
21 Zongisá biso+ epai na yo, Ee Yehova, mpe tokozonga noki. Yelá biso mikolo ya sika lokola na ntango ya kala.+
22 Kasi obwaki biso mpenza.+ Osilikeli biso mingi mpenza.+