Baroma 2:1-29
2 Yango wana, Ee moto,+ ozala nani to nani, ozali kutu na likambo ya koloba te soki osambisaka;+ mpo, na likambo oyo ozali kosambisa moto mosusu, yo moko ozali komikweisa na yango, mpo yo moto ozali kosambisa+ osalaka mpe makambo yango.+
2 Sikoyo toyebi ete Nzambe asambisaka bato oyo basalaka makambo wana, mpe lisambisi ya Nzambe elandaka bosolo.+
3 Kasi Ee moto,+ okanisi ete okokima lisambisi ya Nzambe ntango ozali kosambisa bato oyo basalaka makambo wana nzokande yo moko ozali kosala yango?+
4 To ozali nde kotyola bonene ya boboto+ na ye mpe ya ezaleli na ye ya kokanga motema+ mpe ya motema molai+ na ye, mpo oyebi te ete boboto ya Nzambe elingi komema yo obongola motema?+
5 Kasi lokola ozali motema makasi+ mpe oboyi kobongola motema,+ ozali nde komibendela nkanda+ na mokolo ya nkanda+ mpe Nzambe akomonisa+ nkanda yango na mokolo oyo akosambisa na boyengebene.+
6 Mpe akozongisela moto na moto na kolanda misala na ye:+
7 bomoi ya seko epai ya baoyo bazali koluka nkembo, lokumu ná nzoto oyo epɔlaka te+ na ndenge bazali koyika mpiko na misala malamu;
8 nzokande, bato oyo balingaka koswana+ mpe oyo batosaka solo te+ kasi batosaka nde makambo ya kozanga boyengebene bakozwa nkɛlɛ ná nkanda,+
9 bolɔzi ná mpasi, yango ekoyela molimo ya moto nyonso oyo asalaka oyo ezali mabe, Moyuda+ liboso mpe lisusu Mogrɛki;+
10 kasi nkembo, lokumu ná kimya epai ya moto nyonso oyo asalaka oyo ezali malamu,+ Moyuda liboso+ mpe lisusu Mogrɛki.+
11 Mpo Nzambe aponaka bilongi te.+
12 Na ndakisa, baoyo nyonso bazalaki na mibeko te kasi basalaki masumu bakokufa atako bazalaki na mibeko te,+ kasi baoyo nyonso basalaki lisumu ntango bazali na mibeko,+ bakosambisama na kolanda mibeko+ yango.
13 Mpo bato oyo bayokaka mibeko bango te nde bayengebene na miso ya Nzambe, kasi bato oyo batosaka+ mibeko nde bakotángama bayengebene.+
14 Mpo ntango bato ya bikólo+ oyo bazali na mibeko te+ bazali kosala makambo ya mibeko kaka mpo bazali bato,+ bato yango, atako bazalaka na mibeko te, bazali na mobeko na mitema na bango moko.
15 Bango nde bato oyo bazali komonisa ete makambo ya mibeko ekomamá na mitema na bango,+ ntango lisosoli+ na bango ezali kotatola elongo na bango mpe, na makanisi na bango moko, ezali kofunda bango+ to mpe kolongisa bango.
16 Yango ekosalema na mokolo oyo Nzambe na nzela ya Kristo Yesu akosambisa+ makambo ya bato+ oyo ebombamá,+ na kolanda nsango malamu oyo nazali kosakola.+
17 Nzokande, soki babengaka yo Moyuda+ mpe otyaka motema na mibeko+ mpe omikumisaka mpo na Nzambe,+
18 mpe oyebi mokano+ na ye mpe ondimaka makambo ya malamu mingi mpo bateyá yo Mibeko na monɔkɔ;+
19 mpe ondimi mpenza ete ozali motambwisi ya bato bakufá miso,+ pole ya bato oyo bazali na molili,+
20 mosemboli ya bazoba,+ moteyi ya bana mike,+ mpe moto oyo akangi ntina ya makambo ya ebandeli+ ya boyebi mpe ya solo+ oyo ezali na Mibeko—
21 kasi yo moto oteyaka moto mosusu, omiteyaka yo moko te?+ Yo, moto osakolaka ete: “Koyiba te,”+ oyibaka?+
22 Yo moto olobaka ete: “Kosala ekobo te,”+ osalaka ekobo? Yo moto oyinaka bikeko, oyibaka+ biloko na batempelo?
23 Yo moto omikumisaka mpo na mibeko, oyokisaka Nzambe nsɔni na ndenge obukaka Mibeko?+
24 Mpo “bikólo bazali kofinga nkombo ya Nzambe mpo na bino”;+ kaka ndenge ekomamá.
25 Ya solo, kokatama ngenga+ ezali na ntina kaka soki otosaka mibeko;+ kasi soki obukaka mibeko, kokatama ngenga+ na yo ekómi kozanga kokatama ngenga.+
26 Yango wana, soki moto oyo akatami ngenga te+ azali kotosa masɛngami ya sembo+ ya Mibeko, kozanga kokatama ngenga na ye ekotángama lokola kokatama ngenga, boye te?+
27 Mpe moto oyo nzoto na ye ekatami ngenga te, ntango azali kokokisa Mibeko, akosambisa yo+ moto ozali na mibeko oyo ekomami mpe okatami ngenga kasi ozali kobuka mibeko.
28 Mpo Moyuda ezali te moto oyo azali bongo na libándá,+ ndenge moko mpe kokatama ngenga ezali te oyo ezali komonana na libándá na nzoto.+
29 Kasi Moyuda ezali nde moto oyo azali bongo na kati,+ mpe kokatama ngenga na ye ezali oyo ya motema+ na elimo, kasi te na mibeko oyo ekomami.+ Lokumu+ ya moto wana euti na bato te, kasi na Nzambe.+