Baroma 9:1-33

9  Nazali koloba solo+ na kati ya Kristo; nazali kokosa te,+ mpo lisosoli na ngai ezali kotatola elongo na ngai na elimo santu:  nazali na mawa monene mpe na mpasi oyo ezali kosila te na motema na ngai.+  Mpo nakolinga kutu ete ngai moko, moto nalakelami mabe, nakabwana na Kristo mpo na bandeko na ngai,+ bato ya ekólo na ngai,+  Bayisraele,+ baoyo Nzambe akamataki mpe akómisaki bana na ye+ mpe baoyo nkembo,+ ná kondimana,+ ná likabo ya Mibeko,+ ná mosala mosantu,+ ná bilaka+ ezali ya bango;  baoyo bankɔkɔ+ bazali bankɔkɔ na bango mpe baoyo Kristo abotamaki mwana na bango:+ Nzambe,+ oyo azali likoló ya nyonso, apambwama libela na libela. Amen.  Nzokande, elingi koloba te ete liloba ya Nzambe elongaki te.+ Mpo ezali te bato nyonso oyo bazali kobotama na Yisraele nde bazali mpenzampenza Bayisraele.+  Ezali mpe te mpo bango bazali momboto ya Abrahama nde bango nyonso bazali bana na ye,+ kasi: “Oyo ekobengama ‘momboto na yo’ ekoya na nzela ya Yisaka.”+  Elingi koloba, bana ya libota ya Abrahama+ bazali mpenza bana ya Nzambe te,+ kasi bana ya elaka+ nde batángami momboto yango.  Mpo liloba ya elaka ezalaki boye: “Nakoya na ntango lokola oyo mpe Sara akozala na mwana mobali.”+ 10  Nzokande elaka esukaki kaka wana te, kasi epesamaki lisusu ntango Rebeka azwaki zemi ya mapasa+ na mobali kaka moko wana, Yisaka nkɔkɔ na biso: 11  mpo ntango babotamaki naino te mpe basalaki naino likambo ata moko te ya malamu to ya mabe,+ mpo mokano ya Nzambe ya kopona ekoba kotalela misala te, kasi nde Moto oyo abengaka,+ 12  balobaki na ye ete: “Mokóló akozala moombo ya leki.”+ 13  Kaka ndenge ekomamá ete: “Nalingaki Yakobo, kasi nayinaki Esau.”+ 14  Bongo tokoloba nini? Nzambe azangi nde bosembo?+ Te, ata moke te! 15  Mpo azali koloba na Moize ete: “Nakoyokela mawa moto oyo nakoyokela mawa, mpe nakomonisela motema mawa moto oyo nakomonisela motema mawa.”+ 16  Yango wana, ezali kotalela te moto oyo alingi to moto oyo azali kopota mbangu, kasi nde Nzambe,+ oyo azali na motema mawa.+ 17  Mpo Likomami elobi na Farao ete: “Natiki yo ozala mpo na ntina oyo mpenza: mpo na nzela na yo nalakisa nguya na ngai, mpe mpo nkombo na ngai esakolama na mabele mobimba.”+ 18  Yango wana, moto oyo ye alingi koyokela mawa akoyokela ye mawa,+ kasi moto oyo ye alingi kotika ete akóma motó makasi akotika ye akóma motó makasi.+ 19  Bongo okoloba na ngai ete: “Mpo na nini azali naino kopamela* bato? Mpo nani atɛmɛlá mokano na ye oyo emonisami polele?”+ 20  Ee moto,+ bongo yo nani mpo ofungolela Nzambe monɔkɔ?+ Eloko oyo bayemi ekoki nde koloba na moto oyo ayemaki yango ete: “Mpo na nini osali ngai boye?”+ 21  Nini? Moyemi-mbɛki+ azali nde na bokonzi te likoló ya mabele ya lima mpo na kosala na mabele wana kaka moko mbɛki moko mpo na mosala ya lokumu, mosusu mpo na mosala ya lokumu te?+ 22  Nzokande, soki Nzambe, atako alingi komonisa nkanda na ye mpe kolakisa nguya na ye, akangelaki bambɛki ya nkanda oyo ebongi na libebi motema mingi,+ 23  mpo alakisa bonene+ ya nkembo na ye na bambɛki+ ya motema mawa, oyo abongisaki liboso mpo na nkembo,+ 24  elingi koloba, biso, bato oyo ye abengaki na kati ya Bayuda kaka te kasi mpe na kati ya bikólo,+ bongo tóloba lisusu nini? 25  Ezali ndenge alobi yango mpe na Hosea: “Baoyo bazalaki bato na ngai te+ nakobenga bango ‘bato na ngai,’ mpe mwasi oyo azalaki mwasi na ngai ya bolingo te nakobenga ye ‘mwasi na ngai ya bolingo’;+ 26  mpe na esika oyo balobaki na bango ete: ‘Bozali bato na ngai te,’ kuna bakobenga bango ‘bana ya Nzambe ya bomoi.’”+ 27  Lisusu, Yisaya azali koganga mpo na Yisraele ete: “Ata soki motángo ya bana ya Yisraele ezali lokola zɛlo ya mbu,+ bato oyo batikali nde bakobika.+ 28  Mpo Yehova akosɛnga mabele ezongisa monɔkɔ, akosala yango mpenza nokinoki.”+ 29  Lisusu, kaka ndenge Yisaya alobaki yango kala: “Soki Yehova ya mampinga+ atikelaka biso momboto te, mbɛlɛ tokómi lokola Sodoma, mpe mbɛlɛ tokokani na Gomora.”+ 30  Bongo tokoloba nini? Ete bato ya bikólo, atako bazalaki kolanda boyengebene te, bazwaki boyengebene,+ boyengebene oyo euti na kondima;+ 31  kasi atako Yisraele azalaki kolanda mobeko moko ya boyengebene, akokisaki mobeko yango te.+ 32  Mpo na nini? Mpo alandaki yango, na kondima te, kasi nde na misala.+ Babɛtaki libaku na “libanga ya kobɛta libaku”;+ 33  ndenge ekomamá ete: “Talá! Nazali kotya na Siona libanga+ ya kobɛta libaku mpe libanga oyo ekweisaka,+ kasi moto oyo andimeli yango akoyoka nsɔni te.”+

Maloba na nse

To, “koluka mabunga.”