Basambisi 13:1-25

13  Mpe bana ya Yisraele babandaki lisusu kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova,+ bongo Yehova apesaki bango na lobɔkɔ ya Bafilistia+ mbula ntuku minei (40).  Na ntango yango, ezalaki na mobali moko ya Zora,+ ya libota ya Badani,+ mpe nkombo na ye Manoa.+ Mwasi na ye azalaki ekomba mpe abotaki ata mwana moko te.+  Na nsima, anzelu ya Yehova abimelaki mwasi+ yango mpe alobaki na ye boye: “Talá, sikoyo, ozali ekomba mpe oboti ata mwana moko te. Mpe, ya solo mpenza, okozwa zemi mpe okobota mwana mobali.+  Kasi, nabondeli yo, okeba; komɛla vinyo te to mpe masanga oyo elangwisaka,+ mpe kolya eloko ata moko te ya mbindo.+  Mpo, talá! okozwa zemi, mpe okobota mpenza mwana mobali, mpe razware esengeli koleka na motó na ye te,+ mpo mwana yango akozala Monaziri*+ ya Nzambe, banda na ntango oyo akobima na libumu;+ mpe ye nde akobanda kobikisa Yisraele na lobɔkɔ ya Bafilistia.”+  Na nsima, mwasi yango akendaki koloba na mobali na ye boye: “Moto moko ya Nzambe ya solo ayaki epai na ngai, mpe lolenge na ye ezalaki lokola oyo ya anzelu ya Nzambe ya solo,+ nsɔmɔ mpenza.+ Mpe natunaki ye te soki autaki wapi, mpe ayebisaki ngai nkombo na ye te.+  Kasi ye alobaki na ngai ete: ‘Talá! Okozwa zemi, mpe okobota mpenza mwana mobali.+ Kasi komɛla vinyo te to mpe masanga oyo elangwisaka, mpe kolya eloko moko te ya mbindo, mpo mwana yango akozala Monaziri ya Nzambe, banda ntango oyo akobima na libumu tii na mokolo ya liwa na ye.’”+  Bongo Manoa abandaki kobondela Yehova mpe koloba boye: “Limbisá ngai, Yehova.+ Nabondeli yo, tiká moto ya Nzambe ya solo oyo outi kotinda aya lisusu epai na biso mpe alakisa+ biso nini tosengeli kosalela mwana oyo akobotama.”+  Na yango, Nzambe ya solo ayokaki mongongo ya Manoa,+ mpe anzelu ya Nzambe ya solo ayaki lisusu epai ya mwasi yango ntango afandaki na elanga, mpe mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te. 10  Na mbala moko, mwasi yango akendaki nokinoki, apotaki mbangu koyebisa mobali na ye+ mpe alobaki na ye boye: “Talá! Mobali oyo ayaki mokolo wana epai na ngai abimeli ngai.”+ 11  Na yango, Manoa atɛlɛmaki mpe akendaki elongo na mwasi na ye mpe akómaki epai ya mobali yango mpe alobaki na ye boye: “Yo nde mobali oyo asololaki na mwasi oyo?”+ Na yango, ye alobaki ete: “Ezali ngai.” 12  Bongo Manoa alobaki: “Sikoyo, tiká maloba na yo ekokisama. Bomoi ya mwana yango ekozala ndenge nini mpe mosala na ye ekozala nini?”+ 13  Bongo anzelu ya Yehova alobaki na Manoa boye: “Mwasi oyo, asengeli kokeba na makambo nyonso oyo nalobaki na ye.+ 14  Asengeli kolya eloko moko te oyo euti na nzete ya vinyo, amɛla mpe vinyo te to masanga oyo elangwisaka,+ mpe alya eloko moko te ya mbindo, ata ya ndenge nini.+ Makambo nyonso oyo napesaki ye mitindo, atosa yango.”+ 15  Bongo Manoa alobaki na anzelu ya Yehova boye: “Nabondeli yo, tiká tózelisa yo mwa moke mpe tóbongisa mwana ya ntaba mpe tótya yango liboso na yo.”+ 16  Kasi anzelu ya Yehova alobaki na Manoa boye: “Soki ozelisi ngai, nakolya limpa na yo te; kasi soki okopesa Yehova likabo ya kotumba,+ okoki kopesa yango.” Mpo Manoa ayebaki te ete ye azalaki anzelu ya Yehova. 17  Na nsima, Manoa alobaki na anzelu ya Yehova boye: “Nkombo na yo nani,+ mpo tókumisa yo mpenza ntango liloba na yo ekokokisama?” 18  Nde anzelu ya Yehova alobaki na ye boye: “Mpo na nini ozali kotuna nkombo na ngai, awa yango ezali nkombo moko ya kokamwa?” 19  Bongo Manoa azwaki mwana ya ntaba mpe likabo ya mbuma mpe akabaki yango mbeka epai ya Yehova likoló ya libanga.+ Mpe Ye azalaki kosala likambo moko ya kokamwa wana Manoa ná mwasi na ye bazalaki kotala. 20  Bongo esalemaki boye: ntango lolemo ya mɔtɔ eutaki na etumbelo emati likoló, anzelu ya Yehova amataki na kati ya lolemo yango ya mɔtɔ ya etumbelo wana Manoa ná mwasi na ye bazalaki kotala.+ Na mbala moko, bakweaki na mabele, bilongi na nse.+ 21  Kasi anzelu ya Yehova abimelaki Manoa ná mwasi na ye lisusu te. Na ntango yango nde Manoa ayebaki ete ezalaki anzelu ya Yehova.+ 22  Na yango, Manoa alobaki na mwasi na ye ete: “Tokokufa mpenza,+ mpamba te oyo tomoni ezali Nzambe.”+ 23  Kasi mwasi na ye alobaki na ye boye: “Soki Yehova asepelaki nde koboma biso, mbɛlɛ andimaki te likabo ya kotumba mpe likabo ya mbuma oyo euti na lobɔkɔ na biso,+ mpe alingaki te kolakisa biso makambo oyo nyonso, mpe alingaki te kotika biso tóyoka likambo ya boye ndenge asali yango sikoyo.”+ 24  Na nsima, mwasi yango abotaki mwana mobali mpe apesaki ye nkombo Samsone;+ mpe mwana yango azalaki se kokola, mpe Yehova azalaki ntango nyonso kopambola ye.+ 25  Na nsima, elimo ya Yehova+ ebandaki kotinda ye, na Mahane-dani,+ kati na Zora+ mpe Eshetaole.+

Maloba na nse

Elimboli, “moto oyo amipesi na Nzambe; moto oyo atyami pembeni.”