Baroma 6:1-23
6 Bongo tokoloba nini? Tokokoba nde kosala lisumu, mpo boboto monene emonisama mingi?+
2 Te, ata moke te! Lokola tokufaki na makambo ya lisumu,+ tokokoba lisusu kofanda na yango ndenge nini?+
3 To boyebi te ete biso nyonso oyo tobatisamaki na Kristo Yesu+ tobatisamaki na kati ya liwa na ye?+
4 Yango wana, tokundamaki+ elongo na ye na batisimo na biso na kati ya liwa na ye, mpo kaka ndenge Kristo alamwisamaki uta na bakufi na nguya ya nkembo ya Tata,+ biso mpe tózala na bomoi ya sika.+
5 Mpo soki tosangani na ye ntango tokufi liwa lokola oyo ya ye,+ ezali solo ete tokosangana mpe na ye ntango tokosekwa na lisekwa lokola oyo ya ye;+
6 mpo toyebi ete bomoto na biso ya kala ebakamaki na nzete elongo na ye,+ mpo nzoto na biso ya masumu esala lisusu eloko te,+ mpo biso tózala lisusu baombo ya lisumu te.+
7 Mpo moto oyo akufi afuti nyongo ya lisumu na ye.+
8 Lisusu, soki tokufi elongo na Kristo, tondimi ete tokozala mpe na bomoi elongo na ye.+
9 Mpo sikoyo toyebi ete Kristo alamwisami uta na bakufi,+ akokufa lisusu te;+ liwa ezali lisusu na bokonzi likoló na ye te.
10 Mpo liwa oyo ye akufaki, akufaki mpo na kolongola lisumu mbala moko mpo na libela;+ kasi bomoi oyo ye azali na yango, azali na yango mpo na Nzambe.+
11 Ndenge moko mpe bino: bómimona ete bozali solo bakufi+ na makambo ya lisumu kasi bato ya bomoi+ mpo na Nzambe na nzela ya Kristo Yesu.
12 Yango wana, bótika te ete lisumu eyangela+ nzoto na bino oyo ekufaka mpo bótosa bamposa+ na yango.
13 Bókoba mpe kopesa lisumu binama na bino te+ mpo ezala bibundeli ya kozanga boyengebene,+ kasi bómipesa nde na Nzambe mpo bózala bato oyo bakufaki mpe sikoyo bozali na bomoi,+ mpe bópesa Nzambe binama na bino mpo ezala bibundeli+ ya boyengebene.
14 Mpo lisumu esengeli te kozala na bokonzi likoló na bino, mpo bozali na nse ya mibeko te+ kasi nde na nse ya boboto monene.+
15 Tóloba nini mpo na kosukisa? Tokosala nde lisumu mpo tozali na nse ya mibeko te+ kasi na nse ya boboto monene?+ Te, ata moke te!
16 Boyebi te ete soki bozali kokoba komipesa na moto moko bózala baombo mpo na kotosa ye, bozali baombo na ye na ndenge bozali kotosa ye,+ baombo ya lisumu+ mpo na kokufa+ to baombo ya botosi+ mpo na kozwa boyengebene?+
17 Kasi Nzambe azwa matɔndi mpo bozalaki baombo ya lisumu kasi bokómaki kotosa na motema mateya oyo bapesaki bino.+
18 Ɛɛ, lokola bosikolamaki+ na lisumu, bokómi baombo+ ya boyengebene.+
19 Nazali koloba na maloba ya bomoto mpo na bolɛmbu ya nzoto na bino:+ mpo kaka ndenge bopesaki binama+ na bino ezala baombo ya mbindo+ ná kobuka mibeko mpo ebuka mibeko, sikoyo mpe bópesa binama na bino ezala baombo ya boyengebene mpo esala makambo ya bosantu.+
20 Mpo ntango bozalaki baombo ya lisumu,+ boyengebene ezalaki nkolo na bino te.
21 Bongo mbuma+ nini bozwaki na ntango wana? Makambo+ oyo bozali sikoyo koyokela nsɔni. Mpo nsuka ya makambo wana ezali liwa.+
22 Nzokande, sikoyo, lokola bosikolamaki na lisumu kasi bokómi baombo ya Nzambe,+ mbuma+ na bino ezali bomoi na bino ya bosantu, mpe na nsuka: bomoi ya seko.+
23 Mpo lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa,+ kasi likabo+ oyo Nzambe azali kopesa ezali bomoi ya seko+ na nzela ya Kristo Yesu Nkolo na biso.+