Baroma 7:1-25
7 Bandeko, ekoki nde kozala ete boyebi te, (mpo nazali koloba na baoyo bayebi mibeko,) ete Mibeko ezali na bokonzi likoló ya moto na ntango azali na bomoi?+
2 Na ndakisa, mwasi oyo abalá akangani na mobali na ye na mobeko ntango mobali yango azali na bomoi; kasi soki mobali na ye akufi, alongwe na mobeko ya mobali na ye.+
3 Yango wana, ntango mobali na ye azali na bomoi, soki akómi mwasi ya mobali mosusu, bakobenga ye mwasi ya ekobo.+ Kasi soki mobali na ye akufi, alongwe na mobeko na ye, yango wana soki akómi mwasi ya mobali mosusu, azali mwasi ya ekobo te.+
4 Bongo bandeko na ngai, na kotalela Mibeko,+ bino mpe bokufaki na nzela ya mbeka ya nzoto ya Kristo, mpo bókóma bato ya moto mosusu,+ ya moto oyo alamwisamaki uta na bakufi,+ mpo tóbotela Nzambe mbuma.+
5 Mpo ntango tozalaki kolanda bamposa ya nzoto,+ bamposa ya masumu oyo elamwisamaki na Mibeko ezalaki kosala mosala na binama na biso mpo tóbota mbuma ya liwa.+
6 Kasi sikoyo tolongwe na Mibeko,+ mpo tokufi+ na kotalela eloko oyo ezalaki kokanga biso makasi, mpo tózala baombo+ na ndenge ya sika na elimo,+ kasi na ndenge ya kala te na mibeko oyo ekomami.+
7 Bongo tokoloba nini? Mibeko ezali nde lisumu?+ Te, ata moke te! Ya solo mpenza mbɛlɛ nayebi lisumu te+ soki Mibeko ezalaka te; mpe, na ndakisa, mbɛlɛ nayebi bilulela+ te soki Mibeko elobaka te ete: “Osengeli kolula eloko ya moto te.”+
8 Kasi mobeko epesaki lisumu nzela+ ya kobota na motema na ngai bilulela ya ndenge nyonso, mpo soki mibeko ezalaka te mbɛlɛ lisumu ekufá.+
9 Ya solo, kala nazalaki na bomoi liboso mibeko eya;+ kasi ntango mobeko eyaki,+ lisumu ezongaki lisusu na bomoi, kasi ngai nakufaki.+
10 Mpe mobeko oyo ezalaki mpo na bomoi,+ ngai namonaki yango ete ezali mpo na liwa.+
11 Mpo mobeko epesaki lisumu nzela, bongo yango ebendaki+ ngai mpe ebomaki ngai na nzela ya mobeko yango.
12 Yango wana, Mibeko yango moko ezali mosantu,+ mpe mobeko wana ezali mosantu mpe ya boyengebene+ mpe malamu.+
13 Bongo eloko oyo ezali malamu ekómelaki ngai nde liwa? Te, ata moke te! Kasi lisumu, mpo emonana ete ezali lisumu, ebotelaki ngai liwa na nzela ya eloko oyo ezali malamu;+ mpo, na nzela ya mobeko, lisumu ekóma eloko ya masumu lisusu koleka.+
14 Mpo toyebi ete Mibeko ezali eloko ya elimo;+ kasi ngai nazali na nzoto ya mosuni, natɛkamá mpo nazala moombo ya lisumu.+
15 Mpo oyo nasalaka nayebi yango te. Mpo oyo nalingi, nasalaka yango te; kasi oyo nayini yango nde nasalaka.
16 Nzokande, soki oyo nalingi te yango nde nasalaka,+ nandimi ete Mibeko eleki malamu.+
17 Kasi sikoyo oyo asalaka yango ezali lisusu ngai te, kasi nde lisumu oyo efandi na kati na ngai.+
18 Mpo nayebi ete na kati na ngai, elingi koloba, na nzoto na ngai, eloko moko ya malamu efandi kuna te;+ mpo nazalaka na likoki ya kolinga+ oyo eleki malamu, kasi nakokaka kosala+ yango te.
19 Mpo malamu oyo nalingi nasalaka yango te,+ kasi mabe oyo nalingi te yango nde nasalaka.
20 Nzokande, soki oyo nalingi te yango nde nasalaka, wana ezali lisusu ngai te moto nazali kosala yango, kasi lisumu oyo efandi na kati na ngai.+
21 Yango wana, namoni mobeko oyo epai na ngai: ntango nalingi kosala oyo ezali malamu,+ oyo ezali mabe nde ezali epai na ngai.+
22 Na motema+ na ngai, nasepelaka+ mpenza na mobeko ya Nzambe,
23 kasi nazali komona na binama+ na ngai mobeko mosusu oyo ezali kobunda etumba+ na mobeko ya makanisi+ na ngai mpe oyo ezali komema ngai mokangami epai ya mobeko ya lisumu+ oyo ezali na binama na ngai.
24 Ngai moto ya mawa! Nani akobikisa ngai na nzoto oyo ezali komema ngai na liwa?+
25 Nzambe azwa matɔndi na nzela ya Yesu Kristo Nkolo na biso!+ Yango wana, na makanisi na ngai nazali moombo ya mobeko ya Nzambe,+ kasi na nzoto na ngai nazali moombo ya mobeko ya lisumu.+